Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Rahaba abombaki banɔngi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Rahaba abombi banɔngi mpe atindi basoda na nzela mosusu

      LITEYA 30

      Rahaba abombaki banɔngi

      Ntango Bayisraele oyo Yosua atindaki bakómaki na engumba Yeriko, bafandaki na ndako ya mwasi moko na nkombo Rahaba. Ntango mokonzi ya Yeriko ayokaki yango, atindaki basoda na ndako ya Rahaba. Rahaba abombaki banɔngi yango mibale na nsamba mpe atindaki basoda na nzela mosusu. Alobaki na banɔngi ete: ‘Nakosalisa bino mpo nayebi ete Yehova azali na ngámbo na bino mpe ete bokozwa mokili oyo. Nabondeli bino, bópesa ngai elaka ete bokobikisa libota na ngai.’

      Mibali yango bayebisaki Rahaba ete: ‘Tolaki yo ete moto moko te oyo akozala na kati ya ndako na yo akozwa likama.’ Balobaki na ye lisusu ete: ‘Tyá nsinga ya motane na fɛnɛtrɛ, mpe yo ná libota na yo bokobika.’

      Ndako ya Rahaba, ná nsinga ya motane na lininisa, ekwei te ntango bifelo ya Yeriko ekwei

      Rahaba akitisaki bato yango na nsinga moko na fɛnɛtrɛ. Bakendaki na bangomba mpe babombanaki kuna mikolo misato, mpe bazongaki epai ya Yosua. Na nsima, Bayisraele bakatisaki Ebale Yordani mpe bamibongisaki mpo na kozwa mokili yango. Yeriko ezalaki engumba ya liboso oyo bazwaki. Yehova ayebisaki bango bátambola zingazinga na yango mbala moko na mokolo, na boumeli ya mikolo motoba. Na mokolo ya nsambo, batambolaki zingazinga ya engumba yango mbala nsambo. Na nsima banganga-nzambe babɛtaki kelelo, mpe basoda bagangaki na mongongo makasi mpenza. Bifelo ya Yeriko ekweaki! Kasi, ndako ya Rahaba oyo ekangamaki na efelo yango ekweaki te. Rahaba ná bato ya libota na ye babikaki mpo Rahaba atyelaki Yehova motema.

      “Ndenge moko mpe Rahaba . . . atángamaki nde te moto ya sembo mpo na misala na ye, nsima ya koyamba malamu bamemi-nsango mpe kotika bango bákende na nzela mosusu?”​—Yakobo 2:25

      Mituna: Mpo na nini Rahaba asalisaki banɔngi? Ndenge nini Bayisraele bakweisaki Yeriko? Nini ekómelaki Rahaba ná libota na ye?

      Yosua 2:1-24; 6:1-27; Baebre 11:30, 31; Yakobo 2:24-26

  • Yosua ná bato ya Gibeone
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Bato ya Gibeone bayei liboso ya Yosua ná basoda na ye, balati bilamba ebebabebá

      LITEYA 31

      Yosua ná bato ya Gibeone

      Bato ya bikólo mosusu ya Kanana bayokaki nsango ya makambo oyo esalemaki na Yeriko. Bakonzi na bango bayokanaki básangana mpo na kobundisa Bayisraele. Kasi bato ya Gibeone basalelaki mayele mosusu. Balataki bilamba ebebabebá, bayaki epai ya Yosua, mpe balobaki na ye ete: ‘Touti na mokili moko mosika. Toyoki nsango ya Yehova mpe nyonso oyo asalelaki bino na Ezipito mpe na Moabe. Pesá biso elaka ete okobundisa biso te, mpe tokokóma basaleli na yo.’

      Yosua andimelaki bango mpe alakaki ete akobundisa bango te. Nsima ya mikolo misato, eyebanaki ete mokili na bango ezalaki mosika te. Bazalaki kaka bato ya Kanana. Yosua atunaki bato ya Gibeone: ‘Mpo na nini bokosaki biso?’ Balobaki: ‘Tozalaki kobanga! Toyebi ete Yehova Nzambe na bino azali kobundela bino. Bóboma biso te.’ Yosua atosaki maloba na ye mpe atikaki bango na bomoi.

      Eumelaki te, bakonzi mitano ya Kanana mpe basoda na bango bayaki kobundisa bato ya Gibeone. Yosua ná basoda na ye batambolaki butubutu mpo na kobikisa bango. Etumba ebandaki na ntɔngɔntɔngɔ mpenza. Bato ya Kanana babandaki kokima bipai na bipai. Bisika nyonso oyo bakimaki, Yehova akweiselaki bango mabanga ya minene. Na nsima, Yosua asɛngaki Yehova atɛlɛmisa moi. Mpo na nini asɛngaki Yehova atɛlɛmisa moi nzokande likambo yango esalemaki naino liboso te? Mpo Yosua atyelaki Yehova motema. Moi elalaki te mokolo wana tii Bayisraele basilisaki kolonga bakonzi ya Kanana ná basoda na bango.

      Yosua atali likoló mpe asɛngi Yehova atɛlɛmisa moi

      “Tiká liloba na bino ‘Ɛɛ’ ezala ɛɛ, ‘Te’ na bino, te; mpo maloba oyo ebakisami likoló na oyo wana euti na moto mabe.”​—Matai 5:37

      Mituna: Bato ya Gibeone basalaki nini mpo na komibatela? Ndenge nini Yehova asalisaki Bayisraele?

      Yosua 9:1–10:15

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto