Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yonatane: Mobali ya mpiko mpe ya sembo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Yonatane ná momemi-bibundeli na ye

      LITEYA 42

      Yonatane: Mobali ya mpiko mpe ya sembo

      Yonatane, mwana ya liboso ya Mokonzi Saulo, azalaki soda ya mpiko mpenza. Davidi alobaki ete Yonatane azalaki na mbangu koleka mpongo mpe na makasi koleka nkɔsi. Mokolo moko, Yonatane amonaki basoda 20 ya Bafilistia na mwa ngomba moko. Alobaki na momemi-bibundeli na ye: ‘Tokobunda na bango kaka soki Yehova apesi biso elembo. Soki Bafilistia balobi na biso tómata, wana tokobunda na bango.’ Bongo Bafilistia babelelaki bango: “Bómata awa tóbunda!” Na yango, mibali yango mibale bamataki mpe babomaki basoda yango.

      Yonatane apesi Davidi kazaka, mopanga, litimbo, mpe mokaba na ye

      Lokola Yonatane azalaki mwana ya liboso ya Saulo, ye moto asengelaki kokóma mokonzi nsima na ye. Yonatane ayebaki ete Yehova aponaki nde Davidi akóma mokonzi ya Yisraele; yango wana ayokelaki ye zuwa te. Yonatane ná Davidi bakómaki baninga ya motema. Bayokanaki ete bakobatelana mpe bakosalisana. Yonatane apesaki Davidi kazaka, mopanga, litimbo, mpe mokaba na ye mpo na komonisa ete bakómi baninga ya motema.

      Ntango Davidi azalaki kokima Saulo, Yonatane akendaki epai na ye mpe ayebisaki ye: ‘Zalá makasi mpe na mpiko. Yehova aponi yo ozala mokonzi. Ata tata na ngai ayebi yango.’ Okolinga kozala na moninga malamu lokola Yonatane?

      Mbala ebele, Yonatane atyaki bomoi na ye na likama mpo na kosalisa moninga na ye. Ayebaki ete Mokonzi Saulo alingaki koboma Davidi, yango wana alobaki na tata na ye: ‘Soki obomi Davidi, okosala lisumu mpo asali yo mabe te.’ Saulo ayokelaki Yonatane nkanda makasi. Mwa bambula na nsima, Saulo ná Yonatane bakufaki na etumba.

      Nsima ya liwa ya Yonatane, Davidi alukaki Mefiboshete, mwana ya Yonatane. Ntango Davidi amonaki Mefiboshete, ayebisaki ye boye: ‘Lokola tata na yo azalaki moninga na ngai ya motema, ntango nyonso oyo okozala na bomoi, nakosalisa yo. Okofanda na ndako na ngai mpe okolya na mesa na ngai.’ Davidi abosanaki moninga na ye Yonatane ata moke te.

      “Bólinganaka bino na bino kaka ndenge ngai nalingi bino. Moto moko te azali na bolingo koleka oyo apesi bomoi na ye mpo na baninga na ye.”​—Yoane 15:12, 13

      Mituna: Ndenge nini Yonatane amonisaki ete azali mobali ya mpiko? Ndenge nini Yonatane amonisaki ete azali sembo?

      1 Samwele 14:1-23; 18:1-4; 19:1-6; 20:32-42; 23:16-18; 31:1-7; 2 Samwele 1:23; 9:1-13

  • Mokonzi Davidi asali lisumu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Mosakoli Natane azali kopamela Mokonzi Davidi

      LITEYA 43

      Mokonzi Davidi asali lisumu

      Ntango Saulo akufaki, Davidi akómaki mokonzi. Azalaki na mbula 30. Nsima ya mwa bambula, mokolo moko na butu ntango atɛlɛmaki na veranda ya etaze ya ndako na ye, amonaki mwasi moko ya kitoko. Davidi atunaki, mpe bayebisaki ye ete mwasi yango nkombo na ye Bate-sheba mpe ete mobali na ye Uria azali soda. Davidi abengisaki Bate-sheba na ndako na ye. Basangisaki nzoto mpe azwaki zemi. Davidi alukaki kobomba mabe oyo asalaki. Ayebisaki mokonzi ya basoda atya Uria na molɔngɔ ya liboso na etumba mpe basoda nyonso bálongwa pene na ye. Ntango Uria akufaki na etumba wana, Davidi abalaki Bate-sheba.

      Mokonzi Davidi azali kobondela mpo na kosɛnga bolimbisi

      Kasi Yehova amonaki makambo nyonso wana ya mabe. Asalaki nini? Atindaki mosakoli Natane epai ya Davidi. Natane alobaki na ye: ‘Moto moko ya bozwi azalaki na mpate ebele, mpe mobola moko azalaki kaka na mwana-mpate moko ya moke mpe alingaki yango mingi mpenza. Moto ya bozwi azwaki mwana-mpate kaka moko ya mobola wana.’ Davidi asilikaki makasi mpe alobaki: ‘Mozwi wana asengeli kokufa!’ Natane alobaki na ye ete: ‘Moto wana ya bozwi nde yo!’ Davidi ayokaki mpasi na motema, mpe ayebisaki Natane ete: ‘Nasaleli Yehova lisumu.’ Lisumu yango ememelaki Davidi ná libota na ye mikakatano mingi mpenza. Yehova apesaki ye etumbu, kasi atikaki ye na bomoi mpo andimaki mabe na ye mpe azalaki na komikitisa.

      Davidi alingaki kotongela Yehova tempelo, kasi Yehova aponaki nde mwana na ye Salomo mpo atonga yango. Davidi abandaki kobongisela Salomo biloko ya kotonga tempelo mpe alobaki: ‘Tempelo ya Yehova esengeli kozala kitoko mpenza. Salomo azali naino elenge, kasi nakobongisa biloko nyonso mpo na kosalisa ye.’ Davidi apesaki mbongo na ye ebele mpo na kotonga tempelo. Alukaki bato oyo bayebi mosala malamu. Asangisaki wolo ná palata, mpe asɛngaki báyela ye nzete ya sɛdrɛ ya Tire mpe ya Sidone. Liboso Davidi akufa, apesaki Salomo plan ya tempelo yango. Alobaki na ye: ‘Yehova ayebisaki ngai nakomela yo makambo oyo. Yehova akosalisa yo. Kobanga te. Zalá makasi mpe salá mosala.’

      Davidi ná Salomo bazali kolobela ndenge tempelo ekozala

      “Moto oyo azali kobomba makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi moto oyo ayamboli mpe atiki yango, bakoyokela ye mawa.”​—Masese 28:13

      Mituna: Lisumu nini Davidi asalaki? Davidi asalaki nini mpo na kosalisa mwana na ye Salomo?

      2 Samwele 5:3, 4, 10; 7:1-16; 8:1-14; 11:1–12:14; 1 Ntango 22:1-19; 28:11-21; Nzembo 51:1-19

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto