Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 19 lok. 22
  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Koloba na esengo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Kolendisa bato mpe kolobela mingi makambo ya malamu
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 19 lok. 22

LITEYA 19

Kosala makasi mpo na kosimba mitema

Vɛrsɛ

Masese 3:1

NA MOKUSE: Salisá bato bákanga ntina ya makambo oyo bazali koyoka mpe básalela yango.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Salisá bato oyo bazali koyoka yo bámitalela. Tuná mituna oyo ekotinda bato bámitalela mpo na koyeba soki bazali mpenza kokanisa nini na mitema.

  • Lendisá bato báluka kosala malamu. Lendisá bato bámituna mpo na nini basalaka makambo ya malamu. Salisá bato bálinga Yehova, bálinga bazalani na bango mpe bálinga mateya ya Biblia, mpe bolingo yango nde ekotinda bango básala makambo ya malamu. Na esika opamela bango, salisá bango nde bákanisa. Na esika oyokisa bango nsɔni, lisolo na yo elendisa bango mpe etinda bango básala malamu koleka.

  • Salisá bato bámona nde Yehova. Monisá ndenge oyo mateya, mitinda mpe mibeko ya Biblia emonisaka bizaleli ya Nzambe mpe bolingo na ye mpo na biso. Salisá bato oyo bazali koyoka yo bábanga koyokisa Yehova mawa, báluka nde kosepelisa ye.

    Toli

    Kobosana te ete Yehova nde abendaka bato. Salelá Liloba na ye mpo na kolendisa bato oyo bazali koyoka yo.

NA MOSALA YA KOSAKOLA

Soki likoki ezali, tuná moto oyo ozali kosolola na ye mituna mpo na koyeba makambo nini andimaka. Ntango azali kopesa eyano, talá elongi na ye malamu mpe yoká mongongo na ye mpo na koyeba makanisi na ye. Kasi, zalá motema molai. Ntango mosusu esɛngaka moto oyo ozali kosolola na ye ayeba yo liboso abimisa mpenza makanisi ya motema na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto