Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Abrahama ná Sara batosaki Nzambe
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Abrahama ná Sara bazali kokanga biloko mpo na kolongwa na Ure

      LITEYA 8

      Abrahama ná Sara batosaki Nzambe

      Mosika mingi te na Babele, ezalaki na mboka moko na nkombo Ure, epai bato bazalaki kosambela banzambe ebele, kasi Yehova te. Nzokande ezalaki na mobali moko na Ure oyo azalaki kosambela kaka Yehova. Nkombo na ye ezalaki Abrahama.

      Yehova alobaki na Abrahama: ‘Tiká mboka na yo mpe bandeko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.’ Na nsima Nzambe apesaki ye elaka oyo: ‘Okokóma ekólo moko monene, mpe nakosalela bato ebele ya mokili mobimba makambo ya malamu mpo na yo.’

      Abrahama ayebaki te epai Yehova azalaki kotinda ye, kasi atyelaki ye motema. Bongo Abrahama, mwasi na ye Sara, tata na ye Tera, ná Lota mwana ya ndeko na ye bakangaki biloko na bango mpe babandaki mobembo ya molai mpenza, mpo na kotosa Nzambe.

      Abrahama azalaki na mbula 75 ntango ye ná libota na ye bakómaki na mokili oyo Yehova alingaki bámona. Nkombo ya mokili yango ezalaki Kanana. Kuna, Nzambe alobaki na Abrahama mpe apesaki ye elaka oyo: ‘Mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yango bana na yo.’ Nzokande, Abrahama ná Sara bakómaki mikóló mpenza kasi bazalaki na mwana te. Sikoyo ndenge nini Yehova akokokisa elaka yango?

      Abrahama ná libota na ye bakei mobembo na Kanana

      “Na kondima, Abrahama atosaki ntango . . . akendaki na esika oyo asengelaki kozwa libula; akendaki atako ayebaki te epai wapi azalaki kokende.”​—Baebre 11:8

      Mituna: Yehova asɛngaki Abrahama asala nini? Yehova apesaki Abrahama elaka nini?

      Ebandeli 11:29–12:9; Misala 7:2-4; Bagalatia 3:6; Baebre 11:8

  • Nsukansuka babotaki mwana!
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Sara na kati ya hema ntango baanzelu bazali kosolola na Abrahama

      LITEYA 9

      Nsukansuka babotaki mwana!

      Abrahama ná Sara baumelaki na libala bambula ebele mpenza. Batikaki ndako na bango ya kitoko na engumba Ure mpe bakómaki kofanda na hema. Kasi Sara azalaki komilelalela te, mpo atyelaki Yehova motema.

      Lokola Sara azalaki mpenza na mposa ya mwana, ayebisaki Abrahama ete: ‘Soki mosaleli na ngai Agare aboti na yo mwana, nakoki kozwa ye lokola mwana na ngai.’ Nsima ya mikolo, Agare abotaki mwana mobali. Nkombo na ye ezalaki Yishimaele.

      Sara azali na zemi

      Bambula ebele na nsima, ntango Abrahama akómaki na mbula 99 mpe Sara na mbula 89, bapaya misato bayaki epai na bango. Abrahama asɛngaki bango bápema na nse ya nzete moko, mpe balyaki elongo. Bapaya yango ezalaki banani? Ezalaki baanzelu! Bayebisaki Abrahama ete: ‘Na ntango lokola oyo, na mbula oyo ekoya, mwasi na yo akobota mwana mobali.’ Sara azalaki koyoka bango na kati ya hema. Asɛkaki na motema mpe alobaki: ‘Ngai nakobota mpenza awa nakómi mobange boye?’

      Na mbula oyo elandaki, Sara abotaki mwana mobali, kaka ndenge anzelu ya Yehova alobaki. Abrahama apesaki ye nkombo Yisaka, oyo elimboli “Kosɛka.”

      Ntango Yisaka akómaki na mbula soki mitano, Sara amonaki ete Yishimaele azalaki kotyola ye. Sara alingaki kobatela mwana na ye; asololaki na Abrahama mpe asɛngaki ye abengana Agare ná Yishimaele. Na ebandeli, Abrahama alingaki te. Kasi Yehova ayebisaki Abrahama ete: ‘Yokelá Sara. Nakobatela Yishimaele. Kasi nakokokisa mpenza kondimana na ngai nde na nzela ya Yisaka.’

      Sara asimbi Yisaka wana Agare ná Yishimaele bazali kokende

      “Na kondima mpe, Sara azwaki nguya ya kozwa zemi ya mwana, . . . mpo atalelaki moto oyo apesaki elaka ete azali sembo.”​—Baebre 11:11

      Mituna: Sara ayokaki baanzelu bazali koyebisa Abrahama nini? Ndenge nini Yehova abatelaki Yisaka?

      Ebandeli 16:1-4, 15, 16; 17:25-27; 18:1-15; 21:1-14; Baebre 11:11

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto