Okoki kosepela na bomoi libela na libela?
Ya Papye
Okopesa eyano nini . . .
ɛɛ?
te?
mbala mosusu?
OYO BIBLIA ELOBI
“Bato ya sembo bakozwa mabele, mpe bakofanda wana mpo na libela.”—NZEMBO 37:29.
YANGO ELIMBOLI NINI MPO NA YO
Okozala na bomoi ya esengo mpe ya kimya elongo na libota mpe baninga na yo na mikolo ezali koya.—YIRIMIA 29:11.
Okosepela na bomoi, mpo na ntango mokuse te kasi nde libela na libela.—NZEMBO 22:26.
TOKOKI MPENZA KONDIMELA BIBLIA?
Ɛɛ! Mpo na koyeba ntina, talá makambo oyo mateya misato ya mwa buku oyo emonisi. Batitre na yango ezali: