LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA
Ndenge ya kotika baaparɛyi na esika na yango
Baaparɛyi ezali na ntina na libala, kasi ekoki mpe kobimisa makama. Na libala na yo ezali ndenge nini?
Oyo osengeli koyeba
Kosalela baaparɛyi na bwanya ekoki kosalisa mingi na libala. Na ndakisa, babalani mosusu basalelaka baaparɛyi mpo na kosolola ntango bazali esika moko te na boumeli ya mokolo.
“Kotindela molongani na yo mesajɛ lokola “Je t’aime” to mpe ‘nakanisi yo’ esimbaka mpenza motema.”—Jonathan.
Kosalela baaparɛyi na ndenge ya mabe ekoki kobebisa makambo na libala. Na ndakisa, babalani mosusu basalelaka baaparɛyi ntango nyonso, mpe yango esalaka ete bázala na ntango mingi te mpo na balongani na bango.
“Nakanisi, na bantango mosusu mobali na ngai akoki koyoka mposa ya kosolisa ngai, kasi soki amoni ete nazali kosalela telefone, akoki kotika na ye.”—Julissa.
Bato mosusu balobaka ete bakoki kosolola malamu ná balongani na bango ata ntango bazali kosalela baaparɛyi. Sherry Turkle, moto moko ya sociologie, alobi ete wana ezali “kolanda banzela mingi na mbala moko,” esimbaka te. Likoki wana ya kosala makambo mingi na mbala moko ezali mpenza likambo ya malamu te. Sherry Turkle abakisi boye: “Ntango nyonso ozali kobakisa mosala moko likoló ya oyo nanu osilisi te, yebá ete okosala yango lisusu malamu mpenza te.”a
“Nasepelaka kosolola na mobali na ngai kasi te ntango azali kosala makambo mingi na mbala moko, esalaka namiyoka nɛti nazali na valɛrɛ te na miso na ye.”—Sarah.
Na mokuse: Ndenge na yo ya kosalela baaparɛyi ekoki komema bolamu to makama na libala na yo.
Oyo okoki kosala
Makambo ya ntina ezonga nsima te. Biblia elobi: “Bóluka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Omituna boye: ‘Baaparɛyi ezali kosala ete ngai ná molongani na ngai tólekisaka lisusu ntango mingi te, to mpe tokipanaka mpenza te?’
“Epesaka mpasi komona mwasi ná mobali bazali kolya na restora, kasi makanisi na bango nyonso mibale kaka na baaparɛyi na bango. Tolingi te kozala baombo ya baaparɛyi mpe kobosana likambo oyo eleki ntina, elingi koloba, boyokani na biso.”—Matthew.
Bótya bandelo. Biblia elobi ete: “Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bósalela ntango na bino malamu mpenza.” (Baefese 5:15, 16) Omituna boye: ‘Na esika ya koyanola na bamesajɛ nyonso kaka ntango ekɔti, nakoki te kotya ntango moko boye mpo na kotánga mpe koyanola na bamesajɛ mosusu oyo esɛngi kaka te koyanola yango mbala moko?’
“Nakangaka sonnerie ya telefone na ngai mpe nayanola na bamesajɛ na ntango oyo ebongi. Ekómaka mingi te ete appel to mesajɛ moko ekɔti oyo esɛngi oyanola kaka mbala moko.”—Jonathan.
Soki likoki ezali, tiká makambo ya mosala na mosala. Biblia elobi: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango.” (Mosakoli 3:1) Omituna boye: ‘Ntango nazongaka ndako, nasalelaka telefone mpo na kosala makambo ya mosala, mpe natikaka makambo yango ebebisa bomoi ya libota na ngai? Soki ezali bongo, baaparɛyi ezali kobongisa to ezali kobebisa libala na ngai? Molongani na ngai akoloba nini?’
“Teknoloji epesi biso likoki ya kosala na ngonga nyonso oyo tolingi. Nasalaki makasi natika kosimbasimba telefone mpe kosala makambo ya mosala ntango nazali ná mwasi na ngai.”—Matthew.
Bólobela ndenge ya kosalela baaparɛyi ná molongani na yo. Biblia elobi: “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” (1 Bakorinti 10:24) Sololá ná molongani na yo mpo na ndenge oyo mokomoko na bino asalelaka baaparɛyi mpe makambo oyo bokoki kobongola soki esengeli. Bokoki kosalela mituna ya kotalela na lisolo oyo mpo na kobanda.
“Ngai ná mobali na ngai tobombelanaka makambo te, soki moninga azali kosalela mingi telefone to tablɛti na ye, toyebisanaka. Tóyebaka ete yango ekoki kobimisa matata, yango wana tozwaka na lisɛki te makanisi ya moninga.”—Danielle.
Na mokuse: Salá makasi mpo ozala moombo ya baaparɛyi te.
a From the book Reclaiming Conversation—The Power of Talk in a Digital Age.