-
Banɔngi zomi na mibaleZwá mateya na masolo ya Biblia
-
-
LITEYA 26
Banɔngi zomi na mibale
Bayisraele balongwaki na Ngomba Sinai, bakatisaki esobe ya Parane, mpe bakómaki na esika babengi Kadeshe. Kuna, Yehova ayebisaki Moize: ‘Tindá mibali 12, mobali moko na libota mokomoko, mpo bákende kotala Kanana, mokili oyo nakopesa Bayisraele.’ Na yango, Moize aponaki mibali 12 mpe alobaki na bango: ‘Bókende na Kanana mpe bótala soki mabele na yango ebotaka malamu. Bótala soki bato na yango bazali makasi to te, soki bafandaka na bahema to na bingumba.’ Banɔngi yango 12, kati na bango Yosua ná Kalebe, bakendaki na Kanana.
Nsima ya mikolo 40, mibali yango bazongaki, bayaki na bambuma ya figi, ya grenade, mpe ya vinyo. Banɔngi yango bapesaki nsango oyo: ‘Mokili yango ezali malamu, kasi bato na yango bazali makasi mpe bingumba na bango ezali na bifelo ya milai.’ Na nsima, Kalebe alobaki: ‘Tokolonga bango. Tókende kaka sikoyo!’ Oyebi mpo na nini Kalebe alobaki bongo? Mpo ye ná Yosua batyelaki Yehova motema. Kasi banɔngi mosusu zomi balobaki: ‘Te! Bato yango bazali bingambe, bilombe! Tomimonaki lokola makɔnkɔ (mabanki) liboso na bango.’
Bayisraele balɛmbaki nzoto. Babandaki komilelalela mpe kolobana: ‘Tópona mokambi mosusu mpe tózonga na Ezipito. Mpo na nini tókende kuna mpo báboma biso?’ Yosua ná Kalebe balobaki: ‘Bótosa Yehova, mpe bóbanga te. Yehova akobatela biso.’ Kasi Bayisraele bayokaki te. Balingaki kutu koboma Yosua ná Kalebe!
Yehova asalaki nini? Alobaki na Moize: ‘Nasali makambo mingi mpo na Bayisraele, kasi bazali kaka kotosa ngai te. Bakotikala na esobe mbula 40, mpe bakokufa wana. Kaka bana na bango mpe Yosua ná Kalebe nde bakokɔta na mokili oyo nalakaki kopesa bango.’
“Mpo na nini bozali kobanga boye, bino bato ya kondima moke?”—Matai 8:26
-
-
Batombokelaki YehovaZwá mateya na masolo ya Biblia
-
-
LITEYA 27
Batombokelaki Yehova
Mwa moke na nsima, wana Bayisraele bazalaki na esobe, Kora, Datane, Abirame ná bato mosusu 250 batombokelaki Moize. Balobaki na ye ete: ‘Tobaye bino! Mpo na nini yo nde ozali mokambi na biso mpe Arona azali nganga-nzambe monene? Yehova azali kaka elongo na yo ná Arona te, azali elongo na biso nyonso.’ Yehova asepelaki te na likambo wana. Amonaki ete bato yango batombokelaki nde ye!
Moize alobaki na Kora ná bato na ye ete: ‘Lobi bóya liboso ya tabernakle, mpe moto na moto amema eloko na ye ya kotya mɔtɔ ná mpaka ya malasi likoló na yango. Yehova akolakisa biso moto oyo ye aponi.’
Na ntɔngɔ, Kora ná bato 250 bakendaki kokutana na Moize na tabernakle. Batumbaki mpaka ya malasi lokola nde bazalaki banganga-nzambe. Mpe Yehova ayebisaki Moize ná Arona: ‘Bólongwa na kati ya Kora ná bato na ye.’
Kora akendaki esika Moize abengaki bango na tabernakle, kasi Datane, Abirame, ná mabota na bango baboyaki kokende. Yehova ayebisaki Bayisraele bálongwa pene na hema ya Kora, ya Datane, mpe ya Abirame. Bayisraele balongwaki mbala moko. Datane, Abirame, ná mabota na bango batɛlɛmaki na libándá ya bahema na bango. Na mbala moko mabele ekabwanaki mpe emɛlaki bango! Na tabernakle, mɔtɔ eutaki na likoló mpe etumbaki Kora ná bato na ye 250.
Na nsima, Yehova alobaki na Moize: ‘Zwá lingenda ya nkumu ya libota mokomoko, mpe komá nkombo ya mokomoko likoló ya lingenda na ye. Na lingenda ya libota ya Levi, komá nkombo ya Arona. Tyá yango na kati ya tabernakle, mpe lingenda ya moto oyo naponi ekobimisa fololo.’
Mokolo oyo elandaki, Moize abimisaki mangenda yango mpe alakisaki bankumu. Lingenda ya Arona nde ebimisaki fololo mpe ebotaki mbuma ya amande oyo eteli. Na yango, Yehova amonisaki ete aponaki Arona azala nganga-nzambe monene.
“Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango.”—Baebre 13:17
-