-
Bamoni bozwi ya solo na Hong KongLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1993 | 15 Mai
-
-
Bokonzi bazali kopesa na bólongi litatoli na balabala. Bazali mpe kokutana na bato na bisika na bango ya mosala wana bazali kozongela basali na biro, batekisi, basali bilanga, mpe balabi na mbisi oyo bazali koya na libongo nsima na kolɔba na mai monene oyo ezali na Sud ya Chine.
Ekoki kozala solo na koloba ete “mbuma na elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te” kati na Hong-Kong. (Matai 9:37) Sikawa, Temwe moko asengeli kosakola na bafandi 2.300. Lokola bayebi ntina ya kosala na lombangu na mosala ya kobuka mbuma, kati na basakoli na Bokonzi 2.600, pene na 600 bazali ba pionniers basakoli ya nsango malamu. Ba Témoins de Jéhovah kati na Hong-Kong, lokola baoyo bazali bipai mosusu, bazali kososola ete ˈmapamboli na Jéhovah makoyeisaka bozwi.ˈ (Masese 10:22) Na yango, bazali kosala makasi mpo na kosalisa bato mingi na bisika ya bozwi epai bafandi ete bamona bozwi ya solo.
-
-
Okolanda Jéhovah na motema na yo mobimba?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1993 | 15 Mai
-
-
Okolanda Jéhovah na motema na yo mobimba?
“BAYENGEBENE bazali na mpiko lokola nkosi.” (Masese 28:1) Bazali komonisa kondima, na elikya nyonso bazali kosalela Liloba na Nzambe, mpe na molende nyonso bazali kokende liboso kati na mosala na Jéhovah atako mikakatano mizali.
Ntango Bayisraele bazalaki na Sinai nsima wana Nzambe abimisaki bango longwa na boombo na Ezipito na ekeke ya 16 L.T.B., mibali mibale bamonisaki mpenza ete bazalaki na mpiko lokola nkosi. Bamonisaki mpe bosembo epai na Jéhovah kati na bantango ya mikakatano.
-