-
Yakobo azwaki libulaZwá mateya na masolo ya Biblia
-
-
LITEYA 12
Yakobo azwaki libula
Yisaka azalaki na mbula 40 ntango abalaki Rebeka. Alingaki ye mingi. Na nsima, babotaki mapasa ya mibali.
Ya liboso nkombo na ye ezalaki Esau, mpe oyo ya mibale Yakobo. Esau azalaki kolinga kotambola libándá, mpe azalaki mobomi-nyama. Kasi Yakobo azalaki kolinga kofanda na ndako.
Na ntango wana, mwana ya liboso azalaki kozwa mabele mpe mbongo ya libota soki tata akufi. Bazalaki kobenga biloko yango libula. Na libota ya Yisaka, longola makambo wana, lokumu ya kozwa mokumba na kokokisama ya bilaka oyo Yehova apesaki Abrahama ezalaki mpe libula. Esau azalaki mpenza kokipe bilaka yango te, kasi Yakobo ayebaki ete ezali na ntina mingi.
Mokolo moko Esau azongaki ndako azalaki ya kolɛmba makasi mpo alekisaki mokolo mobimba na koluka banyama. Ayokaki nsolo ya biloko kitoko oyo Yakobo azalaki kolamba, mpe alobaki: ‘Nazali na nzala makasi! Pesá ngai mwa ndambo ya supu ya motane wana!’ Yakobo alobaki: ‘Nakopesa yo, kasi liboso pesá ngai elaka ete nakoki kozwa libula na yo.’ Esau alobaki: ‘Nazali na ntina ya libula te! Zwá na yo. Nalingi nde kolya.’ Okanisi ete likambo oyo Esau asalaki ezalaki ya mayele? Te. Esau akabaki eloko ya ntina mingi kaka mpo na mwa saani ya supu ya lantiye.
Ntango Yisaka akómaki mobange, ekómaki ntango ya kopesa mwana na ye ya liboso lipamboli. Kasi Rebeka asalisaki Yakobo, leki ya Esau, azwa lipamboli yango. Ntango Esau ayebaki likambo yango, ayokaki nkanda makasi mpe akanaki koboma lipasa na ye. Yisaka ná Rebeka balingaki kobatela Yakobo, yango wana bayebisaki ye: ‘Kende kofanda epai ya Labana, ndeko ya mama na yo, tii nkanda ya Esau ekokita.’ Yakobo ayokaki toli ya baboti na ye mpe akimaki mpo na kobatela bomoi na ye.
“Litomba nini moto akozala na yango soki azwi mokili mobimba kasi abungisi bomoi na ye? To eloko nini mpenza moto akoki kopesa na esika ya bomoi na ye?”—Marko 8:36, 37
-
-
Yakobo ná Esau bayokaniZwá mateya na masolo ya Biblia
-
-
LITEYA 13
Yakobo ná Esau bayokani
Yehova apesaki Yakobo elaka ete akobatela ye kaka ndenge abatelaki Abrahama ná Yisaka. Yakobo akendaki kofanda na mboka babengi Harane; abalaki kuna, abotaki bana ebele, mpe akómaki na bozwi mingi.
Na nsima, Yehova alobaki na Yakobo: ‘Zongá na mokili ya batata na yo.’ Yakobo ná libota na ye babandaki mobembo molai mpo na kozonga. Na nzela, bato bayaki koyebisa Yakobo ete: ‘Ndeko na yo Esau azali koya, elongo na mibali 400!’ Yakobo azalaki kobanga ete Esau asala ye ná libota na ye mabe. Abondelaki Yehova: ‘Bikisá ngai na lobɔkɔ ya ndeko na ngai.’ Mokolo oyo elandaki, Yakobo atindelaki Esau bampate, bantaba, bangɔmbɛ, bakamela, mpe bampunda ebele.
Na butu, ntango Yakobo azalaki ye moko, amonaki anzelu! Anzelu yango abandaki kobunda na ye. Babundaki tii na ntɔngɔ. Yakobo ayokaki mpasi, kasi atikaki te. Anzelu alobaki na ye: ‘Tiká ngai nakende.’ Kasi Yakobo alobaki: ‘Nakotika yo kaka soki opamboli ngai.’
Nsukansuka anzelu yango apambolaki Yakobo. Sikoyo Yakobo ayebaki ete Yehova akotika te ete Esau asala ye mabe.
Na ntɔngɔ, ntango Yakobo atalaki na mosika, amonaki Esau ná mibali 400. Yakobo akendaki liboso ya libota na ye, mpe afukamaki mbala nsambo liboso ya ndeko na ye. Esau ayaki mbangu epai ya Yakobo mpe ayambaki ye. Babandaki kolela mpe bayokanaki. Okanisi ete Yehova ayokaki ndenge nini na milende oyo Yakobo asalaki mpo na koyokana na ndeko na ye?
Na nsima, Esau azongaki epai na ye, Yakobo mpe akendaki epai na ye. Yakobo azalaki na bana mibali 12. Nkombo na bango yango oyo: Rubene, Simeone, Levi, Yuda, Dani, Nafatali, Gade, Ashere, Isakare, Zebulone, Yozefe, ná Benyamina. Na bana yango, Yehova asalelaki Yozefe mpo na kobikisa bato na Ye. Oyebi ndenge asalaki yango? Tokolobela yango.
“Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló.”—Matai 5:44, 45
-