LOYEMBO 79
Tóteya bango bátɛlɛma ngwi
Ya Papye
1. Esengo koteya bampate,
Komon’ete bakoli.
Yehova mpe akambi bango,
Mateya, basaleli.
(MONDIMO)
Yehova, tobondeli yo
mpenza obatela bango.
Na nkombo’a Yesu, tosɛngi: Bálonga nde;
Tik’ete bátɛlɛma ngwi.
2. Tobondelaki mpo na bango,
Ntango bamekamaki.
Toteyi bango na bolingo;
Bakoli, bapambwami.
(MONDIMO)
Yehova, tobondeli yo
mpenza obatela bango.
Na nkombo’a Yesu, tosɛngi: Bálonga nde;
Tik’ete bátɛlɛma ngwi.
3. Bátya nde motema na bango,
Na Nzambe mpe na Yesu.
Báyika mpiko mpe bátosa,
Bákɔta paradiso.
(MONDIMO)
Yehova, tobondeli yo
mpenza obatela bango.
Na nkombo’a Yesu, tosɛngi: Bálonga nde;
Tik’ete bátɛlɛma ngwi.
(Talá mpe Luka 6:48; Mis. 5:42; Flp. 4:1.)