LOYEMBO 36
Batelá motema na yo
Ya Papye
1. Batelá mpenza motema;
Okozwa lobiko.
Nzamb’atángaka motema,
Bomoto ya kati.
Motem’ekoki kokosa
Mpe kopɛngwisa yo.
Kasi soki’oteyi yango,
Okotosa Nkolo.
2. Bongisá motema na yo,
Mpo obondela Yah.
Pesá matɔndi na nyonso
Az’osalela yo.
Oyo Yah ateyi biso,
Tosá na esengo.
Kómisá motema sembo,
Sepelisá Nkolo.
3. Na motema n’o, longolá
Makanisi mabe.
Tiká motem’esukwama
Na Lilob’a Nzambe.
Bato ya motema sembo,
Nzamb’alingi bango.
Sambelá ye mpo na seko,
Ye Moninga na yo.