-
Yehova azali “Momonisi ya basekele”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Juin 15
-
-
Yehova azali “Momonisi ya basekele”
“Ya solo Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe mpe Nkolo ya bakonzi mpe Momonisi ya basekele.”—DAN. 2:47.
OKOPESA EYANO NINI?
Yehova ayebisi biso nini makambo nini mpo na mikolo ekoya?
Mokomoko ya mitó motoba ya nyama mabe oyo tolobeli ezali komonisa nini?
Mitó ya nyama mabe ekokani na biteni nini ya ekeko oyo Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ?
1, 2. Makambo nini Yehova amonisi biso, mpe mpo na nini asali yango?
BIKÓLO nini ekozala bikólo oyo eleki na nguya na mabele mobimba ntango Bokonzi ya Nzambe ekosukisa boyangeli ya bato? Toyebi eyano na motuna yango mpamba te Yehova Nzambe, “Momonisi ya basekele,” ayebisi biso yango. Asalisi biso tóyeba bikólo yango na nzela ya makambo oyo mosakoli Danyele mpe ntoma Yoane bakomaki.
2 Yehova amonisaki bango bimonaneli ya banyama mabe ndenge na ndenge. Ayebisaki mpe Danyele ndimbola ya ekeko moko monene oyo mokonzi moko amonaki na ndɔtɔ. Yehova akomisaki makambo yango na Biblia mpo na litomba na biso. (Rom. 15:4) Asalaki yango mpo na kolendisa elikya na biso ete mosika te Bokonzi na ye ekobebisa baguvɛrnema nyonso ya bato.—Dan. 2:44.
3. Mpo tókanga malamumalamu ntina ya bisakweli oyo ezali na Biblia, tosengeli naino koyeba ndimbola ya nini, mpe mpo na nini?
3 Esakweli ya Danyele mpe ya Yoane elobeli bakonzi mwambe, elingi koloba biyangeli ya bato, mpe emonisi ndenge oyo biyangeli yango esengeli kolandana. Nzokande, mpo tókanga malamumalamu ntina ya bisakweli yango, tosengeli naino koyeba ndimbola ya esakweli ya libosoliboso ya Biblia. Mpo na nini? Mpo kokokisama ya esakweli yango nde esimbi motó ya likambo ya Biblia mobimba. Na maloba mosusu, esakweli yango ezali lokola nsinga oyo bisakweli mosusu nyonso ekangisami na yango.
MOMBOTO YA NYOKA MPE NYAMA MABE
4. Banani bazali na kati ya momboto ya mwasi, mpe momboto yango ekosala nini?
4 Mwa moke nsima ya botomboki na Edene, Yehova alakaki ete “mwasi” moko akobimisa “momboto.”a (Tángá Ebandeli 3:15.) Nsukansuka, momboto yango akopanza motó ya nyoka, elingi koloba Satana. Na nsima, Yehova amonisaki ete momboto yango akobima na nzela ya Abrahama, akozala moto ya ekólo Yisraele, akouta na libota ya Yuda, mpe akozala mokitani ya Mokonzi Davidi. (Eba. 22:15-18; 49:10; Nz. 89:3, 4; Luka 1:30-33) Kristo Yesu azalaki eteni ya liboso ya momboto yango. (Gal. 3:16) Eteni mosusu ya momboto ezali nde bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Gal. 3:26-29) Yesu ná bakristo yango oyo batyami mafuta na elimo nde basali Bokonzi ya Nzambe, ebongiseli oyo Nzambe akosalela mpo na koboma Satana.—Luka 12:32; Rom. 16:20.
5, 6. (a) Danyele ná Yoane balobelaki bikólo boni oyo elekaki na nguya? (b) Mitó ya nyama mabe ya Emoniseli ezali komonisa nini?
5 Esakweli wana ya liboso oyo Nzambe apesaki na Edene elobaki mpe ete Satana akobimisa “momboto.” Momboto yango ekozala na bonguna, to ekoyina momboto ya mwasi. Banani bazali na kati ya momboto ya nyoka? Bato nyonso oyo bazali koyina Nzambe mpe bazali kotɛmɛla basaleli na ye, ndenge Satana asalaka. Banda kalakala, momboto ya Satana emonanaka na ebongiseli ya losambo, kasi mpe na bibongiseli ndenge na ndenge ya politiki to makonzi. (Luka 4:5, 6) Nzokande, kaka makonzi moke nde enyokolaki mpenza basaleli ya Nzambe, ezala na ntango ya ekólo Yisraele to na ntango ya lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Mpo na nini likambo yango ezali na ntina mingi? Mpo emonisi ntina oyo bimonaneli ya Danyele mpe ya Yoane elobeli kaka bikólo mwambe kati na bikoló nyonso ya mokili oyo elekaki na nguya.
6 Na nsuka ya ekeke ya liboso T.B., Yesu alakisaki ntoma Yoane bimonaneli ndenge na ndenge ya kokamwa. (Em. 1:1) Na moko na yango, Yoane amonaki dragɔ moko etɛlɛmi na libongo ya mbu monene; dragɔ yango ezali komonisa Zabolo. (Tángá Emoniseli 13:1, 2.) Yoane amonaki mpe nyama moko ya kokamwa oyo ebimaki na mbu yango, mpe Zabolo apesaki yango bokonzi monene. Na nsima, Yoane amonaki nyama mabe moko ya langi ya motane makasi oyo ezalaki na mitó nsambo. Nyama yango ezalaki elilingi ya nyama mabe ya Emoniseli 13:1. Anzelu moko ayebisaki Yoane ete mitó nsambo ya nyama yango ezali komonisa “bakonzi [to baguvɛrnema] nsambo.” (Em. 13:14, 15; 17:3, 9, 10) Ntango Yoane akomaki mokanda ya Emoniseli, bakonzi mitano basilaki kokwea, moko azalaki koyangela, mpe moko ‘ayaki naino te.’ Makonzi, to bikólo yango oyo eleki na nguya ezali bikólo nini? Tótalela motó mokomoko ya nyama mabe oyo Emoniseli elobeli. Tokomona mpe makambo mosusu oyo Danyele akomaki mpo na makonzi yango. Kutu, akomaki makambo oyo etali makonzi mosusu bankama ya bambula liboso ebanda koyangela.
EZIPITO, MOTÓ YA LIBOSO MPE ASIRI, MOTÓ YA MIBALE
7. Motó ya liboso ezali komonisa nini, mpe mpo na nini?
7 Motó ya liboso ya nyama mabe ezali komonisa Ezipito. Mpo na nini? Mpo Ezipito nde ekólo ya liboso ya nguya oyo eyinaki mpe enyokolaki basaleli ya Nzambe. Bayisraele, elingi koloba bakitani ya Abrahama, oyo na nzela na ye momboto ya mwasi asengelaki kobima, bakómaki ebele na Ezipito. Na nsima, Ezipito ekómaki konyokola bango. Satana alukaki kolimwisa libota ya Nzambe liboso kutu momboto abotama. Na ndenge nini? Atyaki na motema ya Farao makanisi ya koboma bana nyonso ya mibali oyo Bayisraele bazalaki kobota. Yehova asukisaki mokano wana mabe, mpe alongolaki basaleli na ye na boombo na Ezipito. (Kob. 1:15-20; 14:13) Na nsima, akɔtisaki Bayisraele na Mokili ya Ndaka.
8. Motó ya mibale ezali komonisa nini, mpe elukaki kosala nini?
8 Motó ya mibale ezali komonisa Asiri. Bokonzi yango ya nguya mpe elukaki kolimwisa basaleli ya Nzambe. Ya solo, Nzambe asalelaki Asiri mpo na kopesa ekólo ya mabota zomi ya Yisraele etumbu mpo bamipesaki na losambo ya bikeko mpe batombokelaki ye. Kasi, na nsima Asiri elukaki mpe kobebisa Yerusaleme. Ekoki kozala ete Satana alingaki kobebisa molɔngɔ ya bakonzi ya Yerusaleme oyo esengelaki komema tii na Yesu. Likambo wana ezalaki mokano ya Yehova te; yango wana Yehova abomaki basoda ya Asiri mpe abikisaki basaleli na ye ya sembo na ndenge ya likamwisi.—2 Bak. 19:32-35; Yis. 10:5, 6, 12-15.
BABILONE, MOTÓ YA MISATO
9, 10. (a) Yehova atikaki bato ya Babilone básala nini? (b) Mpo bisakweli ekokisama, makambo nini esengelaki naino kosalema?
9 Motó ya misato ya nyama mabe oyo Yoane amonaki ezali komonisa bokonzi ya Babilone. Yehova atikaki bato ya Babilone bábebisa Yerusaleme mpe bámema bato na ye na boombo. Kasi, liboso Yehova atika nzela ete Bayisraele básambwisama ndenge wana, akebisaki batomboki yango ete likambo wana ya mabe ekokómela bango. (2 Bak. 20:16-18) Asakolaki ete bakonzi na bango bakofanda lisusu te na “kiti ya bokonzi ya Yehova” na Yerusaleme. (1 Nt. 29:23) Kasi, alakaki mpe ete mokitani moko ya Mokonzi Davidi, oyo azali na “lotomo oyo euti na mibeko,” akoya mpe akozongisa bokonzi yango.—Ezk. 21:25-27.
10 Esakweli mosusu emonisaki ete ntango Masiya oyo alakamaki akoya, akokuta tempelo ya Yerusaleme, epai Bayuda bazalaki kosambela. (Dan. 9:24-27) Esakweli mosusu, oyo ekomamaki liboso Bayisraele bákende boombo na Babilone, elobaki ete Masiya akobotama na Beteleme. (Mika 5:2) Mpo bisakweli yango ekokisama, esengelaki Bayuda bálongwa na boombo, bázonga na mboka na bango, mpe bátonga lisusu tempelo. Kasi, bato ya Babilone bazalaki kotika te bato oyo bakangi na boombo. Yehova ayebisaki basakoli na ye ndenge oyo akolonga mokakatano yango.—Amo. 3:7.
11. Bokonzi ya Babilone emonisami na nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
11 Mosakoli Danyele azalaki na kati ya bato oyo bamemamaki na boombo na Babilone. (Dan. 1:1-6) Yehova amonisaki Danyele ete makonzi mosusu oyo ya nguya ekobima nsima ya Babilone. Yehova asalelaki bilembo ndenge na ndenge mpo na komonisa makambo yango oyo ezalaki basekele. Na ndakisa, alɔtisaki Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ndɔtɔ oyo emonisaki ekeko moko monene oyo esalemi na biloko ndenge na ndenge. (Tángá Danyele 2:1, 19, 31-38.) Yehova amonisaki Danyele ete motó ya wolo ya ekeko yango ezali komonisa bokonzi ya Babilone.b Ekólo ya nguya oyo ekobima nsima ya Babilone emonisami na ntolo mpe mabɔkɔ ya palata. Ezalaki ekólo nini mpe esalaki basaleli ya Nzambe nini?
MOTÓ YA MINEI: BAMEDE NÁ BAPERSE
12, 13. (a) Yehova amonisaki nini na oyo etali kokwea ya Babilone? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete motó ya minei ya nyama mabe emonisi bokonzi ya Bamede ná Baperse?
12 Mbula koleka nkama liboso ya eleko ya Danyele, na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki makambo oyo etali nguya oyo ekolonga Babilone. Yehova amonisaki ndenge oyo Babilone ekokwea mpe ayebisaki nkombo ya moto oyo akolonga yango. Moto yango ezalaki Siruse, moto ya Perse. (Yis. 44:28–45:2) Danyele amonaki bimonaneli mosusu mibale oyo etali bokonzi ya Bamede ná Baperse. Na emonaneli moko, bokonzi yango emonisamaki lokola urse oyo etɛlɛmi na mopanzi moko. Balobaki na nyama yango ete “lyá misuni mingi.” (Dan. 7:5) Na emonaneli mosusu, Danyele amonaki bokonzi yango oyo esangisaki bikólo mibale emonisami lokola mpate-mobali oyo ezali na maseke mibale.—Dan. 8:3, 20.
13 Yehova asalelaki bokonzi ya Bamede ná Baperse mpo ekweisa Babilone mpe ezongisa Bayisraele na mboka na bango, kaka ndenge asakolaki yango. (2 Nt. 36:22, 23) Nzokande, na nsima bokonzi yango elukaki kosilisa libota mobimba ya Nzambe. Mokanda ya Estere elobeli mwango mabe oyo Hamane, ministre-mokonzi ya Perse, asalaki. Apesaki mitindo ete báboma Bayuda nyonso oyo bazalaki na bisika ndenge na ndenge ya bokonzi ya Perse mpe aponaki mokolo oyo bakosala yango. Kasi, Yehova ye moko abatelaki basaleli na ye oyo momboto ya Satana ezalaki koyina. (Est. 1:1-3; 3:8, 9; 8:3, 9-14) Yango wana, tokoki koloba ete motó ya minei ya nyama ya Emoniseli emonisi bokonzi ya Bamede ná Baperse.
MOTÓ YA MITANO: GRƐSI
14, 15. Yehova amonisaki makambo nini mpo na bokonzi ya Grɛsi?
14 Motó ya mitano ya nyama mabe ya Emoniseli ezali komonisa Grɛsi. Danyele alimbolaki ete libumu mpe bibɛlɔ ya motako ya ekeko oyo Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ emonisaki ekólo yango ya nguya. Danyele amonaki mpe bimonaneli mibale oyo eyebisi makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Grɛsi mpe mokonzi na yango oyo alekaki lokumu.
15 Na emonaneli moko, Danyele amonaki nkoi oyo ezalaki na mapapu minei, likambo oyo emonisi ete ekólo Grɛsi esengelaki kolonga bikólo mosusu nokinoki mpenza. (Dan. 7:6) Na emonaneli mosusu, Danyele amonaki ndenge ntaba-mobali moko oyo ezalaki na liseke moko monene ebomaki nokinoki mpate oyo ezalaki na maseke mibale, elingi koloba bokonzi ya Bamede ná Baperse. Yehova alobaki na Danyele ete ntaba-mobali yango ezalaki Grɛsi mpe liseke monene ezalaki komonisa moko na bakonzi na yango. Danyele akomaki lisusu ete liseke monene ekobukana mpe maseke minei ya mike ekobima na esika na yango. Atako esakweli yango ekomamaki bankama ya bambula liboso Grɛsi ekóma ekólo oyo eleki na nguya na mokili mobimba, makambo wana nyonso ekokisamaki. Alezandre Monene, mokonzi ya Grɛsi oyo alekaki lokumu, abundisaki bokonzi ya Bamede ná Baperse. Kasi, liseke yango eumelaki te kobukana: Alezandre akufaki ntango azalaki kaka na mbula 32 mpe azalaki na nguya mingi. Na nsima, ekólo yango ekabwanaki mpe mokomoko na bakonzi minei ya basoda na ye ayangelaki eteni moko.—Tángá Danyele 8:20-22.
16. Antiochus IV asalaki nini?
16 Nsima ya kolonga Baperse, Grɛsi eyangelaki ekólo Yisraele. Na ntango wana, Bayuda basilaki kozonga na Mokili ya Ndaka mpe kotonga lisusu tempelo na Yerusaleme. Bazalaki naino kaka libota oyo Nzambe aponaki, mpe tempelo oyo etongamaki lisusu ezalaki kaka esika monene ya losambo ya solo. Nzokande, na ekeke ya mibale L.T.B., Grɛsi, motó ya mitano ya nyama mabe, ebundisaki libota ya Nzambe. Antiochus IV, mokonzi oyo azwaki eteni moko ya mokili oyo Alezandre ayangelaki, atongaki etumbelo ya bapakano na lopango ya tempelo ya Yerusaleme mpe alobaki ete soki moto asambeli Nzambe ya Bayuda, akozwa etumbu ya liwa. Likambo yango emonisi mpenza koyina oyo momboto ya Satana ezalaki koyina libota ya Nzambe! Kasi, mwa moke na nsima, ekólo mosusu ya nguya ezwaki esika ya Grɛsi. Ekólo nini ezalaki motó ya motoba ya nyama mabe?
ROMA: MOTÓ YA MOTOBA, BOKONZI “YA KOBANGISA MPE YA NSƆMƆ”
17. Motó ya motoba esalaki likambo nini oyo Ebandeli 3:15 elobelaki?
17 Roma nde ezalaki ekólo oyo elekaki na nguya ntango Yoane azwaki emonaneli ya nyama mabe. (Em. 17:10) Motó yango ya motoba esalaki likambo moko oyo esakweli ya Ebandeli 3:15 elobelaki. Satana asalelaki bakonzi ya Roma mpo na kozokisa momboto “na litindi.” Na ndenge nini? Basambisaki Yesu na bifundeli ya lokuta ete azali motomboki mpe babomaki ye. (Mat. 27:26) Kasi, mpota wana eumelaki te mpamba te Yehova asekwisaki Yesu.
18. (a) Ekólo nini ya sika Yehova aponaki, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini momboto ya nyoka ekobaki koyina momboto ya mwasi?
18 Bakonzi ya mangomba ya Bayuda basanganaki na bakonzi ya Roma mpo na kotɛmɛla Yesu, mpe bato mingi ya ekólo Yisraele baboyaki ye. Yango wana, Yehova aboyaki ekólo Yisraele, bazalaki lisusu basaleli na ye te. (Mat. 23:38; Mis. 2:22, 23) Kobanda ntango wana, aponaki ekólo ya sika, “Yisraele ya Nzambe.” (Gal. 3:26-29; 6:16) Ekólo yango ezalaki lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, ezalaki na Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu. (Ef. 2:11-18) Nsima ya lisekwa ya Yesu, momboto ya nyoka ekobaki koyina momboto ya mwasi. Na mabaku mingi, bokonzi ya Roma elukaki kolimwisa lisangá ya bokristo, eteni mosusu ya momboto ya mwasi.c
19. (a) Danyele alobaki nini mpo na ekólo ya motoba oyo elekaki na nguya na mokili mobimba? (b) Lisolo mosusu ekolobela nini?
19 Na ndɔtɔ ya Nebukadenezare oyo Danyele alimbolaki, Roma emonisami na makolo ya ebende. (Dan. 2:33) Danyele amonaki mpe emonaneli oyo elobeli bokonzi ya Roma mpe ekólo oyo eleki na nguya, oyo esengelaki kouta na Roma. (Tángá Danyele 7:7, 8.) Na boumeli ya bankama ya bambula, Roma ezalaki bokonzi “ya kobangisa mpe ya nsɔmɔ” mpo na banguna na yango. Nzokande, esakweli elobaki ete “maseke zomi” ekobima na bokonzi yango mpe liseke moko ekoleka maseke mosusu. Maseke zomi yango ezali nini, mpe liseke ya moke ezali nini? Liseke ya moke ekokani na eteni nini na ekeko monene oyo Nebukadenezare amonaki? Lisolo oyo ezali na lokasa 14 ekopesa biyano na mituna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mwasi yango ya elilingi, oyo abengami mwasi ya Yehova, ezali nde ebongiseli ya Yehova oyo esangisi bikelamu ya elimo na likoló.—Yis. 54:1; Gal. 4:26; Em. 12:1, 2.
b Babilone emonisami na motó ya ekeko oyo mokanda ya Danyele elobeli mpe motó ya misato ya nyama mabe oyo mokanda ya Emoniseli elobeli. Talá etanda na nkasa 12-13.
c Atako Roma ebebisaki engumba Yerusaleme na mobu 70 T.B., likambo wana ezalaki kokokisama ya Ebandeli 3:15 te. Na ntango wana, ekólo Yisraele ezalaki lisusu te ekólo oyo Nzambe aponaki.
-
-
Yehova amonisi makambo oyo ‘ekosalema nsima ya mwa ntango moke’Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Juin 15
-
-
Yehova amonisi makambo oyo ‘ekosalema nsima ya mwa ntango moke’
“Emoniseli ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye, mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.”—EM. 1:1.
OKOPESA EYANO NINI?
Eteni nini ya ekeko monene ezali komonisa bokonzi ya Anglo-américain?
Ndenge nini Yoane amonisi boyokani oyo ezali kati na bokonzi ya Anglo-américain mpe ONU?
Ndenge nini Danyele ná Yoane balobeli nsuka ya biyangeli ya bato?
1, 2. (a) Bisakweli ya Danyele mpe ya Yoane ezali kosalisa biso na nini? (b) Mitó motoba ya nyama mabe oyo tolobelaki liboso ezali komonisa nini?
SOKI tokokanisi makambo oyo ezali na bisakweli ya Danyele mpe ya Yoane, tokokanga ntina ya makambo mingi oyo ezali kosalema lelo mpe oyo ekosalema na mikolo ekoya. Makambo nini tokoki koyekola na emonaneli ya nyama mabe oyo Yoane amonaki, na lisolo ya Danyele oyo elobeli nyama ya nsɔmɔ ya maseke zomi, mpe na ndimbola oyo Danyele apesaki mpo na ekeko monene? Mpe koyeba ndimbola ya bisakweli yango esengeli kotinda biso tósala nini?
2 Tólobela naino emonaneli ya nyama mabe oyo Yoane amonaki. (Em., mok. 13) Mitó motoba ya nyama mabe oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki ezali komonisa Ezipito, Asiri, Babilone, bokonzi ya Bamede ná Baperse, Grɛsi, mpe Roma. Bikólo yango nyonso eyinaki momboto ya mwasi. (Eba. 3:15) Ntango Yoane akomaki emonaneli na ye, Roma, motó ya motoba, nde ezalaki ekólo oyo elekaki na nguya mpe ekobaki kozala bongo bankama ya bambula na nsima. Nzokande, motó ya nsambo esengelaki kozwa esika ya Roma. Bokonzi nini ekómaki ekólo oyo eleki na nguya, mpe makambo nini esalaki momboto ya mwasi?
GRANDE-BRETAGNE MPE ÉTATS-UNIS EKÓMI NA NGUYA
3. Nyama ya nsɔmɔ oyo ezali na maseke zomi ezali komonisa nini, mpe maseke zomi emonisi nini?
3 Tokoki koyeba motó ya nsambo ya nyama mabe ya Emoniseli mokapo 13 soki tokokanisi emonaneli ya Yoane ná emonaneli ya Danyele oyo elobeli nyama ya nsɔmɔ oyo ezalaki na maseke zomi.a (Tángá Danyele 7:7, 8, 23, 24.) Nyama oyo Danyele amonaki ezali komonisa bokonzi ya Roma. (Talá elilingi na nkasa 12-13.) Na ekeke ya mitano T.B., Ampire ya Roma ekómaki kokabwana. Maseke zomi oyo ebimaki na motó ya nyama yango ya nsɔmɔ emonisi makonzi oyo eutaki na ampire yango.
4, 5. (a) Liseke ya moke esalaki nini? (b) Motó ya nsambo ya nyama mabe ezali nini?
4 Maseke minei, to makonzi, oyo ebimaki na motó ya nyama ya nsɔmɔ nde elobelami mingi koleka maseke mosusu. Liseke moko “ya moke” epikolaki maseke misato. Likambo yango ekokisamaki ntango Grande-Bretagne, oyo ezalaki eteni moko ya Ampire ya Roma, ekómaki makasi. Tii na ekeke ya 17, Grande-Bretagne ezalaki ekólo ya makasi te. Bikólo mosusu misato oyo ezalaki na Ampire ya Roma: Espagne, Pays-Bas, mpe France, ezalaki makasi mingi koleka yango. Grande-Bretagne epikolaki bikólo yango mokomoko, elingi koloba ebundisaki yango mpe elongaki yango. Na katikati ya ekeke ya 18, Grande-Bretagne ezalaki komata mpo ekóma ekólo ya nguya mingi na mokili. Kasi, na ntango wana, ekómaki naino te motó ya nsambo ya nyama mabe.
5 Atako Grande-Bretagne ekómaki makasi, bitúká oyo yango ezalaki koyangela na Amerika ya Nɔrdi ezwaki lipanda mpe ekómaki États-Unis d’Amérique. Nzokande, Grande-Bretagne etikaki États-Unis ekóma ekólo ya makasi mpe bamasuwa na yango ya bitumba ezalaki kobatela États-Unis. Ntango mokolo ya Nkolo ebandaki na 1914, Grande-Bretagne ezalaki na teritware monene koleka baampire nyonso oyo ezalaki liboso mpe États-Unis ekómaki ekólo oyo ezalaki na baizine mingi koleka bikólo mosusu nyonso.b Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, États-Unis esalaki boyokani moko makasi na Grande-Bretagne. Lokola bikólo yango ekómaki kosala elongo, ekómaki bokonzi ya Anglo-américain, bokonzi oyo eleki nguya na mokili mobimba, to motó ya nsambo ya nyama mabe. Makambo nini motó yango esalaki momboto ya mwasi?
6. Motó ya nsambo esalaki basaleli ya Nzambe nini?
6 Mwa moke nsima ya ebandeli ya mokolo ya Nkolo, motó ya nsambo ebandaki kobundisa basaleli ya Nzambe, elingi koloba bandeko ya Kristo oyo bazali naino awa na mabele. (Mat. 25:40) Yesu alobaki ete na eleko ya kozala na ye, bato mosusu oyo bazali na kati ya momboto ya mwasi bakozala na mabele mpe bakokokisa mosala oyo apesaki bango. (Mat. 24:45-47; Gal. 3:26-29) Bokonzi ya Anglo-américain ebundisaki basantu wana. (Em. 13:3, 7) Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bokonzi yango enyokolaki basaleli ya Nzambe, epekisaki mikanda na bango mosusu, mpe ekɔtisaki na bolɔko baoyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola. Ezalaki lokola nde motó ya nsambo ya nyama mabe ebomi mosala ya kosakola mpo na mwa ntango. Yehova ayebaki ete likambo yango ekosalema mpe ayebisaki yango Yoane. Ayebisaki ye mpe ete bato oyo bazali na kati ya momboto ya mwasi bakozonga na bomoi, elingi koloba bakozongela kosakola na molende. (Em. 11:3, 7-11) Lisolo ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso emonisi ete makambo wana ekokisamaki.
BOKONZI YA ANGLO-AMÉRICAIN MPE MAKAKA YA EBENDE OYO ESANGANI NA MABELE YA LIMA
7. Boyokani nini ezali kati na motó ya nsambo ya nyama mabe ná ekeko monene?
7 Boyokani nini ezali kati na motó ya nsambo ya nyama mabe mpe ekeko monene? Grande-Bretagne eutaki na Ampire ya Roma; mpe lokola États-Unis eutaki na Grande-Bretagne, tokoki koloba ete États-Unis eutaki mpe na Ampire ya Roma. Kasi makaka ya ekeko ezali nini? Biblia elobi ete makaka yango ezali na ebende oyo esangani na mabele ya lima. (Tángá Danyele 2:41-43.) Yango emonisi likambo oyo esengelaki komonana ntango motó ya nsambo, elingi koloba bokonzi ya Anglo-américain, esengelaki kokóma bokonzi oyo eleki na nguya. Kaka ndenge eloko oyo basali na ebende oyo basangisi na mabele ya lima ezalaka makasi ndenge moko te na eloko oyo basali kaka na ebende ya mpamba, bokonzi ya Anglo-américain ezali makasi ndenge moko te na Roma, epai eutaki. Na ndenge nini?
8, 9. (a) Ndenge nini bokonzi ya nsambo oyo eleki na nguya emonisaki ete ezalaki makasi lokola ebende? (b) Mabele ya lima oyo ezali na makaka ya ekeko elimboli nini?
8 Na bantango mosusu, motó ya nsambo ya nyama mabe emonisaki makasi ya ebende. Na ndakisa, elongaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, emonanaki mpe polele ete motó ya nsambo ezalaki na makasi ya ebende.c Nsima ya etumba yango, motó ya nsambo ezalaki kaka makasi lokola ebende. Kasi, banda ebandeli, ebende yango esanganaki na mabele ya lima.
9 Banda kala, basaleli ya Yehova bazalaki koluka koyeba ndimbola ya makaka ya ekeko monene. Danyele 2:41 emonisi ete makaka ya ebende oyo esangani na mabele ya lima ezali “bokonzi” moko, kasi te makonzi ebele. Na yango, mabele ya lima elimboli ete ezali na eloko moko na kati ya bokonzi ya Anglo-américain oyo ezali kopekisa yango ezala makasi lokola Ampire ya Roma, oyo emonisamaki na makolo ya ebende. Biblia elobi ete mabele ya lima elimboli “bana ya bato,” to bapɛplɛ. (Dan. 2:43) Bato yango bazali kolɛmbisa bokonzi ya Anglo-américain na ndenge bazali kobunda mpo na ntomo ya bato nyonso, mpo na ntomo ya bato ya misala, to mpe mpo na kozwa lipanda. Bana ya bato bazali kopekisa bokonzi ya Anglo-américain ezala makasi lokola ebende. Lisusu, bango na bango bato ya politiki bazali na makanisi ndenge moko te; mpe soki mokonzi moko alongi maponami na bavoti moke, akokaka mpenza te kokokisa makambo oyo alakaki. Danyele asakolaki boye: “Bokonzi yango ekozala ndambo makasi mpe ekozala ndambo pɛtɛpɛtɛ.”—Dan. 2:42; 2 Tim. 3:1-3.
10, 11. (a) “Makaka” ekosuka ndenge nini? (b) Tokoki koloba nini mpo na motángo ya misapi ya makolo?
10 Boyokani makasi oyo ezali kati na Grande-Bretagne ná États-Unis ezali kokoba ata na ekeke oyo ya 21, mpe mbala mingi basalaka elongo na makambo ya mokili. Esakweli oyo elobeli ekeko monene mpe oyo elobeli nyama mabe emonisi ete ekozala na bokonzi mosusu te oyo ekokóma nguya ya mokili mobimba na esika ya bokonzi ya Anglo-américain. Bokonzi yango ezali na makasi ya Roma te, oyo emonisami na makolo ya ebende, kasi ekolɛmba te tii mosusu eleka yango.
11 Motángo ya misapi ya makolo ya ekeko ezali nde na ndimbola moko boye? Na bimonaneli mosusu, Danyele alobeli mitángo: na ndakisa, alobeli mitángo ya maseke ya banyama ndenge na ndenge. Mitángo wana ezali na ndimbola. Kasi, Danyele apesi motángo ya misapi ya makolo ya ekeko te. Na yango, emonani lokola ete motángo yango ezali te na ndimbola moko boye, ndenge moko na motángo ya mabɔkɔ, ya misapi ya mabɔkɔ, ya makolo mpe ya makaka. Danyele alobaki ete misapi ya makolo ezali na ebende oyo esangani na mabele ya lima. Na yango, tokoki koloba ete bokonzi ya Anglo-américain nde ekozala bokonzi oyo eleki na nguya ntango “libanga,” elingi koloba Bokonzi ya Nzambe, ekotuta makaka ya ekeko yango.—Dan. 2:45.
BOKONZI YA ANGLO-AMÉRICAIN MPE NYAMA MABE YA MASEKE MIBALE
12, 13. Nyama mabe ya maseke mibale ezali komonisa nini, mpe ezali kosala nini?
12 Atako bokonzi ya Anglo-américain esalemi na ebende oyo esangani na mabele ya lima, bimonaneli oyo Yesu apesaki Yoane emonisi ete bokonzi yango esengelaki kokoba kosala makambo minene na mikolo ya nsuka. Na ndenge nini? Na emonaneli moko, Yoane amonaki nyama mabe moko ya maseke mibale oyo ezalaki koloba lokola dragɔ. Nyama yango ya nsɔmɔ ezali komonisa nini? Lokola ezali na maseke mibale, boye elimboli bokonzi oyo esangisi bikólo mibale. Nyama yango oyo Yoane amonaki ezali kaka bokonzi ya Anglo-américain, kasi na ntango oyo ezali kokokisa likambo moko monene.—Tángá Emoniseli 13:11-15.
13 Nyama mabe yango ezali kolendisa bato básala elilingi ya nyama mabe ya mitó nsambo. Yoane akomaki ete elilingi ya nyama mabe yango ekobima, ekolimwa, na nsima ekobima lisusu. Yango mpenza nde ekómelaki ebongiseli moko oyo esalemaki nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Grande-Bretagne ná États-Unis elendisaki bikólo mosusu ekɔta na ebongiseli yango. Basalaki ebongiseli yango mpo esangisa bikólo nyonso mpe ezala momonisi na yango.d Nkombo na yango ezalaki Société des Nations. Ebongiseli yango elimwaki ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki. Na ntango ya etumba yango, basaleli ya Nzambe basakolaki ete na kolanda esakweli ya Emoniseli, elilingi ya nyama mabe ekobima lisusu. Esalemaki mpe bongo, kasi na mbala oyo, ebengamaki ONU.—Em. 17:8.
14. Na ndimbola nini elilingi ya nyama mabe ezali “mokonzi ya mwambe”?
14 Yoane alobaki ete elilingi ya nyama mabe ezali “mokonzi ya mwambe.” Na ndimbola nini? Balobi te ete ezali motó ya mwambe ya nyama mabe. Ezali kaka elilingi ya nyama yango. Nguya nyonso oyo ezali na yango euti na bikólo oyo ezali na kati na yango, mingimingi na bokonzi ya Anglo-américain. (Em. 17:10, 11) Kasi azali kosala lokola mokonzi mpo azwi bokonzi ya kokokisa mokumba moko oyo ekobongola makambo na mokili.
ELILINGI YA NYAMA MABE EBOMI MWASI YA NDUMBA
15, 16. Mwasi ya ndumba azali komonisa nini, mpe nini ekómeli ye?
15 Yoane amonaki mpe mwasi moko ya ndumba afandi likoló ya nyama mabe ya langi ya motane makasi, oyo ezali elilingi ya nyama mabe ya mitó nsambo; yango elingi koloba ete mwasi yango azali koyangela nyama yango. Mwasi yango nkombo na ye “Babilone Monene.” (Em. 17:1-6) Azali komonisa mangomba nyonso ya lokuta, ata mpe oyo ebengamaka mangomba ya bokristo. Mangomba ya lokuta elendisaka elilingi ya nyama mabe esala mosala na yango mpe elukaka kotambwisa yango.
16 Nzokande, na mokolo ya Nkolo, mai ya Babilone Monene ekauki mingi, elingi koloba ete bato mingi mpenza batiki mangomba yango. (Em. 16:12; 17:15) Na ndakisa, ntango elilingi ya nyama mabe ebimaki mpo na mbala ya liboso, mangomba ya bokristo ezalaki na nguya mingi mpe na bandimi mingi na mikili ya Mpoto. Lelo oyo, bato mingi bazali koyokela lisusu bakonzi ya mangomba te mpe bakendaka lisusu ndako-nzambe te. Kutu, bato mingi bazali koloba ete mangomba nde ezali kobimisa matata na mokili to kolendisa yango. Na mikili ya Mpoto, bato mingi ya mayele bazali koloba polele ete esengeli mangomba etika kokɔta na makambo ya mokili.
17. Nini ekokómela mangomba ya lokuta mosika te, mpe mpo na nini?
17 Nzokande, mangomba ya lokuta ekolimwa mokemoke te. Mwasi ya ndumba akozala kaka na nguya, akoluka kotinda bakonzi ya mokili básala makambo oyo alingi, tii ntango oyo Nzambe akotya likanisi moko na mitema ya bakonzi yango. (Tángá Emoniseli 17:16, 17.) Mosika te, Yehova akotinda baguvɛrnema ya mokili ya Satana, oyo emonisami na ONU, ebundisa mangomba ya lokuta. Baguvɛrnema yango ekobebisa mangomba ya lokuta mpe bozwi na yango. Eleki mwa bambula, bato mingi bakokaki kokanisa te ete likambo ya ndenge wana ekosalema. Lelo oyo, makambo ekómi kobongwana. Kasi, bokonzi ya mwasi yango ekobanda kokita kaka mokemoke te; libebi na ye ekoya na mbalakaka.—Em. 18:7, 8, 15-19.
NDENGE BANYAMA MABE EKOSUKA
18. (a) Nyama mabe ekosala nini, mpe ekosuka ndenge nini? (b) Danyele 2:44 emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ekoboma makonzi nini? (Talá etanda na lokasa 17.)
18 Nsima ya kobomama na mangomba ya lokuta, nyama mabe, elingi koloba ebongiseli ya politiki ya mokili ya Satana, ekobundisa Bokonzi ya Nzambe. Lokola bakonzi ya mokili bakokoka te kobundisa Bokonzi yango kuna na likoló, nkanda na bango ekongalela bato nyonso oyo bamitye na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele. Yango ekomema na etumba monene ya Nzambe. (Em. 16:13-16; 17:12-14) Danyele alobeli likambo moko oyo ekosalema na etumba yango. (Tángá Danyele 2:44.) Nyama mabe oyo Emoniseli 13:1 elobeli, ná elilingi na yango, ná nyama mabe ya maseke mibale, nyonso ekobomama.
19. Tokoki kozala na elikya nini, mpe sikoyo nde ntango ya kosala nini?
19 Tozali na eleko oyo motó ya nsambo ezali koyangela. Motó mosusu ekobima te tii nyama yango ekobomama. Anglo-américain nde ekozala bokonzi oyo eleki na nguya na mokili mobimba ntango mangomba ya lokuta ekobomama. Esakweli ya Danyele mpe oyo ya Yoane ekokisami mpenza na makambo nyonso. Tokoki kozala na elikya ete mosika te mangomba ya lokuta ekobomama mpe etumba ya Armagedone ekoya. Nzambe ayebisi biso liboso makambo oyo ekosalema. Tokolanda makebisi oyo bisakweli yango epesi biso? (2 Pe. 1:19) Sikoyo nde ntango ya kotosa Yehova mpe ya komitya na ngámbo ya Bokonzi na ye.—Em. 14:6, 7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Biblia, mbala mingi motángo zomi emonisaka biloko oyo ezali ya kokoka. Awa, ezali makonzi nyonso oyo eutaki na Ampire ya Roma.
b Atako Grande-Bretagne mpe États-Unis ezalaki kobanda na ekeke ya 18, emonaneli ya Yoane emonisi ete yango mibale esengelaki kosangana mpe kokóma bokonzi oyo eleki na nguya na ebandeli ya mokolo ya Nkolo. Kutu, bimonaneli oyo ezali na mokanda ya Emoniseli ezali kokokisama nde na boumeli ya “mokolo ya Nkolo.” (Em. 1:10) Ezali se na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba nde bikólo wana mibale ekómaki bokonzi oyo eleki na nguya na mokili mobimba, oyo emonisami na motó ya nsambo.
c Danyele asakolaki ndenge oyo bokonzi ya Anglo-américain elingaki kobebisa banguna na yango na etumba yango. Akomaki boye: “Akobebisa mpenza kobebisa.” (Dan. 8:24) Na ndakisa, États-Unis ebebisaki mpenza kobebisa ntango ebwakaki babɔmbi atomike mibale na ekólo moko oyo ezalaki monguna ya bokonzi ya Anglo-américain.
d Talá buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! nkasa 240, 241, 253.
[Etanda na lokasa 17]
“MAKONZI OYO NYONSO” EZALI MAKONZI NINI?
Esakweli ya Danyele 2:44 elobi ete Bokonzi ya Nzambe “ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso.” Esakweli yango elobeli kaka makonzi oyo emonisami na biteni ndenge na ndenge ya ekeko monene.
Ezali boni mpo na baguvɛrnema mosusu ya mokili? Esakweli ya Emoniseli oyo elobeli mpe biyangeli ya mokili ezali kosalisa biso tózwa eyano. Elobi ete “bakonzi ya mabele mobimba” bakoyanganisama mpo na kobundisa Yehova na “mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Em. 16:14; 19:19-21) Na yango, longola makonzi oyo emonisami na ekeko monene, baguvɛrnema mosusu nyonso ya mokili ekobomama na Armagedone.
-
-
Bakonzi mwambe bamonisamiLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Juin 15
-
-
Bakonzi mwambe bamonisami
Mokanda ya Danyele mpe ya Emoniseli elobeli bakonzi mwambe, elingi koloba biyangeli ya bato, mpe emonisi ndenge oyo biyangeli yango esengeli kolandana. Tokoki kokanga ntina ya bisakweli yango soki toyebi ndimbola ya esakweli ya libosoliboso oyo ekomami na Biblia.
Banda kalakala, momboto ya Satana emonanaka na ebongiseli ya losambo, kasi mpe na bibongiseli ndenge na ndenge ya politiki to makonzi. (Luka 4:5, 6) Nzokande, makonzi mingi te ya bato enyokolaki basaleli ya Nzambe, ezala ekólo Yisraele to lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Bimonaneli ya Danyele mpe ya Yoane elobeli kaka bikólo mwambe oyo ezalaki bikólo eleki na nguya na mokili mobimba.
[Etanda/Bililingi na nkasa 12, 13]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BISAKWELI BISAKWELI
YA DANYELE YA EMONISELI
1. Ezipito
2. Asiri
3. Babilone
4. Bamede
ná Baperse
5. Grɛsi
6. Roma
7. Grande-Bretagne
mpe États-Unisa
8. Société des Nations
mpe ONUb
LIBOTA YA NZAMBE
2000 L.T.B.
Abrahama
1500
Ekólo Yisraele
1000
Danyele 500
L.T.B./T.B.
Yoane
Yisraele ya Nzambe 500
1000
1500
2000 T.B.
[Maloba na nse ya lokasa]
[Bililingi]
Ekeko monene (Dan. 2:31-45)
Nyama mabe minei oyo ebimi na mbu (Dan. 7:3-8, 17, 25)
Mpate-mobali ná ntaba-mobali (Dan., mok. 8)
Nyama mabe ya mitó nsambo (Em. 13:1-10, 16-18)
Nyama ya maseke mibale ezali kolendisa bato básala elilingi ya nyama mabe (Em. 13:11-15)
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Eutelo ya bafɔtɔ: Ezipito ná Roma: Fɔtɔ ezwami na ndingisa ya British Museum; Bamede ná Baperse: Musée du Louvre, Paris
-
-
Mituna ya batángiLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Juin 15
-
-
Mituna ya batángi
Ntango nini bokonzi ya Anglo-américain ekómaki nguya ya nsambo ya mokili mobimba oyo Biblia esakolaki?
▪ Ekeko monene oyo Mokonzi Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ emonisi te bikólo nyonso oyo elekaki na nguya na mokili mobimba. (Dan. 2:31-45) Emonisi kaka bikólo mitano ya nguya oyo enyokolaki basaleli ya Nzambe, kobanda na eleko ya Danyele.
Ndimbola oyo Danyele apesaki mpo na ekeko monene yango emonisi ete bokonzi ya Anglo-américain esengelaki kolonga Roma te, kasi nde kouta na Roma. Danyele amonaki ete ebende ya makolo ya ekeko yango ekiti tii na makaka mpe na misapi. (Na makaka mpe na misapi, ebende yango esangani na mabele ya lima.)a Yango emonisi ete bokonzi ya Anglo-américain, oyo ezali nguya ya mokili mobimba, esengelaki kouta na makolo ya ebende. Masolo ya kala emonisi ete makambo esalemaki mpenza bongo. Grande-Bretagne ezalaki eteni ya Ampire ya Roma, kasi ebandaki kokóma makasi na nsuka ya bambula ya 1700. Na nsima, États-Unis d’Amérique ekómaki ekólo moko ya makasi. Nzokande, nguya ya nsambo ya mokili mobimba oyo Biblia elobeli ebimaki naino te. Mpo na nini? Grande-Bretagne ná États-Unis esalaki naino te makambo minene elongo. Bikólo yango esalaki elongo na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.
Na ntango wana, “bana ya bokonzi” bazalaki kosala mosala na bango mingimingi na États-Unis, mpe biro monene na bango ezalaki na Brooklyn, na etúká ya New York. (Mat. 13:36-43) Bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bazalaki kosakola na bikólo oyo ezalaki na nse ya boyangeli ya Grande-Bretagne. Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Grande-Bretagne esanganaki na États-Unis mpo na kobundisa banguna na bango. Lisusu, lokola bolingo ya ekólo ekómaki makasi na ntango ya etumba, bikólo yango eyinaki baoyo bazalaki na kati ya momboto ya “mwasi” ya Nzambe, epekisaki mikanda oyo bazalaki kobimisa mpe etyaki na bolɔkɔ baoyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola.—Em. 12:17.
Na yango, na kolanda bisakweli ya Biblia, nguya ya nsambo ya mokili mobimba ebimaki te na nsuka ya bambula ya 1700, ntango Grande-Bretagne ekómaki ekólo ya makasi. Nguya ya nsambo ya mokili mobimba ebimaki nde na ebandeli ya mokolo ya Nkolo.b
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mabele ya lima oyo esangani na ebende ezali komonisa bato oyo bazali na kati ya bokonzi ya Anglo-américain, nguya oyo ezali lokola ebende. Bato yango oyo bamonisami na mabele ya lima bazalaki kopekisa bokonzi ya Anglo-américain ezala makasi ndenge esengeli.
b Ndimbola oyo esemboli makanisi oyo ezali na lokasa 57, paragrafe 24 ya buku Esakweli ya Danyele mpe makambo oyo ezali na elilingi ya nkasa 56 mpe 139.
[Elilingi na lokasa 19]
Bandeko mwambe ya biro monene, oyo bakɔtaki bolɔkɔ na sanza ya Yuni 1918
-