Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w22 Février nk. 8-13
  • “Yoká maloba ya bato ya bwanya”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Yoká maloba ya bato ya bwanya”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BABOYAKI TOLI
  • BANDIMAKI TOLI
  • NINI EKOKI KOSALISA BISO MPO TÓNDIMA TOLI?
  • SƐNGÁKÁ TOLI MPE OKOZWA MATOMBA
  • Toli na yo “esepelisaka motema”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Yoká toli mpe ndimá mpamela
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Bato bandimaka toli na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ndenge ya kopesa toli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
w22 Février nk. 8-13

LISOLO YA BOYEKOLI 7

“Yoká maloba ya bato ya bwanya”

“Sembolá litoi na yo mpe yoká maloba ya bato ya bwanya.”​—MAS. 22:17.

LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi

NA MOKUSEa

1. Ntango nini bakoki kopesa biso toli, mpe mpo na nini biso nyonso tosengeli na toli?

BISO nyonso tozalaka mbala na mbala na mposa ya toli. Na bantango mosusu, biso moko tokoki kosɛnga toli epai ya moto oyo tomemyaka. Na bantango mosusu mpe ndeko moko oyo azali komitungisa mpo na biso akoki koyebisa biso ete etikali moke ‘tóbɛta libaku’ elingi koloba, tósala likambo oyo ekopesa biso mawa na nsima. (Gal. 6:1) To mpe, toli mosusu ekozala nde mpo na kosembola biso mpo tosalaki libunga moko ya monene. Ata soki epesami mpo na ntina nini, tosengeli koyoka toli. Kosala bongo ezali mpo na bolamu na biso mpe ekoki kobikisa bomoi na biso!​—Mas. 6:23.

2. Na kotalela Masese 12:15, mpo na nini tosengeli koyoka toli?

2 Vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo elendisi biso ‘tóyoka maloba ya bato ya bwanya.’ (Mas. 22:17) Moto moko te ayebi makambo nyonso; ezalaka kaka na moto oyo aleki biso na boyebi to asalá makambo mingi koleka biso. (Tángá Masese 12:15.) Na yango, koyoka toli ekomonisa ete tozali na komikitisa. Ekomonisa ete toyebi esika makoki na biso esuki mpe toyebi ete tozali na mposa ya lisalisi mpo tókokisa mikano na biso. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Salomo, oyo azalaki mokonzi ya bwanya, akomaki boye: “Ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.”​—Mas. 15:22.

Bililingi: Ndeko moko azali kokanisa balolenge oyo akoki kozwa toli. Biblia ya kofungwama likoló na ye emonisi ndenge toli ya polele to toli ya polele te ekoki kopesama. 1. Toli ya polele te: ndeko mobali moko ayangani na makita; azali kotánga Biblia; azali kotala TV JW; azali koyekola mokanda ya moombo ya sembo. 2. Toli ya polele: ndeko mobali moko azali koyoka ndeko mobali mosusu oyo azali kolakisa ye eloko moko na tablɛti; ayambi bankulutu mibale oyo bayei kotala ye mpo na kolendisa ye.

Lolenge nini ya toli omonaka ete ezalaka mpasi kondima? (Talá paragrafe 3-4)

3. Toli ekoki kopesama na ndenge nini?

3 Toli ekoki kopesama na ndenge ya polele to ya polele te. Toli ya polele te ezali nini? Likambo moko oyo totángi na Biblia to na mokanda moko ya moombo ya sembo ekoki kosala ete tótɛlɛma wana mpe tókanisa likambo moko oyo tozali kosala, mpe kotinda biso tósembola makanisi mpe misala na biso. (Ebr. 4:12) Tokoki koloba ete wana ezali toli ya polele te. Bongo toli ya polele ezali nini? Nkulutu to ndeko mosusu oyo akɔmɛli na elimo akoki kobenda likebi na biso na likambo moko oyo tosengeli kobongisa. Tokoki koloba ete wana ezali toli ya polele. Soki bolingo etindi ndeko moko apesa biso toli oyo euti na Biblia, tosengeli komonisa botɔndi mpo na yango, koyoka toli yango mpe kosalela yango.

4. Na kotalela Mosakoli 7:9, makambo nini tosengeli kosala te ntango bapesi biso toli?

4 Mpo na koloba solo, tokoki kozala na mokakatano mpo na kondima toli ya polele oyo bapesi biso. Tokoki kutu koyoka nkanda. Mpo na nini? Atako tondimaka mbala moko ete tozali bato ya kozanga kokoka, ekoki kozala mpasi tóndima toli ntango moto abendi likebi na biso na likambo moko oyo tosengeli kobongisa. (Tángá Mosakoli 7:9.) Tokoki koluka komilongisa. Tokoki kokanisela mopesi-toli yango mabe to kosilika mpo na lolenge oyo apesaki toli yango. Tokoki kutu koloba mabe mpo na mopesi-toli yango mpe koloba: ‘Ye nani mpo apesa ngai toli? Ye moko mpe asalaka mabunga!’ Kutu, soki toli oyo bapesi biso esepelisi biso te, ntango mosusu tokosala lokola toyoki te to tokoluka toli oyo ekosepelisa matoi na biso.

5. Tokolobela nini na lisolo oyo?

5 Na lisolo oyo, tokolobela bandakisa ya Biblia ya bato oyo baboyaki toli mpe ya baoyo bandimaki toli. Tokolobela mpe makambo oyo ekosalisa biso tóndima toli mpe tózwa matomba na yango.

BABOYAKI TOLI

6. Ndenge Mokonzi Rehoboame asalaki na toli oyo azwaki, ekoki koteya biso nini?

6 Tótalela ndakisa ya Rehoboame. Ntango akómaki mokonzi ya Yisraele, bato ya ekólo bayaki kosɛnga likambo moko. Basɛngaki ye alɛmbisa mokumba oyo tata na ye Salomo atyelaki bango. Likambo ya esengo, Rehoboame asololaki na mikóló ya Yisraele mpo básalisa ye azwa eyano ya kopesa bato yango. Mikóló bayebisaki ye ete soki asali makambo oyo bato basɛngi ye, bato yango bakosalela ye ntango nyonso. (1 Bak. 12:3-7) Emonani ete Rehoboame asepelaki na toli wana te; na yango akendaki kotuna makanisi ya baninga oyo bakolaki elongo. Lokola mibali yango bazalaki na bambula mwa moke koleka 40, basengelaki kozala na mwa boyebi mingi na makambo ya bomoi. (2 Nt. 12:13) Kasi na libaku yango, bapesaki Rehoboame toli ya mabe. Bayebisaki ye abakisela bato ya ekólo mikumba ya kilo. (1 Bak. 12:8-11) Lokola Rehoboame azwaki batoli mibale ekeseni, akokaki kobondela Yehova mpo na kosɛnga Ye asalisa ye ayeba toli nini asengeli kolanda. Nzokande, amonaki malamu andima toli oyo esepelisaki ye, na yango alandaki toli ya baninga na ye. Yango ememaki mikakatano mpo na ye moko mpe bato ya Yisraele. Ndenge moko mpe, na bantango mosusu bakoki kopesa biso toli oyo tolingi koyoka te. Nzokande, soki toli yango euti na Liloba ya Nzambe, tosengeli kondima yango.

7. Ndakisa ya Mokonzi Uzia eteyi biso nini?

7 Mokonzi Uzia aboyaki toli. Akɔtaki na eteni ya tempelo ya Yehova oyo ezalaki kaka mpo na banganga-nzambe, mpe alukaki kotumba mpaka ya malasi. Banganga-nzambe ya Yehova bayebisaki ye: “Ee Uzia, mosala ya kotumbela Yehova mpaka ya malasi ezali ya yo te, kasi mosala ya kotumba mpaka ya malasi ezali nde mosala ya banganga-nzambe.” Uzia asalaki nini? Soki andimaka toli na komikitisa nyonso mpe abimaka mbala moko na tempelo, mbala mosusu Yehova akokaki kolimbisa ye. Kasi “Uzia . . . atombokaki.” Mpo na nini ayokaki toli te? Emonani ete akanisaki lokola azalaki mokonzi, azalaki na lotomo ya kosala nyonso oyo alingaki. Kasi Yehova azalaki komona bongo te. Lokola Uzia asalaki likambo oyo azalaki na lotomo ya kosala te, azwaki maladi ya maba mpe “atikalaki moto ya maba kino mokolo ya liwa na ye.” (2 Nt. 26:16-21) Ndakisa ya Uzia eteyi biso ete ata soki tozali nani, soki toboyi toli oyo euti na Biblia, Yehova akondima lisusu biso te.

BANDIMAKI TOLI

8. Yobo asalaki nini ntango bapesaki ye toli?

8 Longola bandakisa mabe oyo touti kolobela, Biblia elobeli bandakisa malamu ya bato oyo bazwaki mapamboli mpo bayokaki toli. Tólobela ndakisa ya Yobo. Yobo azalaki kobanga Nzambe, kasi azalaki moto ya kozanga kokoka. Ntango akutanaki na mikakatano ya makasi, alobaki makambo mosusu oyo ebongaki te. Na yango, azwaki toli ya polelepolele, oyo eutaki epai ya Elihu mpe epai ya Yehova. Yobo asalaki nini? Andimaki toli na komikitisa nyonso. Alobaki boye: “Nalobaki, kasi nazalaki kososola te . . . Nalongoli maloba oyo nalobaki, mpe nabongoli motema na kati ya putulu ya mabele mpe na putulu ya mɔtɔ.” Yehova apambolaki Yobo mpo na komikitisa oyo amonisaki.​—Yobo 42:3-6, 12-17.

9. Na ndenge nini Moize azali ndakisa malamu na oyo etali kondima toli?

9 Moize azali ndakisa malamu ya moto oyo andimaki kosembolama nsima ya kosala libunga ya monene. Na libaku moko, azangaki komipekisa mpe apesaki Yehova lokumu te. Mpo na yango, Moize abungisaki libaku ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. (Mit. 20:1-13) Ntango Moize asɛngaki Yehova atalela lisusu ekateli oyo azwaki, Yehova ayebisaki ye: “Koloba na ngai lisusu ata moke te likambo oyo.” (Mib. 3:23-27) Moize akómaki nkandankanda te. Kasi, andimaki ekateli oyo Yehova azwaki mpe Yehova akobaki kosalela ye mpo na kokamba Yisraele. (Mib. 4:1) Yobo ná Moize bazali ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda na likambo etali kondima toli. Yobo abongolaki makanisi na ye, mpe alukaki komilongisa te. Moize amonisaki ete andimaki toli ya Yehova na ndenge atikalaki sembo ata nsima ya kobungisa libaku malamu oyo alingaki mingi.

10. (a) Na kotalela Masese 4:10-13, kondima toli ememaka matomba nini? (b) Ndenge nini ya malamu bandeko mosusu batalelaki toli oyo bapesaki bango?

10 Tokozwa matomba ntango tolandi ndakisa ya bato ya sembo lokola Yobo mpe Moize. (Tángá Masese 4:10-13.) Bandeko na biso mingi balandaki ndakisa na bango mpe bandimaki toli. Ndeko Emmanuel, oyo afandaka na Congo-Kinshasa, alobi boye mpo na likebisi moko oyo azwaki: “Bandeko ya lisangá na biso oyo bakɔmɛli na elimo bamonaki ete nalingaki kosala libunga moko monene, mpe bayaki kosalisa ngai. Nasalelaki toli na bango, mpe yango esalisaki ngai nakima makambo oyo ekokaki kobimisela ngai mikakatano.”b Megan, ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela na Canada, alobi boye mpo na toli: “Ezalaki ntango nyonso te toli oyo matoi na ngai esepeli na yango, atako bongo, ezalaki yango nde nasengelaki na yango.” Mpe Marko, ndeko mobali moko oyo afandaka na Croatie alobi boye: “Bakitisaki ngai mikumba, kasi ntango nazongisaka makanisi nsima, namonaka ete toli oyo nazwaki esalisaki ngai nabongisa boyokani na ngai ná Yehova.”

11. Ndeko Karl Klein alobaki nini na likambo etali kondima toli?

11 Moto mosusu oyo azwaki matomba mpo andimaki toli oyo bapesaki ye ezali Ndeko Karl Klein, oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na lisolo ya bomoi na ye, Ndeko Klein alobelaki ndenge Joseph Rutherford, oyo azalaki moninga na ye ya motema, apesaki ye toli ya makasi. Ndeko Klein andimaki ete na ebandeli asepelaki na toli yango te. Alobaki boye: “Na nsima ntango [Ndeko Rutherford] amonaki ngai, alobaki na esengo nyonso, ‘Mbote Karl!’ Kasi lokola nazalaki naino na mpasi na motema, nayanolaki ye na esengo te. Azongisaki, ‘Karl, kebá! Zabolo alingi kokanga yo!’ Nayokaki mwa nsɔni mpe nalobaki, ‘Te, eloko ezali te, Ndeko Rutherford.’ Kasi ayebaki ete nakangelaki ye nkanda, mpe azongelaki lisusu likebisi yango: ‘Nayebi. Kasi kebá kaka. Zabolo alingi kokanga yo.’ Alobaki solo mpenza! Soki tokangeli ndeko moko nkanda, mingimingi mpo alobaki na biso likambo oyo azalaki na lotomo ya koloba . . . , tozali komitika mpo Zabolo akanga biso.”c (Ef. 4:25-27) Ndeko Klein andimaki toli oyo Ndeko Rutherford apesaki ye, mpe bakobaki kozala baninga ya motema.

NINI EKOKI KOSALISA BISO MPO TÓNDIMA TOLI?

12. Ndenge nini komikitisa ekoki kosalisa biso tóndima toli? (Nzembo 141:5)

12 Nini ekoki kosalisa biso mpo tóndima toli? Tosengeli kozala na komikitisa mpe kobosana te ete tozali mpenza bato ya kozanga kokoka mpe ete na bantango mosusu tokoki kosala bozoba. Ndenge tomonaki yango liboso, Yobo azalaki na makanisi oyo ebongaki te. Kasi na nsima asembolaki lolenge na ye ya kokanisa, mpe Yehova apambolaki ye mpo na yango. Mpo na nini? Mpo Yobo azalaki na komikitisa. Amonisaki komikitisa ndenge andimaki toli oyo Elihu apesaki ye, atako alekaki mpenza Elihu na mbula mosika. (Yobo 32:6, 7) Ndenge moko mpe, komikitisa ekosalisa biso tósalela toli oyo bapesi biso, ata ntango tomoni ete bapesaki biso yango kaka mpamba, to ntango moto oyo azali kopesa biso yango azali leki epai na biso. Nkulutu moko na Canada alobi boye: “Lokola tomimonaka te ndenge oyo basusu bamonaka biso, ndenge nini tokokende liboso soki moto te apesaka biso toli?” Lisusu, biso nyonso tosengeli kokende liboso na oyo etali kokolisa mbuma ya elimo mpe kokóma basakoli mpe bateyi malamu na mosala ya kosakola!​—Tángá Nzembo 141:5.

13. Ndenge nini tosengeli kotalela toli oyo tozwi?

13 Taleláká toli lokola bolingo oyo Nzambe azali komonisela yo. Yehova alingaka tózala na bomoi oyo eleki malamu. (Mas. 4:20-22) Ntango apesi biso toli na nzela ya Liloba na ye, ya mokanda moko ya moombo ya sembo, to na nzela ya mokristo moko oyo akɔmɛli na elimo, amonisaka ete alingaka biso. Baebre 12:9, 10 elobi ete ‘asalaka bongo mpo na bolamu na biso.’

14. Tosengeli kotya likebi na nini ntango tozwi toli?

14 Tyá likebi na toli yango moko, kasi te na lolenge oyo epesami. Na bantango mosusu, tokoki komona ete toli oyo tozwaki epesamaki na ndenge ya malamu te. Ya solo moto oyo azali kopesa toli asengeli kosala makasi mpo toli yango epesama na boboto.d (Gal. 6:1) Kasi soki ezali biso nde bazali kopesa toli, ekozala malamu tótya likebi na toli yango moko, ata soki tomoni ete ekokaki kopesama na lolenge ya malamu koleka. Tokoki komituna boye: ‘Ata soki tosepeli te na ndenge oyo toli yango epesamaki, ata likambo moko ya solo na toli yango ezali te? Nakoki koboya kotala mabunga ya mopesi-toli mpe kozwa mateya na toli yango moko?’ Ekozala likambo ya bwanya soki tozali kosala nyonso mpo tózwa mateya na toli nyonso oyo tozwi.​—Mas. 15:31.

SƐNGÁKÁ TOLI MPE OKOZWA MATOMBA

15. Mpo na nini tosengeli kosɛngaka toli?

15 Biblia elendisi biso tósɛngaka toli. Masese 13:10 elobi: “Bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.” Ezali mpenza solo! Mbala mingi, baoyo basɛngaka toli na esika bázela moto moko aya kopesa bango yango, bakozala na mayele mingi na elimo koleka baoyo balukaka toli te. Yango wana, yo moko mpe sɛngáká toli.

Bililingi: 1. Elenge mwasi moko azali kosomba biloko na nzela ya Internet. Azali kotala elamba moko mpe patalo ekangá nzoto. 2. Ndeko mwasi yango azali kolakisa ndeko mwasi ya mokóló biloko oyo alingi kosomba.

Mpo na nini ndeko mwasi ya elenge azali kosɛnga ndeko oyo akɔmɛli apesa ye toli? (Talá paragrafe 16)

16. Na makambo nini tokoki kosɛnga toli?

16 Na makambo nini tokoki kosɛnga bandeko bápesa biso toli? Tótalela mwa bandakisa. (1) Ndeko mwasi moko asɛngi mosakoli oyo ayebi kosakola malamu bábima elongo mpo báyekola na moto moko; na nsima, asɛngi mosakoli yango toli mpo abongisa lolenge na ye ya koteya. (2) Ndeko mwasi moko ya monzemba alingi kosomba mwa bilamba; na yango, asɛngi ndeko mwasi moko oyo akɔmɛli na elimo ayebisa ye polele bilamba nini apona. (3) Ndeko mobali moko azwi mokumba ya kosala diskur na ye ya liboso. Asɛngi na ndeko moko oyo asalaka badiskur malamu ayoka ye na likebi ntango azali kosala diskur na ye mpe na nsima ayebisa ye bisika oyo akoki kobongisa. Ata ndeko mobali oyo asalaka badiskur banda bambula mingi akoki kosɛnga toli ya ndenge wana epai ya molobi moko ya malamu, mpe na nsima kosalela yango.

17. Litomba nini tokoki kozwa soki tozali koyoka toli?

17 Na bapɔsɔ to na basanza oyo ezali koya, biso nyonso tokozwa toli, ezala toli ya polele to toli ya polele te. Soki esalemi bongo, kobosana te makambo oyo tolobeli na lisolo oyo. Zalá na komikitisa. Tyá likebi na toli yango moko, kasi te na ndenge oyo epesami. Mpe salelá toli oyo ozwi. Moko te kati na biso abotamá moto ya bwanya. Kasi ntango tozali ‘koyoka toli mpe kondima disiplini,’ Liloba ya Nzambe elaki ete ‘tokozala na bwanya.’​—Mas. 19:20.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Ndakisa ya bato oyo Biblia elobeli, oyo baboyaki toli, ekoki koteya biso nini?

  • Ndakisa ya bato oyo Biblia elobeli, oyo bandimaki toli, ekoki koteya biso nini?

  • Nini ekosalisa biso tóndima toli?

LOYEMBO 124 Tótikala sembo

a Basaleli ya Yehova bayebi ete ezali na ntina koyoka toli ya Biblia mpe kosalela yango. Nzokande, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kondima toli. Mpo na nini? Mpe nini ekoki kosalisa biso tózwa matomba na toli oyo tozwi?

b Topesi bango bankombo mosusu.

c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/1985, nk. 20-27, na Français.

d Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge ya kopesa toli na mayele.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto