-
Davidi ná GoliateZwá mateya na masolo ya Biblia
-
-
LITEYA 40
Davidi ná Goliate
Yehova ayebisaki Samwele: ‘Kende na ndako ya Yese. Mwana na ye moko akokóma mokonzi ya Yisraele.’ Samwele akendaki na ndako ya Yese. Ntango amonaki mwana ya liboso, alobaki na nse ya motema: ‘Na ntembe te mwana yango ye oyo.’ Kasi Yehova ayebisaki Samwele ete ezali ye te. Yehova alobaki: ‘Natalaka oyo ezali na kati ya motema ya moto, kasi te ndenge oyo azali komonana na miso.’
Yese abimisaki bana na ye mosusu motoba liboso ya Samwele. Kasi Samwele alobaki: ‘Yehova aponi ata moko na bango te. Ozali na bana mosusu ya mibali te?’ Yese alobaki: ‘Nazali na mwana mosusu, mwana ya nsuka, nkombo na ye Davidi. Akendaki kokɛngɛla bampate na ngai.’ Ntango Davidi ayaki na ndako, Yehova ayebisaki Samwele: ‘Ye nde naponi!’ Samwele atyaki Davidi mafuta na motó mpo asengelaki kokóma mokonzi ya Yisraele.
Mwa moke na nsima, Bayisraele bakendaki kobunda na Bafilistia; engambe mobali moko na nkombo Goliate azalaki kobundela Bafilistia. Mokolo na mokolo, Goliate azalaki kotyola Bayisraele. Azalaki kobelela: ‘Bótinda mobali moko oyo akobunda na ngai. Soki alongi, tokokóma baombo na bino. Kasi soki ngai nalongi, bokokóma baombo na biso.’
Davidi akendaki na kaa ya basoda ya Yisraele mpo na komemela bandeko na ye bilei. Ayokaki matumoli ya Goliate mpe alobaki: ‘Nakobunda na ye!’ Mokonzi Saulo alobaki: ‘Ozali naino mwana moke.’ Davidi ayanolaki: ‘Yehova akosalisa ngai.’
Saulo apesaki Davidi molato na ye ya etumba, kasi Davidi alobaki: ‘Nakokoka kobunda na yango te.’ Davidi azwaki kaka bilingongo na ye (Lance-pierres) mpe akendaki na mokɛli. Aponaki mabanga mitano ya sɛlisɛli mpe atyaki yango na saki. Na nsima, Davidi apusanaki pene na Goliate. Engambe yango agangaki: ‘Yaká awa, mwana. Nakopesa bandɛkɛ ya likoló mpe banyama ya zamba mosuni na yo.’ Davidi abangaki te. Azongiselaki ye na mongongo makasi: ‘Oyei na mopanga mpe na likɔnga, kasi ngai nayei na nkombo ya Yehova. Ozali kobundisa biso te; ozali kobundisa nde Nzambe. Moto nyonso akomona ete Yehova azali na nguya oyo eleki mopanga to likɔnga. Akopesa bino nyonso na mabɔkɔ na biso.’
Davidi atyaki libanga moko na bilingongo na ye mpe abalusaki yango na makasi na ye nyonso. Na lisalisi ya Yehova, libanga yango ekendaki kokɔta na elongi ya Goliate. Engambe yango akweaki na mabele mpe akufaki. Na nsima, Bafilistia bakimaki mpo na kobikisa bomoi na bango. Otyelaka Yehova motema lokola Davidi?
“Mpo na bato ekoki kosalema te, kasi mpo na Nzambe ezali bongo te, mpo makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Nzambe.”—Marko 10:27
-
-
Davidi ná SauloZwá mateya na masolo ya Biblia
-
-
LITEYA 41
Davidi ná Saulo
Ntango Davidi abomaki Goliate, Mokonzi Saulo atyaki ye mokambi ya basoda na ye. Davidi alongaki bitumba ebele, mpe ayebanaki mingi mpenza. Soki Davidi auti etumba, basi bazalaki kobina mpe koyemba ete: ‘Saulo abomaki bankóto, kasi Davidi abomi bankóto zomi!’ Saulo akómaki koyokela Davidi zuwa mpe alingaki koboma ye.
Davidi ayebaki kobɛta nzɛnzɛ malamu. Mokolo moko ntango azalaki kobɛtɛla Saulo nzɛnzɛ, Saulo abwakelaki ye likɔnga. Davidi akimaki yango mpe likɔnga ekɔtaki na efelo. Na nsima, Saulo alukaki lisusu koboma Davidi mbala ebele. Nsukansuka, Davidi akimaki mpe akendaki kobombana na esobe.
Saulo azwaki basoda 3000 mpo bákende kolukaluka Davidi. Mokolo moko, Saulo akɔtaki na mobenga (lidusu moko na kati ya libanga ya monene) esika Davidi ná bato na ye mpe babombanaki. Bato ya Davidi bayebisaki ye na litoi ete: ‘Ntango ya koboma Saulo yango oyo.’ Davidi apusanaki malɛmbɛ esika Saulo azalaki mpe akataki eteni ya kazaka ya mokonzi yango. Saulo ayebaki te. Na nsima, Davidi ayokaki mabe mpenza mpo azangaki limemya epai ya mokonzi oyo Yehova atyaki mafuta. Aboyaki bato na ye básala Saulo mabe. Davidi abelelaki kutu Saulo ete akokaki koboma ye ntango azwaki libaku ya kosala yango. Saulo atikaki koyina Davidi?
Te, akobaki kaka kolukaluka Davidi mpo na koboma ye. Mokolo moko na butu, Davidi ná mwana ya ndeko na ye, Abishai, bakɔtaki na mayele na kaa ya Saulo. Ata Abinere, mokɛngɛli ya mokonzi, alalaki mpɔngi. Abishai alobaki: ‘Libaku yango oyo! Tiká naboma ye.’ Davidi ayebisaki ye: ‘Yehova ye moko akokata likambo ya Saulo. Tózwa kaka likɔnga mpe elokó na ye ya mai tókende.’
Davidi amataki na ngomba moko mpo amona kaa ya Saulo malamu. Agangaki: ‘Abinere, mpo na nini obateli mokonzi na yo te? Wapi elokó ya mai ná likɔnga ya Saulo?’ Saulo ayebaki mongongo ya Davidi mpe alobaki: ‘Okokaki koboma ngai, kasi osali yango te. Nayebi ete okokóma mokonzi ya Yisraele nsima na ngai.’ Saulo azongaki na ndako na ye. Kasi bato mosusu ya libota ya Saulo bazalaki koyina Davidi te.
“Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso. Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te kasi bótikela nde nkanda esika.”—Baroma 12:18, 19
-