LOYEMBO 56
Monisá solo
Ya Papye
1. Nzela ya solo ebongisaka moto,
Kasi yo moko salel’ango.
Soki Yehova apesi toli na ye;
Yokelá ye, ndimelá ye.
(MONDIMO)
Monisá solo
na bizaleli na yo.
Yehov’akopesa
yo esengo
Soki’omonisi solo.
2. Milende na yo mpe ntang’oz’olekisa
Na mosal’a Nzambe Yehova
Ekomemela yo matomba ebele,
Mpe bomɛngo ya nsuka te.
(MONDIMO)
Monisá solo
na bizaleli na yo.
Yehov’akopesa
yo esengo
Soki’omonisi solo.
3. Na miso’a Nzambe, tozali bana mike,
Toza’ na mpos’a toli na ye.
Eza’ malamu tólanda Yehova nde;
Tózwa mapamboli’ebele.
(MONDIMO)
Monisá solo
na bizaleli na yo.
Yehov’akopesa
yo esengo
Soki’omonisi solo.
(Talá mpe Nz. 26:3; Mas. 8:35; 15:31; Yoa. 8:31, 32.)