Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/12 nk. 16-20
  • Bolenge—Kosalisa bana mpo bákóma mikóló ya malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolenge—Kosalisa bana mpo bákóma mikóló ya malamu
  • Lamuká!—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango mwana abandi kokóma mokóló
  • Okoki komesana na makambo ya sika
  • Ntango mwana na yo akómi kotya ntembe na mateya ya Nzambe oyo yo ondimaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Bósololaka malamu na bana oyo bakómi bilenge
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Apɛndisi​—Mituna oyo baboti batunaka
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Ndenge ya kosalisa bilenge bákóma mikóló ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 1/12 nk. 16-20

Bolenge​—Kosalisa bana mpo bákóma mikóló ya malamu

KANISÁ ete outi na mboka moko ya molunge makasi mpe okei na mboka oyo malili ezali makasi. Ntango kaka obimi na mpɛpɔ, oyoki mpenza ete okómi na mboka ya malili. Okokoka komesana? Ɛɛ, okomesana, soki ondimi kobongola mwa makambo mosusu.

Likambo ya ndenge wana ekómelaka baboti ntango bana na bango bakómaka bilenge. Na mbala moko, okomona mwana azali lisusu te ndenge azalaki liboso. Mwana na yo ya mobali, oyo azalaki kolinga te kozala mosika na yo, akómi nde sikoyo kosepela kozala elongo na baninga na ye. Mwana na yo ya mwasi oyo azalaki kolekisa mokolo te kozanga ete abɛtela yo masolo ya makambo oyo akutanaki na yango, akómi sikoyo kopesa yo kaka biyano ya mikuse.

Soki otuni ye: “Kelasi elekaki ndenge nini?”

Ayanoli: “Malamu.”

Afandi nyɛɛ.

Soki otuni: “Likambo nini?”

Ayanoli: “Eloko te.”

Afandi lisusu nyɛɛ.

Mpo na nini akómi bongo? Kala te, mwana na yo azalaki ye moko koyebisa yo makambo nyonso, kasi sikoyo alingi lisusu te koyebisa yo makambo na ye, mpe ntango mosusu akoki ata koyebisa bato mosusu makambo oyo ayebisi yo te. Okoki komona lokola osili mayele mpe ozali kotala kaka ndenge mwana na yo azali kokóma tata to mama mobimba.

Ezali mpenza solo ete okoki te kozala moninga ya bana na yo ntango bazali bilenge? Te. Okoki kozala moninga ya bana na yo ntango bazali bilenge. Kasi liboso osengeli koyeba naino makambo nini ekómelaka bana na eleko wana ya mobulu kasi ya esengo.

Ntango mwana abandi kokóma mokóló

Kala, bato ya mayele bazalaki kokanisa ete ntango mwana akómi na mbula mitano, bɔɔngɔ na ye ekoli mpenza. Kasi sikoyo bamoni ete atako bonene ya bɔɔngɔ ebakisamaka kaka moke nsima ya kokokisa mbula mitano, ndenge oyo bɔɔngɔ esalaka ebongwanaka mingi. Ntango bana babandi kokóma bilenge, mbongwana monene esalemaka na kati ya bɔɔngɔ na bango mpe yango ebongolaka ndenge oyo bakanisaka. Na ndakisa, mbala mingi, bana mike batalelaka makambo likolólikoló, kaka ndenge emonanaka na miso; kasi bilenge batalelaka likambo na mozindo, ata makambo oyo emonanaka na miso te. (1 Bakorinti 13:11) Bakómaka na makanisi ya bango moko, mpe bayokaka nsɔni te mpo na kobimisa yango polele.

Paolo, papa moko ya Italie, amonaki mbongwana ya ndenge wana epai ya mwana na ye ntango akómaki elenge. Alobi boye: “Ntango natalaka mwana na ngai ya mobali, namonaka ye lokola tata mobimba; azali lisusu mwana moke te. Ezali kaka te ndenge akómi komonana mokóló. Eloko ezali kokamwisa ngai mingi koleka ezali ndenge oyo akómi kokanisa. Abangaka te koyebisa makanisi na ye mpe kolongisa yango!”

Omoni mpe mbongwana ya ndenge wana epai ya mwana na yo ya elenge? Mbala mosusu ntango azalaki naino mwana moke, azalaki kaka kotosa mibeko oyo ozalaki kotyela ye. Azalaki kotosa yo kaka mpo azalaki kobanga yo mpo ozali moboti na ye. Sikoyo, lokola akómi elenge, alingi oyebisa ye ntina oyo otyeli ye mobeko boye to boye, mpe mbala mosusu akómi kotya ntembe na makambo mosusu oyo libota emesaná kolanda. Ntango mosusu, ozali komona ete lokola azali koloba makambo polelepolele, akómi lokola motɔmbɔki.

Kasi kokanisa mbala moko te ete mwana na yo ya elenge azali koboya makambo nyonso oyo oteyaki ye. Ekoki kozala ete azali kobundana mpo na kosalela makambo nyonso oyo oteyaki ye mpe kolanda yango na bomoi na ye. Tózwa ndakisa: Kanisá ete olongwe na ndako moko mpo na kokende na ndako mosusu mpe ozali komema biloko na yo. Na ntembe te, ekozala mwa mpasi mpo eloko mokomoko ezwa esika na yango na ndako ya sika. Kasi likambo ya solo ezali ete okolinga te kobwaka eloko nyonso oyo ezali na motuya mpo na yo.

Ezali mpe bongo mpo na mwana na yo ya elenge, oyo etikali moke ‘atika tata na ye ná mama na ye.’ (Ebandeli 2:24) Ya solo, mokolo yango ezali naino mosika; mwana na yo akómi naino mokóló te. Kasi azali lokola moto oyo azali kokanga bisaka liboso akende. Bambula nyonso ya bolenge na ye, azali kotalela makambo nyonso oyo boteyaki ye, mpe kopona oyo akosalela ntango akokóma mokóló.a

Mbala mosusu, koyeba ete mwana na yo azali kozwa bikateli ya ndenge wana ezali kobangisa yo. Kasi, yebá ete ntango akokóma mokóló, akopona kosalela na bomoi na ye kaka makambo oyo amoni ete ezali na ntina mingi mpo na ye. Yango wana, lokola mwana na yo azali naino na ndako, sikoyo nde ntango mpo na ye atalela malamumalamu mitinda oyo akolanda na bomoi na ye.​—Misala 17:11.

Mpo na koloba solo, ezali mpenza malamu ete mwana na yo asala bongo. Tókende epai tózonga epai, soki sikoyo azali kondima kaka bindimela makambo nyonso oyo yo oteyaka ye, na nsima akobanda mpe kondima bindimela makambo oyo bato mosusu bakoyebisa ye. (Kobima 23:2) Biblia elobi ete ezali mpasi te elenge ya ndenge wana akosama mpo “azali na motema te,” elingi koloba azangi mayele ya kososola, mpe makambo mosusu. (Masese 7:7) Elenge oyo azali bindimandima akoki “kotindikama lokola na mbonge mpe komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya na nzela ya bokosi ya bato.”​—Baefese 4:14.

Okoki kosala nini mpo mwana na yo akóma bongo te? Salisá ye azala na makambo misato oyo elandi:

1 MAKOKI YA KOSOSOLA

Ntoma Paulo akomaki ete mpo na “bato oyo bakɔmɛli . . . makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebre 5:14) Okoki koloba ete ‘Kasi nateyá mwana na ngai kokesenisa malamu ná mabe banda kala.’ Na ntembe te, formasyo wana esalisi ye tii lelo mpe ekosalisa ye na bolenge na ye. (2 Timote 3:14) Kasi, Paulo alobaki ete bato basengeli kosalela makoki na bango ya kososola. Atako bana mike bakoki koyeba makambo oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe, bilenge basengeli nde ‘kokóma mikóló na makoki ya kososola.’ (1 Bakorinti 14:20; Masese 1:4; 2:11) Okolinga te ete mwana na yo atosa kaka kozanga kokanisa, kasi asalela makoki na ye ya kokanisa. (Baroma 12:1, 2) Ndenge nini okoki kosalisa ye asala bongo?

Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kotika mwana aloba makambo oyo azali na yango na motema. Kokata ye maloba te, mpe komonisa te ete osepeli te na makambo oyo azali koloba, ata soki alobi likambo moko oyo osepeli na yango te. Biblia elobi ete: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19; Masese 18:13) Longola yango, Yesu alobaki ete: “Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Matai 12:34) Soki ozali koyoka mwana na yo malamu, okoyeba mpenza nini ezali kotungisa ye.

Ntango okoloba na mwana, salá makasi otunaka ye nde mituna, na esika oloba lokola ozali kondimisa makanisi na yo. Na bantango mosusu, mpo na kotinda bayekoli na ye to bato mosusu oyo bazalaki kondimela ye te bábimisa makanisi na bango, Yesu azalaki kotuna bango boye: “Bokanisi nini?” (Matai 21:23, 28) Okoki mpe kosala bongo mpo na mwana na yo ya elenge, ata ntango likanisi oyo apesi eyokani te na oyo ya yo. Na ndakisa:

Soki mwana na yo ya elenge alobi: “Nayebi mpenza te soki nandimelaka Nzambe.”

Na esika oyanola: “Toteyá yo makambo ya Nzambe banda bomwana; ntembe ezali te, ondimelaka Nzambe!”

Okoki koloba: “Nini etindi yo oloba bongo?”

Mpo na nini kotika mwana na yo aloba? Mpamba te, atako oyoki makambo oyo azali koloba, osengeli mpe koluka koyeba makambo oyo azali kokanisa. (Masese 20:5) Ekoki kozala ete andimaka ete Nzambe azali, kasi eloko andimaka te ezali nde mitinda ya Nzambe.

Na ndakisa, elenge moko oyo baninga na ye bazali kotinda ye aboya kotosa mibeko ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu akoki koloba ete andimelaka Nzambe te mpo akima kotosa mibeko yango. (Nzembo 14:1) Akoki kokanisa boye: ‘Soki Nzambe azalaka te, nasɛngisami te kotosa mitinda na ye oyo ezali na Biblia.’

Soki mwana na yo ya elenge abandi kokanisa ndenge wana, ekoki kosɛnga ete amituna motuna oyo: Nandimaka mpenza ete mitinda ya Nzambe ezali mpo na bolamu na ngai? (Yisaya 48:17, 18) Soki andimi ete ezali mpo na bolamu na ye, salisá ye amona ete soki atosi yango, akozala na bomoi ya malamu.​—Bagalatia 5:1.

Soki mwana na yo ya elenge alobi: “Wana ezali lingomba na bino, kasi ezali lingomba na ngai te.”

Na esika oyanola: “Ezali lingomba na biso; lokola ozali mwana na biso, osengeli kondima makambo oyo biso tokoyebisa yo.”

Okoki koloba: “Okómi na maloba makasi boye? Soki oboi mateya oyo ngai nandimaka, ozali na mateya mosusu oyo ondimaka. Boye, mateya nini yo ondimaka? Mpo na yo, bizaleli nini ezali malamu kolanda na bomoi na yo?”

Mpo na nini kotika mwana na yo aloba? Ezali mpo ete kosolola na ye ndenge wana ekosalisa ye atalela lisusu ndenge na ye ya kokanisa. Mbala mosusu, akokamwa ntango akoyeba ete mateya oyo andimaka ekeseni te na oyo yo ondimaka, kasi likambo mosusu nde ezali kotungisa ye.

Na ndakisa, mbala mosusu mwana na yo ya elenge ayebi te ndenge ya kolimbolela bato mosusu mateya oyo andimaka. (Bakolose 4:6; 1 Petro 3:15) To mpe akómi kosepela na elenge mwasi to elenge mobali moko oyo azali Motatoli te. Luká koyeba likambo nini mpenza ezali kotungisa mwana na yo, mpe salisá ye ayeba malamu mokakatano nini azali na yango. Soki mwana azali kosalela mingi makoki na ye ya kokanisa, yango ekosalisa ye mingi ntango akokóma mokóló.

2 TOLI YA MIKÓLÓ

Bato mosusu ya mayele bakanisaka ete mwana nyonso asalaka mwa mobulu ntango abandi kokóma elenge. Kasi na bamboka mosusu, ezalaka bongo te to esalemaka bongo mingi te. Bato oyo bayekolaki likambo yango bamonaki ete na bamboka yango, ntango bilenge bazali naino mike, basalaka makambo oyo mikóló basalaka. Basalaka elongo na mikóló, bafandaka elongo na mikóló, mpe bapesaka bango mikumba oyo mikóló bazalaka na yango. Na bamboka yango, maloba lokola “makambo ya bilenge” to “bilenge ya mobulu” eyokanaka mingi te.

Nzokande, na bamboka mingi, bilenge mingi batángaka na biteyelo oyo ezali na bana-kelasi ebele, epai bazalaka kaka bango na bango bilenge. Ntango bazongaka na ndako, bakutaka moto te. Papa ná mama bakendaka mosala. Bandeko mosusu ya libota bafandaka mosika. Bilenge balekisaka ntango mingi kaka ná baninga na bango bilenge.b Omoni esika likama ebandi? Ezali kaka te mpo bilenge yango bazali na baninga mabe. Bato ya mayele bamonaki ete ata bilenge oyo bazali na bizaleli malamu bakoki kokóma na bizaleli mabe soki bazali elongo na mikóló te.

Na Yisraele ya kala, bilenge bazalaki kofanda elongo na mikóló. Na ndakisa, Biblia eyebisi biso ete Uzia azalaki naino elenge ntango akómaki mokonzi ya Yuda. Nani asalisaki Uzia akokisa mokumba wana monene? Emonani polele ete Zekaria, oyo azalaki mokóló, nde asalisaki ye; mpo Biblia ebengi ye “molakisi oyo azalaki koteya ndenge ya kobanga Nzambe ya solo.”​—2 Ntango 26:5.

Mwana na yo azali na mokóló moko to mikóló ebele oyo atyelaka motema mpe oyo bapesaka ye toli ya malamu lokola yo? Koyokela mikóló yango zuwa te soki bakómi baninga ya mwana na yo. Kozala elongo na bango ekosalisa mwana na yo asala makambo ya malamu. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”​—Masese 13:20.

3 KOYEBA KOKOKISA MOKUMBA

Na bamboka mosusu, mibeko epekisaka bana básala bangonga mingi koleka oyo esɛngami to mpe básala misala mosusu. Babimisaki mibeko wana ntango bakompanyi ekómaki mingi na mokili na siɛklɛ ya 18 mpe ya 19, mpo na kobatela bana na misala oyo ekoki komemela bango likama.

Atako mibeko oyo etali kosalisa mwana misala makasi ebatelaka bana na makama mpe minyoko, bato mosusu ya mayele balobaka mpe ete mibeko yango ezali kopekisa bango báyeba kosala misala. Yango wana, buku moko (Escaping the Endless Adolescence) elobi ete bilenge mingi “bamonaka ete bazali na lotomo básalela bango makambo nyonso kozanga ete bango moko básala makasi.” Mokomi ya buku yango amonisi ete bilenge mingi “bakómaka na ezaleli wana mpo bafandi na mokili oyo ezali komesenisa bango na masano, mpe oyo ezali kosɛnga bango básala eloko moko te.”

Nzokande, Biblia etángi bankombo ya bilenge oyo bazwaki mikumba minene ntango bazalaki naino bana mike. Tózwa ndakisa ya Timote, oyo mbala mosusu azalaki naino elenge ntango akutanaki na ntoma Paulo, oyo asalisaki ye mingi na bomoi na ye. Mokolo moko, Paulo ayebisaki Timote ete: “Opelisa lokola mɔtɔ likabo ya Nzambe oyo ezali epai na yo.” (2 Timote 1:6) Ntango Timote azalaki naino elenge, mbala mosusu ntango azalaki na mbula mwa moke koleka 20, atikaki baboti na ye mpe akómaki kosala mibembo elongo na ntoma Paulo mpo na kosalisa ye na kofungola masangá mpe kolendisa bandeko. Nsima ya kosala bambula soki zomi elongo na Timote, Paulo ayebisaki bakristo ya Filipi ete: “Nazali na moto mosusu te oyo azali na makanisi lokola ya ye, oyo azali komitungisa mpenza mpo na bino.”​—Bafilipi 2:20.

Mbala mingi, bilenge basepelaka soki bapesi bango mokumba moko boye, mingimingi soki bamoni ete mosala yango ezali na ntina mingi. Na mikolo ezali koya, mosala yango ekosalisa bango bákóma mikóló oyo bakokisaka malamu mikumba na bango, kasi sikoyo, ekosalisa mpe bango bábimisa mayele to makasi na bango.

Okoki komesana na makambo ya sika

Ndenge emonisami na ebandeli ya lisolo oyo, soki ozali na mwana oyo azali elenge, mbala mosusu omoni ete mwana na yo azali lisusu te ndenge azalaki na bambula oyo euti koleka. Kasi yebá ete okoki komesana, kaka ndenge osalaki ntango mwana na yo azalaki naino moke.

Ntango mwana na yo azali naino elenge, salisá ye (1) akolisa makoki na ye ya kososola, (2) alanda toli ya mikóló, mpe (3) ayeba kokokisa mikumba na ye. Soki osali bongo, okobongisa mwana na yo akóma mokóló ya malamu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku moko elobaki ete bolenge ezali “eleko oyo bilenge bamibongisaka mpo na kolongwa na ndako ya baboti na bango.” Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2009, nkasa 10-12, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Masano oyo ebongisami mpo na bilenge etindaka bango bázalaka mingi elongo na baninga na bango bilenge, mpe bákanisa ete bazalaka na makambo na bango moko, oyo mikóló bakoki kokɔta te mpe basengeli koluka koyeba te.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 20]

“NANDIMAKI TE ETE NAKOKAKI KOZALA NA BABOTI YA MALAMU BOYE”

Na makambo oyo balobaka mpe na ndakisa oyo bapesaka, baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova bateyaka bana na bango bálanda mitinda ya Biblia na bomoi na bango. (Baefese 6:4) Kasi batindaka bango na makasi te bálanda mitinda yango. Baboti oyo bazali Batatoli bamonaka ete mwana nyonso oyo akómi na mbula oyo akoki kozwa bikateli ye moko, asengeli kopona nzela oyo akolanda na bomoi na ye.

Aislyn, elenge mwasi oyo azali na mbula 18, aponá kolanda nzela oyo baboti na ye balakisaki ye banda bomwana. Alobi boye: “Mpo na ngai, kosalela makambo oyo lingomba na ngai eteyaka, esukaka kaka te mokolo moko na pɔsɔ. Nasalelaka makambo yango na bomoi na ngai mobimba. Etaleli makambo nyonso oyo nasalaka mpe bikateli nyonso oyo nazwaka; na ndakisa nasalelaka mitinda yango mpo na kopona baninga na ngai, bakelasi oyo nakokɔta, mpe babuku oyo nakotánga.”

Aislyn asepelaka mingi na makambo oyo baboti na ye bateyá ye banda bomwana. Alobi boye: “Nandimaki te ete nakokaki kozala na baboti ya malamu boye, mpe nasepelaka mingi ndenge basalisá ngai nazala na mposa ya kozala mpe kotikala Motatoli ya Yehova. Baboti na ngai bakolakisa ngai nzela oyo nasengeli kolanda na bomoi na ngai mobimba.”

[Elilingi na lokasa 17]

Tiká mwana na yo aloba

[Elilingi na lokasa 18]

Mokóló moko oyo akangami na mwana na yo akoki kosalisa ye mingi

[Elilingi na lokasa 19]

Kosala mosala ya ntina ekosalisa bana bákóma mikóló ya malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto