Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Gideone alongaki bato ya Midiane
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Gideone ná basoda na ye bayuli maseke, babuki bilokó, basimbi bisungi ya mɔtɔ, mpe bazali koganga makasi

      LITEYA 34

      Gideone alongaki bato ya Midiane

      Na nsima, Bayisraele bapesaki lisusu Yehova mokɔngɔ mpe babandaki kosambela banzambe ya lokuta. Na boumeli ya mbula nsambo, bato ya Midiane bazalaki koyiba banyama ya Bayisraele mpe kobebisa bilanga na bango. Mpo na kokima bato ya Midiane, Bayisraele bazalaki kobombana na mibenga (madusu na kati ya mabanga minene) mpe na bangomba. Babondelaki Yehova abikisa bango. Na yango, Yehova atindaki anzelu epai ya elenge mobali moko na nkombo Gideone. Anzelu yango alobaki na ye: ‘Yehova aponi yo ozala mobundi ya nguya.’ Gideone atunaki: ‘Ndenge nini nakobikisa Yisraele? Nazali moto mpamba.’

      Ndenge nini Gideone ayebaki ete Yehova nde aponaki ye? Atyaki nsuki ya mpate na mabele mpe alobaki na Yehova: ‘Na ntɔngɔ, soki mamwɛ ekweli kaka nsuki oyo, kasi mabele etikali ya kokauka, nakoyeba ete olingi ngai nde nabikisa Yisraele.’ Na ntɔngɔ, mamwɛ ekwelaki kaka nsuki yango mpe mabele etikalaki ya kokauka! Kasi, Gideone asɛngaki lisusu ete na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandi, nsuki ya mpate etikala ya kokauka mpe mamwɛ epɔlisa mabele. Nsukansuka, ntango likambo yango esalemaki, Gideone andimaki ete Yehova aponaki ye. Asangisaki basoda na ye mpo na kobundisa bato ya Midiane.

      Yehova ayebisaki Gideone: ‘Nakosalisa Yisraele elonga. Kasi lokola ozali na basoda mingi, bokoki kokanisa ete bolongi etumba na makasi na bino moko. Yebisá moto nyonso oyo azali kobanga azonga epai na ye.’ Basoda 22 000 bazongaki, kasi batikalaki basoda 10 000. Na nsima, Yehova alobaki: ‘Basoda baleki kaka mingi. Kitá na bango na mai mpe yebisá bango bámɛla mai. Zwá elongo na yo kaka baoyo bakozala ekɛngɛ ntango bazali komɛla mai.’ Kaka mibali 300 nde bazalaki ekɛngɛ ntango bazalaki komɛla mai. Yehova alakaki ete mibali wana nde bakolonga basoda 135 000 ya Midiane.

      Na butu wana, Yehova ayebisaki Gideone: ‘Ntango ekoki mpo na kobundisa bato ya Midiane!’ Gideone apesaki bato na ye maseke mpe bilokó ya minene ná bisungi ya mɔtɔ na kati na yango. Ayebisaki bango: ‘Bótala ngai, mpe bósala kaka ndenge nakosala.’ Gideone ayulaki liseke, abukaki elokó na ye, asimbaki esungi ya mɔtɔ na lobɔkɔ mpe agangaki: ‘Mopanga ya Yehova mpe ya Gideone!’ Mibali nyonso 300 basalaki kaka bongo. Basoda ya Midiane bayokaki nsɔmɔ mpe bakimaki bipai na bipai. Na mobulu wana, babandaki kobomana bango na bango. Na mbala oyo mpe, Yehova asalisaki Bayisraele bálonga banguna na bango.

      Basoda ya Midiane bayoki nsɔmɔ

      “Mpo nguya oyo eleki makasi ezala ya Nzambe kasi oyo euti epai na biso te.”​—2 Bakorinti 4:7

      Mituna: Ndenge nini Yehova amonisaki Gibeone ete aponi ye? Mpo na nini basoda ya Gibeone bazalaki kaka 300?

      Basambisi 6:1-16, 6:36–7:25; 8:28

  • Hana asɛngi Nzambe mwana mobali
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Hana azali kolakisa Eli Samwele na tabernakle

      LITEYA 35

      Hana asɛngi Nzambe mwana mobali

      Moyisraele moko na nkombo Elekana azalaki na basi mibale: Hana ná Penina. Kasi azalaki kolinga Hana mingi. Penina azalaki kotyola Hana ntango nyonso mpo azalaki na bana te, kasi ye azalaki na bana ebele. Mbula na mbula, Elekana azalaki komema libota na ye na tabernakle ya Shilo mpo na kosambela. Mokolo moko, ntango bazalaki kuna, amonaki mwasi na ye ya motema Hana mawamawa. Alobaki na ye: ‘Kolela te, Hana. Ngai nazali. Nalingaka yo mingi.’

      Na nsima, Hana akendaki kobondela kaka ye moko. Azalaki kolela na libondeli ntango azalaki kosɛnga Yehova asalisa ye. Apesaki elaka oyo: ‘Yehova, soki opesi ngai mwana mobali, nakopesa yo ye, mpe akosalela yo bomoi na ye mobimba.’

      Nganga-nzambe monene Eli amoni Hana azali kolela na libondeli

      Ntango Nganga-nzambe monene Eli amonaki Hana azali kolela na mongongo ya nse, akanisaki ete alangwe masanga. Hana alobaki na ye: ‘Te, nkolo na ngai, nalangwe masanga te. Nazali na likambo moko ya mpasi mpe nazali koyebisa yango Yehova.’ Eli amonaki ete akaniselaki mwasi yango mabe mpe alobaki na ye: ‘Nzambe apesa yo eloko oyo olingi.’ Motema ya Hana ekitaki mpe akendaki. Mbula mobimba ekokaki te, Hana abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Samwele. Kanisá esengo oyo Hana ayokaki!

      Hana abosanaki elaka na ye epai ya Yehova te. Ntango kaka alongolaki Samwele na mabɛlɛ, akendaki kotika ye na tabernakle. Alobaki na Eli: ‘Oyo nde mwana mobali oyo nasɛngaki na libondeli. Napesi ye mobimba epai ya Yehova.’ Elekana ná Hana bazalaki kokende kotala Samwele mbula na mbula mpe komemela ye kazaka ya sika ezangá mabɔkɔ. Yehova apesaki Hana bana mosusu misato ya mibali mpe mibale ya basi.

      “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona.”​—Matai 7:7

      Mituna: Mpo na nini Hana azalaki mawamawa? Ndenge nini Yehova apambolaki ye?

      1 Samwele 1:1–2:11, 18-21

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto