Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Batongeli Yehova tempelo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Mɔtɔ ya Yehova etumbi makabo oyo ezalaki na etumbelo

      LITEYA 44

      Batongeli Yehova tempelo

      Mokonzi Salomo azali kobondela

      Ntango Salomo akómaki mokonzi ya Yisraele, Yehova atunaki ye: ‘Olingi napesa yo nini?’ Salomo alobaki: ‘Nazali elenge, nayebi te nasala nini. Nabondeli yo, pesá ngai bwanya mpo nabatela bato na yo.’ Yehova alobaki: ‘Lokola osɛngi ozala moto ya bwanya, nakokómisa yo moto oyo aleki na bwanya na mokili mobimba. Nakopesa yo mpe bomɛngo mingi. Lisusu soki otosi ngai, okozala na bomoi molai mpenza.’

      Salomo abandaki kotonga tempelo. Asalelaki wolo, palata, mabaya, ná mabanga oyo elekaki kitoko. Ebele ya basi ná mibali oyo bayebaki mosala basalaki mosala ya kotonga tempelo yango. Nsima ya mbula nsambo, tempelo esilaki mpe esengelaki kopesa yango Yehova. Batyaki etumbelo mpe makabo ya kotumba likoló na yango. Salomo afukamaki liboso ya etumbelo yango mpe abondelaki: ‘Ee Yehova, monene mpe kitoko ya tempelo oyo ekoki na yo te, kasi tobondeli yo ondima losambo na biso mpe mabondeli na biso.’ Yehova akanisaki nini mpo na tempelo yango mpe libondeli ya Salomo? Ntango kaka Salomo asilisaki kobondela, mɔtɔ ekitaki mpe etumbaki makabo oyo ezalaki likoló ya etumbelo. Yehova andimaki tempelo yango. Ntango Bayisraele bamonaki bongo, basepelaki mingi.

      Mɔtɔ ya Yehova etumbi makabo oyo ezalaki na etumbelo

      Bwanya ya Mokonzi Salomo eyebanaki na Yisraele mobimba mpe na bamboka mosusu ya mosika. Bato bazalaki koya epai ya Salomo mpo akatela bango makambo. Ata mokonzi-mwasi ya Sheba ayaki komeka ye na mituna ya makasi. Ntango ayokaki biyano oyo Salomo apesaki, alobaki: ‘Nandimaki te makambo oyo bato bayebisaki ngai mpo na yo, kasi sikoyo namoni ete bwanya na yo eleki mpenza oyo balobaki. Nzambe na yo, Yehova, apamboli yo mpenza.’ Bomoi ezalaki malamu na Yisraele mpe bato bazalaki na esengo. Kasi mwa moke na nsima, makambo ebongwanaki.

      “Kasi talá! oyo aleki Salomo azali awa.”​—Matai 12:42

      Mituna: Mpo na nini Yehova apesaki Salomo bwanya mingi mpenza? Ndenge nini Yehova amonisaki ete andimi tempelo?

      1 Bakonzi 2:12; 3:4-28; 4:29–5:18; 6:37, 38; 7:15–8:66; 10:1-13; 2 Ntango 7:1; 9:22

  • Bokonzi ekabwani
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
    • Ahiya azali kopasola elamba na ye na biteni 12 liboso ya Yeroboame

      LITEYA 45

      Bokonzi ekabwani

      Ntango nyonso oyo Salomo azalaki kosambela Yehova, Yisraele ezalaki na kimya. Kasi Salomo abalaki basi ebele ya bikólo mosusu, mpe basi yango bazalaki kosambela bikeko. Mokemoke, Salomo akómaki kosambela bikeko. Yehova ayokaki nkanda. Ayebisaki Salomo: ‘Yisraele ekolongwa na libota na yo mpe ekokabwana na ndambo mibale. Nakopesa moko ya basaleli na yo ndambo ya monene, mpe libota na yo ekoyangela kaka ndambo ya moke.’

      Yehova amonisaki ekateli na ye polele na ndenge mosusu. Mokolo moko, mosaleli moko ya Salomo na nkombo Yeroboame azalaki kosala mobembo mpe akutanaki na mosakoli Ahiya na nzela. Ahiya apasolaki elamba na ye na biteni 12 mpe alobaki na Yeroboame: ‘Yehova akolongola bokonzi ya Yisraele na libota ya Salomo mpe akokabola yango na ndambo mibale. Zwá biteni zomi oyo mpo yo okozala mokonzi ya mabota zomi.’ Mokonzi Salomo ayokaki likambo yango, mpe alingaki koboma Yeroboame. Na yango, Yeroboame akimaki na Ezipito. Na nsima, Salomo akufaki mpe mwana na ye Rehoboame akómaki mokonzi. Sikoyo, Yeroboame amonaki ete akoki kozonga na Yisraele.

      Bayisraele mingi bazali kopesa bambeka na mwana-ngɔmbɛ ya wolo oyo Yeroboame asalaki

      Mikóló ya Yisraele bayebisaki Rehoboame ete: ‘Soki osaleli bato makambo ya malamu, bakozala sembo epai na yo.’ Kasi baninga ya Rehoboame oyo bazalaki bilenge lokola ye balobaki: ‘Osengeli kozala makambo makasi! Salisá bango misala ya makasi koleka!’ Rehoboame alandaki toli ya baninga na ye bilenge. Azalaki konyokola bato, mpe bato batombokaki. Batyaki Yeroboame mokonzi ya mabota zomi, oyo ekómaki kobengama bokonzi ya Yisraele. Mabota mibale ekómaki kobengama bokonzi ya Yuda, mpe bato na yango batikalaki sembo epai ya Rehoboame. Na yango, mabota 12 ya Yisraele ekabwanaki.

      Yeroboame aboyaki bato bákendaka kosambela na Yerusaleme, mpo Rehoboame nde azalaki koyangela yango. Oyebi mpo na nini? Yeroboame azalaki kobanga ete bato bábalukela ye mpe bázongela Rehoboame. Na yango, asalaki bana-ngɔmbɛ mibale ya wolo mpe alobaki na bato ete: ‘Yerusaleme eleki mosika mingi. Bokoki kosambela awa.’ Bato babandaki kosambela bana-ngɔmbɛ ya wolo mpe babosanaki lisusu Yehova.

      “Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya bosembo mpe kobuka mibeko? . . . To eloko nini mondimi azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te?”​—2 Bakorinti 6:14, 15

      Mituna: Mpo na nini Yisraele ekabwanaki? Makambo nini ya mabe Mokonzi Rehoboame ná Mokonzi Yeroboame basalaki?

      1 Bakonzi 11:1-13, 26-43; 12:1-33

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto