Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Elaka ya Yefeta
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Yefeta apasoli elamba na ye ntango mwana na ye ya mwasi abimi mpo na koyamba ye

      LITEYA 36

      Elaka ya Yefeta

      Bayisraele basundolaki lisusu Yehova mpe bakómaki lisusu kosambela banzambe ya lokuta. Ntango bana ya Amone bayelaki bango mpe babundisaki bango, banzambe yango basalaki eloko te mpo na kosalisa Bayisraele. Bayisraele banyokwamaki bambula ebele mpenza. Nsukansuka balobaki na Yehova: ‘Tosali lisumu. Tobondeli yo, bikisá biso na mabɔkɔ ya banguna.’ Bayisraele babukaki bikeko na bango mpe bazongelaki kosambela Yehova. Yehova alingaki lisusu komona bango na mpasi te.

      Baponaki elombe mobali moko na nkombo Yefeta mpo akamba bato na etumba mpo na kobundisa bana ya Amone. Yefeta abondelaki Yehova ete: ‘Soki osalisi ngai nalonga etumba oyo, nalaki yo ete ntango nakozonga ndako, nakopesa yo moto ya liboso oyo akobima na ndako na ngai mpo na koyamba ngai.’ Yehova ayokaki libondeli ya Yefeta mpe asalisaki ye alonga etumba yango.

      Ntango Yefeta azongaki na ndako, moto ya liboso oyo abimaki mpo na koyamba ye ezalaki mwana na ye ya mwasi, mwana kaka moko oyo azalaki na ye. Mwana yango azalaki kobina mpe kobɛta mbonda ya moke. Yefeta asalaki nini? Akanisaki elaka na ye mpe alobaki: ‘Ee mwana na ngai! Opesi ngai mpasi mingi. Napesaki Yehova elaka. Mpo na kotosa yango, nasengeli kotinda yo okende kosala na tabernakle na Shilo.’ Kasi, mwana na ye alobaki: ‘Tata, soki opesaki Yehova elaka, tosá yango. Kasi nasɛngi yo kaka sanza mibale nakende kofanda na bangomba ngai ná baninga na ngai ya basi. Na nsima nakokende na Shilo.’ Mwana ya Yefeta asalaki na tabernakle na bosembo bomoi na ye mobimba. Mbula na mbula, baninga na ye bazalaki kokende kotala ye na Shilo.

      Baninga ya mwana mwasi ya Yefeta bayei kotala ye na tabernakle

      “Moto oyo alingi mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka ngai abongi na ngai te.”​—Matai 10:37

      Mituna: Elaka nini Yefeta apesaki? Mwana ya Yefeta alobaki nini ntango ayokaki elaka ya tata na ye?

      Basambisi 10:6–11:11; 11:29-40; 1 Samwele 12:10, 11

  • Yehova asololi na Samwele
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Samwele azali kofungola baporte ya tabernakle

      LITEYA 37

      Yehova asololi na Samwele

      Nganga-nzambe monene Eli azalaki na bana mibale ya mibali oyo bazalaki banganga-nzambe na tabernakle. Nkombo na bango Hofini ná Finehase. Bazalaki kotosa mibeko ya Yehova te, mpe bazalaki mpenza konyokola bato. Ntango Bayisraele bazalaki komema bambeka mpo na Yehova, Hofini ná Finehase bazalaki kozwa misuni ya malamu mpo na bango moko. Eli ayokaki likambo bana na ye bazalaki kosala, kasi asalaki eloko te. Yehova atikaki makambo yango kaka bongo?

      Hofini ná Finehase bazalaki mikóló koleka Samwele, kasi Samwele alandaki ndakisa na bango te. Yehova asepelaki na ye. Mokolo moko na butu ntango Samwele alalaki, ayokaki moto azali kobenga ye. Atɛlɛmaki, akendaki mbangu epai ya Eli mpe alobaki: ‘Ngai oyo!’ Kasi Eli alobaki: ‘Nabengi yo te. Zongá kolala.’ Samwele azongaki kolala. Na nsima, babengaki ye lisusu. Ntango Samwele ayokaki mongongo yango mbala ya misato, Eli ayaki koyeba ete Yehova nde azali kobenga Samwele. Alobaki na Samwele ete soki ayoki lisusu mongongo yango, aloba ete: ‘Lobá, Yehova. Mosaleli na yo azali koyoka.’

      Samwele ayebisi Eli makambo oyo Yehova ayebisaki ye

      Samwele azongaki kolala. Na nsima, ayokaki lisusu babengi ye: ‘Samwele! Samwele!’ Alobaki: ‘Lobá, mpo mosaleli na yo azali koyoka.’ Yehova alobaki na ye: ‘Yebisá Eli ete nakopesa ye ná libota na ye etumbu. Ayebi ete bana na ye bazali kosala makambo ya mabe na tabernakle na ngai, kasi azali kosala eloko te.’ Na ntɔngɔ, Samwele afungolaki baporte ya tabernakle, lokola momesano. Abangaki koyebisa nganga-nzambe monene Eli makambo Yehova alobaki. Kasi Eli abengaki ye mpe atunaki ye: ‘Mwana, Yehova ayebisaki yo nini? Yebisá ngai makambo nyonso.’ Na yango Samwele ayebisaki Eli makambo nyonso.

      Wana Samwele azalaki kokola, Yehova akobaki kozala elongo na ye. Yisraele mobimba eyebaki ete Yehova aponi Samwele azala mosakoli mpe mosambisi.

      “Kanisá Mozalisi na yo Monene ntango ozali naino elenge.”​—Mosakoli 12:1

      Mituna: Na ndenge nini Samwele akesanaki na Hofini ná Finehase? Nsango nini Yehova ayebisaki Samwele?

      1 Samwele 2:12-17, 22-26; 3:1-21; 7:6

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto