Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mokambi ya sika mpe basi mibale ya mpiko
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Barake azali kobenga Debora akende elongo na ye

      LITEYA 32

      Mokambi ya sika mpe basi mibale ya mpiko

      Nsima ya kokamba ekólo ya Yehova bambula mingi, Yosua akufaki ntango akómaki na mbula 110. Ntango nyonso oyo azalaki na bomoi, Bayisraele bazalaki kosambela Yehova. Kasi nsima ya liwa ya Yosua, bakómaki kosambela bikeko, ndenge moko na bato ya Kanana. Lokola Bayisraele batikaki kolanda Yehova, apesaki nzela ete mokonzi moko ya Kanana na nkombo Yabine anyokola bango. Bayisraele babondelaki Yehova asalisa bango. Na yango, Yehova apesaki bango mokambi ya sika, Barake. Asengelaki kosalisa bato yango bázongela Yehova.

      Debora, mosakoli moko ya mwasi, atindaki bábenga Barake. Yehova apesaki ye nsango ya koyebisa Barake: ‘Zwá mibali 10 000, mpe kende kobunda na basoda ya Yabine na mokɛli ya Kishone. Kuna, okolonga Sisera, mokonzi ya basoda ya Yabine.’ Barake alobaki na Debora: ‘Nakokende kaka soki okei elongo na ngai.’ Debora alobaki: ‘Nakokende elongo na yo. Kasi yebá ete yo te moto okoboma Sisera. Yehova alobi ete mwasi nde akoboma ye.’

      Debora akendaki elongo na Barake mpe basoda na ye na Ngomba Tabore komibongisa mpo na etumba. Ntango kaka Sisera ayokaki yango, ayanganisaki makalo na ye ya bitumba mpe basoda na ye na lobwaku. Debora alobaki na Barake: ‘Lelo ezali mokolo Yehova akosalisa yo olonga.’ Barake ná bato na ye 10 000 bakitaki na ngomba mpo na kobunda na basoda ya Sisera oyo bazalaki na bibundeli ya makasi mpenza.

      Na nsima, Yehova atondisaki mai na mokɛli ya Kishone. Makalo ya Sisera ekangamaki na pɔtɔpɔtɔ. Sisera asundolaki likalo na ye mpe akimaki na makolo. Barake mpe basoda na ye balongaki basoda ya Sisera, kasi Sisera akimaki! Akendaki kobombana na hema ya mwasi moko na nkombo Yaele. Yaele apesaki ye miliki amɛla mpe azipaki ye bolangiti. Elombe yango alalaki mpo alɛmbaki. Na nsima, Yaele apusanaki na malɛmbɛ pene na ye mpe atɔbɔlaki ye pike ya hema na motó mpe akufaki.

      Barake ná Debora bazali kosanzola Yehova na loyembo

      Ntango Barake ayaki koluka Sisera, Yaele abimaki na hema na ye mpe alobaki: ‘Kɔtá. Nakolakisa yo moto oyo ozali koluka.’ Barake akɔtaki mpe amonaki Sisera alali ebembe. Barake ná Debora basanzolaki Yehova na loyembo mpo asalisaki Bayisraele bálonga banguna na bango. Na nsima, Yisraele efandaki na kimya mbula 40.

      “Basi oyo bazali kosakola nsango malamu bazali limpinga moko monene.”​—Nzembo 68:11

      Mituna: Ndenge nini Debora asalisaki Bayisraele?Ndenge nini Yaele amonisaki ete azali mwasi ya mpiko?

      Basambisi 4:1–5:31

  • Ruta ná Naomi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Naomi azali koyebisa Ruta azonga na mboka bango

      LITEYA 33

      Ruta ná Naomi

      Na eleko moko ya nzala makasi na Yisraele, mwasi moko na nkombo Naomi, ná mobali na ye mpe bana na bango mibale ya mibali, bakendaki kofanda na mokili ya Moabe. Na nsima, mobali ya Naomi akufaki. Bana na ye babalaki Ruta ná Orpa, basi ya Moabe. Kasi likambo ya mawa, na nsima, bana ya Naomi mpe bakufaki.

      Ntango Naomi ayokaki ete nzala esili na Yisraele, azwaki ekateli ya kozonga kuna na mboka na ye. Ruta ná Orpa babandaki kozonga elongo na ye; kasi na nzela Naomi ayebisaki bango: ‘Bozalaki basi ya malamu mpo na bana na ngai mpe babokilo ya malamu mpo na ngai. Nalingi bóbala lisusu. Bózonga na Moabe.’ Ruta ná Orpa balobaki: ‘Tolingi yo! Tokotika yo te.’ Naomi akobaki koloba na bango bázonga. Nsukansuka, Orpa azongaki, kasi Ruta aboyaki kozonga. Naomi alobaki na ye: ‘Orpa azali kozonga epai ya bato na ye mpe banzambe na ye. Zongá elongo na ye mpe kende na ndako ya mama na yo.’ Kasi Ruta alobaki: ‘Nakotika yo te. Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.’ Okanisi ete Naomi ayokaki ndenge nini ntango Ruta alobaki bongo?

      Ruta ná Naomi bakómaki na Yisraele na ebandeli ya eleko ya kobuka mbuma ya orje. Mokolo moko, Ruta akendaki kolɔkɔta mbuma na elanga ya mobali moko na nkombo Boaze, oyo azalaki mwana ya Rahaba. Boaze ayokaki ete Ruta azali moto ya Moabe mpe afandaki malamu na Naomi. Ayebisaki bato na ye ya mosala bátikelaka Ruta mwa mbuma mosusu na elanga mpo alɔkɔtaka yango.

      Ruta azali kolɔkɔta mbuma na elanga ya Boaze

      Na mpokwa, Naomi atunaki Ruta: ‘Lelo osalaki na elanga ya nani?’ Ruta alobaki: ‘Na elanga ya mobali moko na nkombo Boaze.’ Naomi ayebisaki ye: ‘Boaze azali ndeko ya mobali na ngai. Saláká na elanga na ye elongo na bilenge basi mosusu. Okozala malamu kuna.’

      Naomi, Boaze, Ruta ná Obede

      Ruta asalaki kaka na elanga ya Boaze tii eleko ya kobuka mbuma esilaki. Boaze amonaki ete Ruta azalaki makasi na mosala mpe mwasi malamu mpenza. Na ntango wana, soki mobali moko akufi kasi abotaki te, ndeko na ye asengelaki kobala mwasi oyo mobali yango atiki. Na yango, Boaze abalaki Ruta. Babotaki mwana mobali mpe bapesaki ye nkombo Obede, oyo na nsima akómaki nkɔkɔ ya Mokonzi Davidi. Baninga ya Naomi basepelaki. Balobaki na ye: ‘Liboso, Yehova apesaki yo Ruta, oyo alingaki yo mingi, mpe sikoyo apesi yo nkɔkɔ ya mobali. Yehova akumisama!’

      “Moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.”​—Masese 18:24

      Mituna: Ndenge nini Ruta amonisaki ete alingaki Naomi? Ndenge nini Yehova abatelaki Ruta ná Naomi?

      Ruta 1:1–4:22; Matai 1:5

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto