Disipline ezali kobimisa mbuma na kimya
“Na ntango na yango, bitumbu nyonso eyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ekozwisa mbuma na kimya na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.”—BAEBELE 12:11.
1. (a) Engebene Liloba na Jéhovah, moto akoki komitambwisa ye moko? Kasi moto azali kokanisa nini? (b) Nani alobi solo, mpe nani akosi?
LILOBA na Jéhovah endimi likambo oyo ete “ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Kasi moto azali komitombola ete akoki komitambwisa, mpe azali kosala yango uta botomboki na Edene. Kino lelo oyo, mingi basili kosala lokola Bayisraele ya ntango na basambisi oyo tozali kotanga boye na ntina na bango: “Moto na moto asalaki yango ezalaki sembo na miso na ye.” (Basambisi 21:25) Kasi, maloba na Jéhovah mazwami kati na Masese 14:12 mamonani ete mazali solo: “Nzela ezali oyo emonani malamu epai na moto nde nsuka na yango bobele nzela na kufa.” Na yango, na bambula 6000 na boumeli na yango moto alandaki nzela oyo emonanaki malamu na miso na ye, amonaki mpasi mpo na etumba, mpo na nzala, mpo na maladi, mpo na kobomana mpe liwa. Lisolo na makambo na bato emonisi bosolo ya maloba na Jéhovah mpe mbeba ya banzela na moto.
2. Bapisikologe oyo bakosalisaka bana bakanisi nini mpo na kobeta bango fimbo, kasi mbuma nini ebimi na ezaleli ya kopesa nzela na makambo mabe?
2 Bato bazangi kokoka bazali na mposa ya kosembolama uta bolenge na bango. Liloba na Nzambe elobi: “Ye oyo aboi mpimbo abebisi mwana na ye; kasi ye oyo alingi ye akopesa ye etumbu na ntango ekoki.” (Masese 13:24) Bapisikologe mingi oyo bakosalisaka bana bazali koloba ete toli yango ezali malamu te. Eleki mwa bambula, moko kati na bango atunaki motuna oyo: “Bamama, bozali koyeba ete, mbala nyonso oyo bozali kobeta bana na bino, bozali komonisa bango ete boyinaka bango?” Ezaleli ya kopesa nzela na makambo mabe esili kobimisa mobulu makasi epai na bilenge na motindo boye ete mosambisi moko ya Brooklyn alobaki boye: “Mpo na ngai, bilenge mosusu oyo babunga nzela basengeli kobetama fimbo. Kasi ezali bongo te na moi ya lelo. Sikawa bazali kosenga biso tobeta mwana te soko te tokoki kolembisa to kotya nsuka na bokoli ya mayele na ye.” Nzokande, ezaleli ya kopesa nzela na mabe ebimisi bato mingi na mayele te, kasi bilenge mingi ya mobulu.
3. Lokola maloba ya basipesialiste mingi emonisi yango, sikawa bazali kokanga ntina ya likambo nini?
3 Kasi likambo yango ebandi sikawa kobongwana. Engebene Burton White, moto na mayele mingi na makambo matali koteya, soko ozali kopesa mwana na yo etumbu, okoki kobanga te “ete akolinga yo mingi te ata soki ozalaki moto ya motema mawa. . . . Ata soko ozali kobeta bango fimbo mbala na mbala, okomona ete bakobanda ntango nyonso kobelema pene na yo.” Amonisi ete mwana azali mpenza na mposa ya “bolingo” mingi. Lokola docteur Joyce Brothers alobaki yango, boyekoli moko esalemaki mikolo oyo epai na bankama na bana na kelasi ya 5e mpe 6e oyo bazalaki kosembolama na ndenge ekoki emonisaki ete mpo na bango, soko baboti bazali kotyela bana na bango mitinda, ezali “mpo ete balingi bango”. Journal de la vie quotidienne (Angl.) esalaki komantere oyo: “Nsima na kolobela soko bana basengeli kolya na bangonga ya sikisiki to te, mpe mpo na likambo etali kobeta fimbo to te, bapisikologe mpo na bana bayei komona ete, wana mwana alingami, makambo nyonso oyo ezali na ntina mingi lisusu te.” Docteur Benjamin Spock, mokomi ya mokanda L’éducation des enfants (Angl.), andimaki ete azalaki mpe na mokumba mpo na ndenge baboti bazali lisusu kosembola bana na bango te mpe ndenge yango ezali kobimisa mobulu. Azali koloba ete, bato bazali na mokumba ezali “bapisikiatre mpe bapisikologe mpo na bana, balakisi, basalisi na bato mpe minganga oyo basalisaka bana mike lokola ngai”.
Fimbo mpo na kosembola
4. Fimbo ya disipline ezali elilingi ya nini, mpe tokomonisa nini soko tozali kosalela yango na lolenge malamu na esika ya koboya kobeta mwana?
4 “Fimbo” oyo elobelami kati na Masese 13:24 elimboli bobele kobeta te; elimboli kozongisa na nzela ata soko yango esalemi ndenge mosusu. Na ntina na verset yango, tala oyo Biblia ya Lingelesi elobi (New lnternational Version): “Fimbo: elobeli ya elilingi oyo ezali kolakisa lolenge moko ya disipline.” Fimbo ezali elilingi ya bokonzi—mpo na oyo etali bokonzi ya baboti. Mwana akotondo baboti na ye te mpo ete bazangaki kosembola ye mpe bakomisaki ye moto makasi: “Soko oboi kobongisa moombo na yo (to mwana) uta bolenge na ye, akokoma moto na kozanga botondi na nsima.” (Masese 29:21) Moto nyonso oyo akoboya kosalela bokonzi na ye lokola moboti na kopesaka nzela na ezaleli mabe azali komiyokisa nsoni mpe azali na bopotu, mpe azangi bolingo; nzokande, ye oyo azali kosalela fimbo mpo na kosembola na bopolo nyonso kasi kozanga kotengatenga azali komonisa likebi etondi na bolingo epai ya mwana. “Mpimbo mpe mpamela ekoyeisa mayele, kasi mwana oyo atikami epai na ye moko akokomisa mama na ye na nsoni.”—Masese 29:15.
5. (a) Komantere moko na ntina na Masese 13:24, mpe mokapo nini mosusu ya Biblia endimi likanisi yango? (b) Jéhovah mpe Yesu basembolaka banani?
5 Na ntina na Masese 13:24, oyo etangami na paragrafe euti koleka, mokanda Commentaire de l’Ancien Testament ya Keil mpe Delitzsch epesi ndimbola elandi: “Tata oyo alingi mpenza bolamu ya mwana na ye akobanda kosembola ye uta bolenge na ye, mpo na kopesa ye litambwisi malamu ntango akoki naino kosembolama mpe kopekisa ete abunga nzela: nzokande, ye oyo azali komonisa motema mawa epai na mwana na ye na esika ete azwa ekateli azali kosala lokola moto oyo alingi mpenza ete mwana na ye abeba.” Ezali yango endimisi Masese 19:18, verset oyo Biblia Nouvelle Traduction de la Bible (Angl.) ya Moffatt ebongoli boye: “Pesa mwana na yo etumbu na ntango oyo elikya ezali naino mpo na ye, mpe kotika ye te ete abeba.” Disipline epesami na bopolo kasi na ekateli, oyo epesami uta bomwana ezali komonisa ete baboti bazali na bolingo mpo na mwana. Yesu alobaki: “Soko nayoki bolingo epai na banani, nakopamela bango nyonso, nakopesa bango etumbu.” Mpe Jéhovah, ‘akopesaka bitumbu epai na baoyo akolingaka bango’.—Emoniseli 3:19; Baebele 12:6.
6. Disipline to mpamela ekoki kopesama na lolenge nini? Tanga mwa bandakisa mpo na kosimba eyano na yo.
6 Ekoki kosalema ete esengeli kobeta mwana mpo na kosembola ye, kasi mingimingi ezalaka bongo te. Masese 8:33 ezali kopesa likanisi ya kobeta te, kasi elobi “yoka kosembolama mpe koma mayele”. Disipline epesamaka mingimingi na nzela na maloba, kasi na fimbo te: “Mpamela na kolakisama ezali nzela na bomoi.” “Simba bososoli, tika ye kolongwa te; batela ye, mpamba te azali bomoi na yo.” (Masese 4:13; 6:23) Ntango Yobo, mosaleli na Jéhovah, akomaki na mposa ya kosembolama, apamelamaki na maloba, libosoliboso epai na Elihu, mpe na nsima epai na Jéhovah ye moko. (Yobo, mikapo 32 kino 41) Andimaki mpamela mpe alobaki epai na Jéhovah: “Bongo namitioli mpe nabongoli motema na mputulu mpe na mputulu na moto.”—Yobo 42:6.
7. Ndimbola ya liloba na greke ebongolami na “disipline” ezali nini, ndenge nini yango esengeli kopesama mpe na mokano nini?
7 Liloba na greke oyo ebongolami na “disipline” ezali paidéia. Ekoki kozala na ndimbola ya kobongisa, kolakisa, ‘koteya na bopolo’. (2 Timote 2:25) Ezali kolimbola nde lolenge ya koteya to kobongisa etamboli na esika ya kosuka na kozwa bobele mayele to boyebi. Disipline yango esengeli kopesama “na motema petee mpe na lolenge malamu oyo ekoki mpo na kolakisa”. (2 Timote 4:2) Ezali yango emonisami na elendiseli oyo epesami epai na batata: “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobokola bango na mateya mpe na mpamela na Nkolo.” (Baefese 6:4) Disipline yango, oyo epesami na bopolo kasi mpe lisusu kozanga kotengatenga, ezali na mokano ya kobongisa bana engebene makanisi ya Jéhovah.
Liziba ya disipline
8. Na moboko nini mpe na lolenge nini tokoki komisembola?
8 Mitinda misengeli kosalelama mpo na kosembola bana mitali mpe bakolo. Biblia eyebisi biso makambo oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kobwaka. Ntango tozali kotanga, tokoki komitalela mpe komisembola soki mabunga ezali. (2 Bakolinti 13:5) Ntango tozali kokanisa na mozindo na mitinda ya Jéhovah, ekoki kokomela biso tomiyoka lokola tozali na libunga. Yango esalisaka biso toyeba mabongwani nini tosengeli kosala. Mokomi na nzembo amonaki likambo yango mpe alobaki: “Nakosanzola Jéhovah oyo apesi ngai toli; na ntango na butu motema na ngai elakisi ngai.” (Nzembo 16:7) Tokoki mpe komisembola biso moko lokola Paulo, oyo alobaki: “Kasi nazali kobeta nzoto na ngai mpe nakokumisa yango lokola moombo ete nazala moboyami te awa esili ngai kosakwela bamosusu.”—1 Bakolinti 9:27.
9. Na myango nini tokoki kozwa disipline oyo ekobimisa litomba?
9 Disipline ekoki kopesamela biso na moto mosusu, bobele na ndenge ya kotala, na kofinelaka biso liso, na mwa liloba, na kosalaka elembo to na mpamela mpenza. Bobele na ndenge Yesu atalaki Petelo, yango ekundolaki ye lisumu monene oyo autaki kosala; abimaki libanda mpe alelaki makasi. (Luka 22:61, 62) Mbala mosusu, Petelo ayokaki mawa na mpamela oyo ya mwa maloba mitano: “Kenda nsima na ngai, Satana.” (Matai 16:23) Kotanga mikanda ya la Société, koyangana na makita ya boklisto, kosolola na bandeko na biso, koyika mpiko wana makambo ya mpasi ebimi- nyonso wana ekoki kosalisa biso toyeba esika nini tokoki kosala mabongwani. Nzokande, liziba ya disipline oyo eleki monene ezali Liloba ya Nzambe.—Nzembo 119:105.
10. Ndenge nini masese na Salomo ekoki kosembola biso, kasi nzela nini mingi balingi kolanda yango?
10 Masese na Salomo makomamaki mpo na bato ya mbula nyonso, “mpo na koyeba mayele mpe kolakisama mpe kososola maloba na boyebi. Ee, kolakisama na mayele mpe boyengebene mpe kosambisa na sembo mpe kokata na solo; kopesa mayele epai na elema, boyebi mpe toli epai na elenge”. Kasi mbala mosusu, moto moko “akobongisama bobele na maloba te, mpamba te ata asosoli ntina, akozongisa monoko te.” (Masese 1:2-4; 29:19) Bamoko baoyo bazwi naino mayele te, balingaka mpenza “komeka mozindo na mosapi” lokola mwana oyo abunga nzela asalaki yango liboso ete ‘azongela lisusu makanisi malamu.—Luka 15:11-17.
11. (a) Ndenge nini lisangá na Kolinti mpe Yona basembolamaki? (b) Bitumbu nini Davidi azwaki mpo ete asalaki pite mpe alukaki kobomba libunga na ye? (c) Maloba nini na Davidi mazwami na Nzembo 51 mamonisi ete abongolaki mpenza motema na ye mobimba?
11 Kolobelaka mpo na mbuma ebimaki nsima wana atindaki mokanda na lisangá na Kolinti, Paulo akomaki: “Bozokaki na mitema kino bobongoli mitema; mpamba te bozokaki na mitema na mokano na Nzambe . . . (mpe yango ebimisaki nini?) bolukaki boyengebene.” (2 Bakolinti 7:9-11) Yona asembolamaki na nzela na mopepe makasi oyo etombokisaki la mer, mpe na nzela ya mbisi moko ya monene. (Yona 1:2, 3, 12, 17; 2:10; 3:1-4) Mpo ete asalaki pite mpe asalaki makasi nyonso mpo na kobomba libunga na ye, Davidi azwaki bitumbu, lokola 2 Samwele 12:9-14 emonisi yango. Amonisaki ete abongolaki motema na maloba oyo mazali kosimba motema mpe mazwami kati na Nzembo 51: “Sukola ngai malamu kolongola mabe na ngai, petola ngai na masumu na ngai. Mpo ete nayebi epengweli na ngai mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso.’—Nz 51:2, 3, 9-11, 17.
12. Epai na bato mosusu, bitumbu nini makasi esengeli kozwama, mpe nsuka na baoyo bazali koboya mpamela mbala na mbala ezali nini?
12 Epai na bato mosusu, esengeli kozwa bikateli makasi, lokola Masese 26:3 emonisi yango na maloba malandi: “Mpimbo mpo na mbalata, ekangeli na monoko mpo na mpunda, mpe lingenda mpo na mokongo na zoba.” Jéhovah atikaki mbala mosusu basaleli na ye, Bayisraele, bazwa mpasi oyo bazalaki komibendela: “Baboyaki maloba na Nzambe, batiolaki mpe toli na Oyo-Aleki-likolo. Bongo asilisaki molende na bango na mosala; batelenganaki mpe moto na kosunga azalaki te. Wana bangangaki epai na Jéhovah kati na bolozi na bango, ye mpe asikolaki bango na mpasi na bango nyonso.” (Nzembo 107:11-13) Nzokande, bazoba bakomaka motema makasi na boye ete ata etumbu moko te ekoki kosala bango mpasi: “Ye oyo akoyeisa nkingo na ye makasi mpo na mpamela mingi akobebisama pwasa, na ebikelo te.”—Masese 29:1.
Ndenge nini kopesa mpe kondima mpamela
13. Esengeli kopengola nini na ntango ozali kopamela moto, mpe ndenge nini osengeli kopesa yango?
13 Ata epesami na lolenge nini, mpamela ekoki kopesama na nkanda te. Na esika ete ezala na litomba, “nkanda ekopesa nzela na kowelana”. Totangi boye: “Ye oyo akosilika noki te azali na boyebi monene; kasi molimo mokuse akopesa ebebe nzela.” “Bososoli na moto na mayele ekozikisa nkanda na ye; nkembo na ye ezali ete akolimbisa masumu.” (Masese 29:22; 14:29; 19:11). Soko esengeli kopesa etumbu, kolekisa ndelo te. Pesa yango na ntango esengeli mpe na lolenge oyo ezali malamu—nokinoki te, nsima mingi mpe te, na bolembu te, kasi mpe na makasi mingi te.
14. Batoli nini mosusu baoyo basengeli kopesa mpamela, basengeli kozwa?
14 Tala mwa batoli oyo epesami epai na baoyo basengeli kopesa mpamela: “Opamela mobange na makasi te, kasi obondela ye lokola tata; mpe bilenge mibali lokola bandeko mpe mibange basi lokola bamama mpe bilenge basi lokola bandeko basi na mpeto nyonso.” (1 Timote 5:1, 2) Tobondelaka moto oyo tozali kopamela, tosalelaka ye makambo makasimakasi? “Bandeko, soko moto azwami na likambo, bino bato bozali na bizaleli na elimo ekoki, bobutwisa ye na elimo na bopolo. Omitalela yo moko ete yo omekama te.” (Bagalatia 6:1) Topesaka toli na bopolo nyonso, na koyebaka mpe ete biso tozali na mabunga na biso? “Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo.” (Matai 7:12) Omityaka na esika ya moto oyo ozali kopamela mpe okangaka ntina ya likambo ezwi ye?
15. Esengeli kozala na ezaleli nini mpo na kondima mpamela, mpe batoli nini lisusu ekoki kopesama epai na baoyo bapamelami?
15 Esengeli kozala na kosokema mpo na kondima mpamela. Ntango opamelami, omonaka ete mpamela yango elekisi ndelo, ezali makasi to ezangi ntina? Kozwa makanisi mabe nokinoki te. Zwa ntango ya kokanisa. Komitya makanisi mabe na moto te. Talela na ndenge malamu mabunga oyo bamonisi yo. Ata soko mpamela nyonso ezali na ntina te, mosusu ekoki kozala na ntina. Zala na makanisi molai; talela yango na ndenge malamu. Ozokaka mpambampamba wana bazali kopesa yo mpamela? Osilikaka nokinoki? Mbala mosusu ekosengela na yo ntango mingi mpo na kokanga ntina ya mpamela. Tika naino ete kozoka oyo ozoki esila. Batela lolemo na yo. Talela malamumalamu makambo oyo bazali koyebisa yo. Ekoki kozala ete oyinaka moto oyo azali kopesa yo toli mpe yango ezali kotinda yo oboya toli na ye? Ata bongo, batela na makanisi ete toli epesameli yo na mokano malamu mpe ekoki koboyama bobele na ebandeli te.
16. (a) Ba versets nini ya Biblia mpe mituna nini esengeli kotalela na ntango bazali kopesa yo toli? (b) Mayoki nini ya mokomi na nzembo ekozala malamu ete okabola yango?
16 Tala mwa ba versets oyo ekozala malamu mpo ete tokanisa na yango mozindo ntango topamelami: “Ye oyo azali na mayele azali na maloba mingi te; moto na boyebi azali na motema na mpio.” (Masese 17:27) Oyokaka na motema ya kokita moto oyo azali kopamela yo? “Nzela na zoba emonani malamu na miso na ye, nde ye oyo akoyokamela toli azali na mayele.” (Masese 12:17) Kozanga ete otalela likambo okanisaka ete ozali na elonga, to oyokamelaka naino makambo oyo bazali koyebisa yo? ‘Esengeli koyoka noki nde koloba malembe; koyoka mpe nkele malembe lokola.’ (Yakobo 1:19) Osalelaka ba versets oyo na ntango bazali kopesa yo toli? “Yoka nkanda noki na molimo na yo te, mpamba te nkanda ekoumela na motema na bazoba.” (Mosakoli 7:9) Osilikaka nokinoki? Na bongo ekozala malamu na kokabola mayoki ya mokomi na nzembo, oyo alobaki: “Tika ete moyengebene abeta ngai, malamu bongo; tika ete apesa ngai toli; ekozala lokola mafuta malamu; moto na ngai ekoboya yango te.”—Nzembo 141:5.
Toyika mpiko
17. Mpo na nini ezali ntango nyonso likambo ya petee mpo na kondima mpamela, kasi maloba nini mazwami na Baebele 12:7, 11 ekosalisa biso na koyika mpiko?
17 Ezalaka ntango nyonso likambo ya petee te mpo na kondima disipline. Mbala mosusu ekitisaka moto mpe ezalaka na bipekiseli. Ekoki ata komonisa mpasi. Kasi yika mpiko na mimekamo nyonso oyo. Ekoleka, mpe ekopesa esika na esengo. Omikundola likambo oyo ete: “Boyika mpiko mpo na etumbu. Nzambe azali kosalela bino lokola bana. Mpo ete mwana nani azali, oyo tata na ye akopesaka ye bitumbu te? Na ntango na yango, bitumbu nyonso eyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ekozwisa mbuma na kimya na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.”—Baebele 12:7, 11.
18, 19. Mayoki nini na Yilimia mpe na mokomi na nzembo esengeli na biso mpe tolanda yango ntango topamelami?
18 Na bongo, soko disipline ezali mpasi mpo na koyikela yango mpiko, zela kino ntango ekobimisa mbuma na kimya oyo ekobimisa. Zela Jéhovah, lokola Yilimia alobaki yango: “Molimo na ngai ezali kokanisa yango naino mpe ekambami kati na ngai. Kasi nazali kokanisa likambo oyo, na bongo nazali na elikya.” (Bileli 3:20, 21) Omikundola ete na mawa na ye mokomi na nzembo angangaki: “E molimo na ngai, mpo na nini okweisami, mpo na nini opesameli mawa kati na ngai? Tya elikya epai na Nzambe, mpo ete nakotonda ye mobikisi lisusu, liboso na elongi na ye.”—Nzembo 42:5, 11; 43:5.
19 Na yango, tika ete moko na moko kati na biso azela Nzambe ntango azali kozwa mpamela. Nsima na kobongisama na disipline yango, tokobuka mbuma na kimya, yango boyengebene.
Bozongeli
◻ Ntina ya fimbo na mpamela ezali nini?
◻ Liziba monene ya disipline ezali nini? Maziba mosusu mazali nini?
◻ Longola mpamela epesami na maloba, bitumbu nini ya makasi lisusu ezalaka mbala mosusu ntina mpo na kozwa yango?
◻ Tanga mwa mitinda esengeli kolandama na ntango esengeli kosembola moto.
◻ Batoli nini ekosalisa biso na kondima mpamela?
[Elilingi na lokasa 17]
Ozali na mayele ya ‘koyoka disipline?’
[Elilingi na lokasa 18]
Mitinda ya kolanda mpo na kosembola bana ekoki kosalelama epai na bakolo