-
Kanisá mwasi ya LotaZwá mateya na masolo ya Biblia
-
-
LITEYA 10
Kanisá mwasi ya Lota
Lota azalaki kofanda na mokili ya Kanana elongo na Abrahama, ndeko ya tata na ye. Na nsima, Abrahama ná Lota bakómaki na bibwɛlɛ ebele, mpe esika ezalaki kokoka lisusu te mpo na bango mibale. Abrahama ayebisaki Lota: ‘Tokoki lisusu kofanda esika moko te. Yo poná nzela oyo olingi kokende, mpe ngai nakokende nzela mosusu.’ Abrahama azalaki mpenza koluka liboso bolamu ya basusu!
Lota amonaki mokili moko kitoko pembeni ya engumba Sodoma. Ezalaki na mai mpe matiti ebele. Na yango, aponaki esika yango mpe amemaki libota na ye kuna.
Bato ya Sodoma mpe ya Gomora, engumba oyo ezalaki pene ya Sodoma, bazalaki mabe mpenza. Bazalaki mabe mingi mpenza, yango wana Yehova amonaki malamu abebisa bingumba yango. Kasi lokola Nzambe alingaki kobatela Lota ná libota na ye, atindaki baanzelu mibale bákende koyebisa bango ete: ‘Bósala noki! Bóbima na engumba oyo! Yehova alingi kobebisa yango.’
Lota abimaki mbala moko te. Azalaki koumela. Na yango baanzelu basimbaki ye, ná mwasi na ye, ná bana na ye mibale ya basi mpe babimisaki bango nokinoki na engumba, mpe balobaki na bango ete: ‘Bókima mbangu! Bóbikisa bomoi na bino, mpe bótala nsima te. Soki botali nsima, bokokufa!’
Ntango bakómaki na engumba Zoare, Yehova anɔkisaki mbula ya mɔtɔ mpe ya sufulu na Sodoma mpe Gomora. Bingumba yango mibale ebebisamaki nyonso. Lokola mwasi ya Lota atosaki Yehova te mpe atalaki nsima, akómaki likonzí ya mungwa! Kasi Lota ná bana na ye ya basi babikaki mpo batosaki Yehova. Na ntembe te ezalaki mawa mpenza ndenge mwasi ya Lota atosaki te. Kasi Lota ná bana na ye ya basi basepelaki mpo balandaki malako ya Yehova.
“Bókanisa mwasi ya Lota.”—Luka 17:32
-
-
Kondima na ye emekamakiZwá mateya na masolo ya Biblia
-
-
LITEYA 11
Kondima na ye emekamaki
Abrahama ateyaki mwana na ye Yisaka kolinga Yehova mpe kotyela bilaka na Ye nyonso motema. Kasi ntango Yisaka akómaki na mbula soki 25, Yehova asɛngaki Abrahama likambo moko ya mpasi mpenza. Likambo nini?
Nzambe ayebisaki Abrahama: ‘Nabondeli yo, zwá mwana na yo ya mobali kaka moko mpe pesá ye mbeka na ngomba moko na mokili ya Moria.’ Abrahama ayebaki te ntina oyo Yehova asɛngaki ye asala bongo. Kasi atosaki.
Na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, Abrahama azwaki Yisaka ná basaleli na ye mibale mpe bakendaki na Moria. Nsima ya mikolo misato, bamonaki bangomba ya mokili yango na mosika. Abrahama ayebisaki basaleli na ye bázela, mpo ye ná Yisaka bakei kopesa mbeka. Abrahama apesaki Yisaka nkoni amema, mpe ye moko asimbaki mbeli. Yisaka atunaki tata na ye: ‘Wapi nyama oyo tokopesa mbeka?’ Abrahama ayanolaki: ‘Mwana, Yehova akopesa yango.’
Ntango bakómaki na ngomba yango, batongaki etumbelo. Na nsima Abrahama akangaki Yisaka mabɔkɔ ná makolo na nsinga mpe alalisaki ye likoló ya etumbelo.
Abrahama atombolaki mbeli. Na ntango yango, anzelu ya Yehova abelelaki na likoló: ‘Abrahama! Kosala mwana mabe te! Sikoyo nayebi ete ozali na kondima epai ya Nzambe mpo ondimi kopesa mwana na yo mbeka.’ Na nsima, Abrahama amonaki mpate-mobali moko oyo maseke na yango ekangamaki na mwa banzete. Afungolaki Yisaka nsinga nokinoki mpe na esika na ye, apesaki mpate-mobali wana mbeka.
Banda mokolo wana, Yehova akómaki kobenga Abrahama moninga na ye. Oyebi mpo na nini? Abrahama azalaki kosala eloko nyonso oyo Yehova azalaki kosɛnga ye, ata soki ayebi te ntina oyo Yehova asɛngi yango.
Yehova azongelaki elaka na ye epai ya Abrahama: ‘Nakopambola yo, mpe nakokómisa bana na yo mingi.’ Yango elingi koloba ete Yehova akopambola bato nyonso ya malamu na nzela ya libota ya Abrahama.
“Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”—Yoane 3:16
-