Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 1 lok. 8
  • Nzambe asalaki likoló ná mabele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe asalaki likoló ná mabele
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • God Begins to Make Things
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Banyama
    Lamuká!—2015
  • A Beautiful Garden
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Moto oyo asalaki biloko nyonso
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 1 lok. 8
Elanga ya Edene

LITEYA 1

Nzambe asalaki likoló ná mabele

Yehova Nzambe azali Mozalisi na biso. Asalá biloko nyonso, oyo tomonaka ná oyo tomonaka te. Liboso asala biloko oyo tomonaka, asalaki baanzelu ebele mpenza. Oyebi baanzelu? Ezali bikelamu ya Yehova oyo bazali lokola ye. Tokoki komona bango te, ndenge kaka tokoki komona Nzambe te. Anzelu ya liboso oyo Yehova asalaki akómaki mosungi na ye. Asalisaki Yehova na kosala minzoto, baplanɛti, mpe biloko mosusu nyonso. Moko ya baplanɛti yango ezali mabele, esika ya kitoko mpo na bato.

Na nsima, Yehova abongisaki mabele mpo banyama mpe bato báfanda wana. Asalaki moi mpo engɛngisaka mabele. Asalaki bangomba, mbu mpe bibale.

Nini esalemaki na nsima? Yehova alobaki: ‘Nakosala matiti, milona ná banzete.’ Bambuma, ndunda, mpe fololo ndenge na ndenge ebandaki kobima. Na nsima, Yehova asalaki banyama nyonso​—oyo epumbwaka na likoló, oyo efandaka na mai, oyo etambolaka, ná oyo emibendaka. Asalaki banyama ya mike lokola basimbiliki (lapin), mpe ya minene lokola banzoku. Nyama nini olingaka mingi?

Na nsima, Yehova alobaki na anzelu yango ya liboso: “Tósala moto.” Bato basengelaki kokesana na banyama. Bakobanda kosala biloko. Bakobanda koloba, kosɛka, mpe kosambela. Bakobatela mabele mpe banyama. Moto ya liboso oyo Nzambe asalaki ezalaki nani? Tokolobela ye.

“Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.”​—Ebandeli 1:1

Mituna: Yehova Nzambe azali nani? Yehova asalaki biloko nini?

Ebandeli 1:1-26; Masese 8:30, 31; Yirimia 10:12; Bakolose 1:15-17

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto