LOYEMBO 41
Yoká libondeli na ngai
Ya Papye
1. Tata, yoká loyembo na nga’.
Nzambe na nga’; nga’ mo’mbo na yo.
Nkombo na yo eleki nyonso.
(MONDIMO)
Yehova na nga’, Ee Yah, yoká.
2. Natɔndi yo, mp’obimisi moi,
Nalamuki, namoni pole.
Nalingaka ndeng’osungaka.
(MONDIMO)
Yehova na nga’, Ee Yah, yoká.
3. Yah, nalingi kozala sembo!
Tambwisá nga’ na pole na yo.
Kilo nyonso, nakoka yango.
(MONDIMO)
Yehova na nga’, Ee Yah, yoká.
(Talá mpe Kob. 22:27; Nz. 106:4; Yak. 5:11.)