Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb nk. 2-3
  • Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mekolá kondima na bango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Eteni 2 Bozongeli
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ndenge ya kosalela mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Maloba ya ebandeli
    Lamuká!—2019
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb nk. 2-3
Libota moko bazali kotánga Biblia wana bazali koyekola buku Zwá mateya na masolo ya Biblia

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Bandeko ya bolingo:

Biso basaleli ya Yehova tolingaka Liloba na ye, Biblia. Tondimaka ete ezali na masolo ya solo, na batoli ya malamu mpo na bomoi, mpe ezali eloko oyo emonisi polele ete Yehova alingaka bato. (Nzembo 119:105; Luka 1:3; 1 Yoane 4:19) Tolingaka mpenza kosalisa basusu báyeba mateya kitoko oyo ezali na Biblia. Yango wana, tozali na esengo ya kobimisa buku oyo: “Zwá mateya na masolo ya Biblia.” Tólobela yango mwa moke.

Buku oyo ebongisami mingimingi mpo na bana. Kasi, tokoki mpe kosalela yango mpo na kosalisa mikóló oyo balingi koyeba masolo mingi ya Biblia. Lokola Biblia ezali mpo na moto nyonso, na ntembe te, biso nyonso tokozwa matomba soki totaleli lisusu mateya na yango, oyo ekoki kosalisa biso tózala mpenza na esengo.

Buku oyo elobeli masolo oyo ezali na Biblia, banda ntango moto akelamaki. Tosali makasi mpo masolo yango ya Biblia ebima polele, ezala mikuse, mpe elandana na molɔngɔ ndenge esalemaki.

Kasi, buku yango ezali kaka ya masolo te. Makomi mpe bililingi ebongisami na ndenge oyo ekosalisa moto amona lokola azali wana mpe amitya mpenza na esika ya bato oyo balobeli.

Buku oyo ekosalisa biso tómona ete Biblia elobeli bato oyo batosaki Yehova mpe baoyo batosaki ye te. Mpe ekosalisa biso tózwa mateya na bandakisa na bango. (Baroma 15:4; 1 Bakorinti 10:6) Buku yango ezali na biteni 14. Na ebandeli ya eteni mokomoko, bamonisi na mokuse mwa mateya oyo tokoki kozwa.

Soki ozali moboti, bokoki kotánga lisolo moko na mwana na yo mpe kolobela elilingi na yango. Na nsima, bokoki kotánga bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo yango. Salisá mwana ayokanisa makambo oyo botángi na Biblia ná lisolo ya buku. Tokoki mpe kosala bongo mpo na kosalisa moto oyo azali mokóló ayeba na mokuse nsango oyo ezali na Biblia.

Tozali na elikya ete buku oyo ekosalisa bato nyonso ya mitema sembo, ezala bana to mikóló, báyeba masolo oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpe básalela mateya na yango na bomoi na bango. Na ndenge yango, bango mpe bakokɔta na libota na ye mpo na kosambela ye.

Bandeko na bino,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto