Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 104
  • Nasala nini mpo natyaka makanisi na likambo moko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini mpo natyaka makanisi na likambo moko?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini nakokaka te kotya makanisi na likambo moko?
  • Ndenge ya kosala mpo na kotya makanisi na likambo moko
  • Mikakatano oyo baaparɛyi ekoki kobimisela makanisi na yo?
    Lamuká!—2021
  • Nakómi moombo ya baaparɛyi oyo ebimi sika?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela boninga na yo ná bato mosusu
    Lamuká!—2021
  • Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela libala na yo?
    Lamuká!—2021
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 104
Elenge mwasi azali kokanisa ndenge akoki kosala ete biloko oyo ezali kolongola ye likebi etika makelele. Biloko yango ezali miziki, bavideo, bamesaje, mpe bafɔtɔ.

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo natyaka makanisi na likambo moko?

  • Mpo na nini nakokaka te kotya makanisi na likambo moko?

  • Ndenge ya kosala mpo na kotya makanisi na likambo moko

  • Oyo bilenge mosusu balobi

Mpo na nini nakokaka te kotya makanisi na likambo moko?

“Natángaka lisusu te babuku ndenge nazalaki kosala yango liboso. Nalingaka kutu te kotánga baparagrafe ya milai.”​—Elaine.

“Ntango namonaka ete video moko ezali kokende malɛmbɛ nalekisaka yango mpo ekende mbangu.”​—Miranda.

“Ntango nakangi telefone mpe natye makanisi na likambo moko ya ntina, nakobaka kokanisa boye: ‘Ekoki kozala moto moko atindeli ngai mesaje?’”​—Jane.

Baaparɛyi ekoki kopekisa moto atya makanisi na likambo moko? Basusu balobaka ete ezali bongo. Nicholas Carr, mokambi moko mpe mokomi, alobi boye: “Ntango tosalelaka Internet mingi, tosalisaka bɔɔngɔ na biso misala mpe yango esalaka ete makanisi na biso eyengayenga, mpe eyeba makambo na lombangu mpe na bosikisiki, kasi kozanga kokɔta na mozindo.”a

Talelá makambo misato oyo ekoki kosala ete baaparɛyi elongola makanisi na yo na likambo oyo ozali kosala.

  • Ntango ozali kosolola. Maria, elenge mwasi moko alobi boye: “Ata ntango bato bazali kosolola na bato mosusu boye, bakobaka kotinda bamesaje to kobɛta masano ya video to kosalela basite ya kosolola na bato na telefone na bango, kasi batyaka te makanisi na bango nyonso epai ya bato oyo bazali kosolola na bango.”

  • Ntango ozali na kelasi. Buku moko Digital Kids elobi ete: “Bana-kelasi mingi basalelaka baaparɛyi na bango na kelasi mpo na kotinda bamesaje, kosala bolukiluki na Internet, to kosalela basite ya kosolola na bato, mpe mbala mingi basalelaka yango mpo na makambo oyo etali kelasi te.”

  • Ntango ozali koyekola. Chris, elenge ya mbula 22 alobi boye: “Ezalaka mpenza mpasi mpo na ngai kotala te telefone na ngai soki esali mwa makelele.” Soki ozali mwana-kelasi, devuare oyo okokaki kosala na ngonga moko ekoki kozwa ngonga misato mpo ozali kotika ete baaparɛyi elongola yo likebi.

Na mokuse: Ekozala mpasi otya makanisi na likambo moko soki ozali kotika ete baaparɛyi elongola yo likebi mpe etambwisa yo.

Mpunda ya zamba ezali kotambwisa elenge mobali mpe ebwaki ye na likoló.

Soki makanisi na yo ezali koyengayenga ekozala lokola mpunda ya zamba; ekotambwisa yo ndenge elingi

Ndenge ya kosala mpo na kotya makanisi na likambo moko

  • Ntango ozali kosolola na moto. Biblia elobi boye: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.” (Bafilipi 2:4) Okomonisa ete okipaka basusu, soki ozali koyoka bango na likebi mpenza. Taláká moto oyo ozali kosolola na ye na miso, mpe kotika te ete baaparɛyi elongola yo likebi.

    “Ntango ozali kosolola na moto, salá makasi okwea te na motambo ya kotalatala telefone na yo. Okomonisa limemya epai ya moto oyo ozali kosolola na ye, soki ozali kotya likebi na yo nyonso epai na ye.”​—Thomas.

    TOLI: Ntango ozali kosolola na moto, tyá telefone na yo mosika. Bato oyo basalaka bolukiluki balobi ete soki telefone ezali pene ekoki kolongola likebi ya moto, mpe kokata masolo na bino.

  • Ntango ozali na kelasi. Biblia elobi boye: “Bókeba na ndenge bozali koyoka.” (Luka 8:18) Na kotalela likanisi ya vɛrsɛ oyo, soki na eteyelo na bino bapesá nzela ete bosalelaka Internet, kotala bamesaje te, kobɛta masano te, to kosalela te Internet ntango molakisi azali kotángisa mpo otya likebi na yo na makambo azali koteya.

    “Salá makasi ete makanisi na yo ezalaka na kelasi. Zwáká banɔti. Soki likoki ezali, fandá na molɔngɔ ya liboso mpo makanisi na yo eyengayenga te.”​—Karen.

    TOLI: Komáká na mabɔkɔ mpo na kozwa banɔti na esika ya kosalela ordinatɛrɛ. Bolukiluki emonisi ete soki osali bongo ekozala mpasi mpo likebi na ye elongwa mpe okobosana te makambo oyo oyekolaki.

    Elenge mwasi azali koyekola na mesa na kati ya shambrɛ na ye. Atye sakosi, telefone, mpe bazulunalo mosusu mosika.
  • Ntango ozali koyekola. Biblia elobi boye: “Zwá bwanya, zwá mayele.” (Masese 4:5) Yango ezali kosɛnga kokanisa na mozindo na esika ya kokanga kaka makambo mpo na kozwa na ekzamɛ.

    “Ntango nazali koyekola, natyaka tablɛti na ngai na mode avion mpo natya makanisi na ngai nyonso na likambo oyo nazali kosala. Natalaka te bamesaje. Soki nakanisi likambo moko oyo nasengeli na yango mpo nabosana te, nakomaka yango na papye.”​—Chris.

    TOLI: Omindimisa ete esika ozali koyekola ezala te esika oyo makanisi na yo ekoki koyengayenga. Ezala pɛto mpe na molɔngɔ.

a Uta na buku The Shallows​—⁠What the Internet Is Doing to Our Brains.

Oyo bilenge mosusu balobi

Katie.

“Ntango ozali koyekola, okoki kozala lokola moto oyo asalaka lisano likoló ya mai oyo asali mobembo ya molai kasi azali kaka likoló ya mai. Mpo okɔta na mozindo na boyekoli na yo, osengeli kozala lokola moto oyo akitaka na nse ya mai na esika ya mozindo mpo na koluka eloko ya motuya mpenza.”​—Katie.

Rogelio.

“Ntango moto azali na sante ya malamu, akanisaka mpe malamu. Kolya bilei oyo etongaka nzoto esalisaka ngai natyaka makanisi na likambo moko. Mpe na nsima nayekolaka malamu soki nalali malamu mpe esalaka ete lobi na yango nalamuka malamu mpe natya likebi kaka na likambo moko.”​—Rogelio.

Bozongeli: Nasala nini mpo natyaka makanisi na likambo moko?

  • Ntango ozali kosolola na moto. Okomonisa ete okipaka basusu, soki ozali koyoka bango na likebi mpenza mpe kotika te ete eloko mosusu elongola yo likebi.

  • Ntango ozali na kelasi. Kotala bamesaje te, kobɛta masano te, to kosalela te Internet ntango molakisi azali kotángisa mpo otya likebi na yo na makambo azali koteya.

  • Ntango ozali koyekola. Omindimisa ete esika ozali koyekola ezala te esika oyo makanisi na yo ekoki koyengayenga. Ezala pɛto mpe na molɔngɔ.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto