Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bakokisaki elaka na bango te
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Bayisraele bazali koyemba mpe kobinela mwana-ngɔmbɛ ya wolo

      LITEYA 24

      Bakokisaki elaka na bango te

      Yehova alobaki na Moize: ‘Matá epai na ngai na ngomba. Nakokoma mibeko na ngai na bitanda ya mabanga mpe nakopesa yo yango.’ Moize amataki na ngomba mpe afandaki kuna mikolo 40. Ntango azalaki kuna, Yehova akomaki Mibeko Zomi na bitanda mibale ya mabanga mpe apesaki yango Moize.

      Moize azali kobwaka bitanda ya mabanga

      Nsima ya mwa mikolo, Bayisraele bakanisaki ete Moize asundoli bango. Balobaki na Arona: ‘Tolingi moto moko akamba biso. Salelá biso nzambe!’ Arona alobaki: ‘Bópesa ngai wolo na bino.’ Anyangwisaki wolo yango mpe asalaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ. Bato balobaki: ‘Mwana-ngɔmbɛ oyo nde Nzambe oyo abimisaki biso na Ezipito!’ Babandaki kosambela mwana-ngɔmbɛ yango mpe basalaki fɛti. Basalaki malamu? Te, mpo bato yango balakaki ete bakosambela kaka Yehova. Kasi bakokisaki elaka na bango te.

      Yehova amonaki likambo oyo ezalaki kosalema mpe ayebisaki Moize: ‘Kitá epai ya bato. Batosi ngai te mpe bazali kosambela nzambe ya lokuta.’ Moize akitaki na ngomba, asimbi bitanda mibale.

      Ntango akómaki pene na kaa, ayokaki bato bazali koyemba. Na nsima, amonaki bango bazali kobina mpe kogumbamela mwana-ngɔmbɛ. Moize asilikaki makasi. Abwakaki bitanda yango mibale na mabele, mpe ebukanaki. Na mbala moko, apanzaki ekeko yango. Na nsima, atunaki Arona: ‘Ndenge nini bato bandimisi yo osala likambo ya mabe boye?’ Arona alobaki: ‘Kosilika te. Yo moko oyebi bato oyo. Balingaki nasalela bango nzambe, yango wana natyaki wolo na bango na mɔtɔ mpe ebimisaki mwana-ngɔmbɛ!’ Arona asengelaki kosala bongo te. Moize azongaki na ngomba mpe asɛngaki Yehova alimbisa bato.

      Yehova alimbisaki baoyo bandimaki kotosa ye. Ezalaki na ntina mpenza Bayisraele bálanda litambwisi ya Moize!

      “Ntango nyonso oyo osaleli Nzambe elako, koumela te kokokisa yango, mpo asepelaka na bazoba te. Elako oyo osali, kokisá yango.”​—Mosakoli 5:4

      Mituna: Bayisraele basalaki nini ntango Moize azalaki te? Moize asalaki nini ntango azongaki?

      Kobima 24:12-18; 32:1-30

  • Tabernakle mpo na losambo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Tabernakle ná lopango na yango

      LITEYA 25

      Tabernakle mpo na losambo

      Ntango Moize azalaki na Ngomba Sinai, Yehova ayebisaki ye atonga hema moko oyo ekesanaki na misusu. Babengaki yango tabernakle, epai Bayisraele bakokaki kosambela ye. Bakobanda komema tabernakle yango esika nyonso oyo bakokende.

      Yehova alobaki: ‘Yebisá bato bápesa biloko oyo bazali na yango, mpo na kotonga tabernakle.’ Bayisraele bapesaki wolo, palata, motako, mabanga ya ntalo, biloko ya matoi, mpɛtɛ, mpe bongo na bongo. Bapesaki mpe lɛnɛ, lini, mposo ya nyama, mpe biloko mosusu ebele. Bazalaki kopesa biloko ebele mpenza tii Moize ayebisaki bango: ‘Ekoki! Bópesa lisusu te.’

      Bayisraele bazali komema makabo mpo na kosalisa na kotonga tabernakle

      Basi ná mibali oyo bayebi mosala malamu bapesaki mabɔkɔ mpo na kotonga tabernakle. Yehova apesaki bango bwanya mpo básala yango. Bamosusu basalaki nsinga, batongaki bilamba, to basalaki mayemi na nsinga. Bamosusu babongisaki mabanga, basalaki misala na wolo, to na mabaya.

      Batongaki tabernakle kaka ndenge Yehova ayebisaki bango. Basalaki rido moko ya kitoko mpo na kokabola tabernakle na biteni mibale: Esika Mosantu mpe Esika oyo Eleki Bosantu. Na Esika Eleki Bosantu, batyaki sanduku ya kondimana, oyo esalemaki na nzete ya akasia mpe wolo. Na Esika Mosantu, batyaki etɛlɛmiselo ya miinda oyo basalá na wolo, mesa, mpe etumbelo ya mpaka ya malasi. Na lopango na yango ezalaki na saani moko monene oyo basalá na motako mpe etumbelo moko monene. Sanduku ya kondimana ezalaki kokundwela Bayisraele elaka na bango ya kotosa Yehova. Oyebi soki kondimana ezali nini? Ezali elaka moko ya ndenge mosusu.

      Yehova aponaki Arona ná bana na ye básalaka na tabernakle lokola banganga-nzambe. Basengelaki kobatela yango mpe kopesa Yehova mbeka kuna. Kaka Arona nde akokaki kokɔta na Esika Eleki Bosantu mpo azalaki nganga-nzambe monene. Azalaki kokɔta kuna mbala moko na mbula mpo na kopesa mbeka mpo na masumu na ye moko, ya bato ya libota na ye, mpe ya ekólo mobimba ya Yisraele.

      Bayisraele basilisaki kotonga tabernakle mbula moko nsima ya kobima na Ezipito. Sikoyo bazwaki esika ya kosambela Yehova.

      Yehova amonisaki ete asepeli na tabernakle yango mpe asalaki ete lipata moko emonana likoló na yango. Soki lipata efandi kaka likoló ya tabernakle, Bayisraele bazalaki kotikala kaka esika bazali. Kasi soki lipata etombwani, elongwe na tabernakle, bazalaki koyeba ete basengeli kolongwa na esika wana. Bazalaki komema tabernakle bitenibiteni mpe kolanda lipata.

      “Bongo nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango.’”​—Emoniseli 21:3

      Mituna: Yehova ayebisaki Moize atonga nini? Mikumba nini Yehova apesaki Arona ná bana na ye?

      Kobima 25:1-9; 31:1-11; 40:33-38; Baebre 9:1-7

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto