LOYEMBO 93
Pambolá makita na biso
Ya Papye
1. Yehova, tobondeli yo,
Pambolá makit’oyo.
Totɔndi yo mpo na yango;
Sopá elimo na yo.
2. Bongisá biso lisusu;
Biblia, tóyeb’ango.
Emonana na koteya;
Mpe na kolinga bato.
3. Tata, na makita oyo,
Pesá kimya, bomoko.
Bizaleli toza’ n’ango,
Nkolo, ekumisa yo.
(Talá mpe Nz. 22:22; 34:3; Yis. 50:4.)