Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • od mok. 10 nk. 105-115
  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe
  • Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOZALA MOSAKOLI
  • KOSALA ESIKA BASAKOLI BAZALI MINGI TE
  • KOSAKOLA NA MONƆKƆ MOSUSU
  • MOSALA YA MOBONGISI-NZELA
  • MOSALA YA MISIONƐRƐ
  • MOSALA YA ZONGAZONGA
  • BITEYELO YA TEOKRASI
  • MOSALA NA BETELE
  • MOSALA YA BOTONGI
  • MIKANO NA YO YA ELIMO EZALI NINI?
  • Tókanisaka basali ya ntango nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bakɛngɛli mpo na kobatela etonga
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Bilenge​—Bokosala nini na bomoi na bino?
    Bilenge—Bokosala nini na bomoi na bino?
  • Biteyelo ya Teokrasi emonisaka bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
od mok. 10 nk. 105-115

MOKAPO 10

Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe

NTANGO Yesu alingaki kotinda bayekoli na ye bákende kosakola nsango malamu ya Bokonzi, alobaki na bango: “Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.” Mosala ya kosala ezalaki mingi, yango wana abakisaki boye: “Bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Mat. 9:37, 38) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ndenge ya kosala mosala ya kosakola. Maloba na ye emonisi ete mosala yango esengelaki kosalema na lombangu: “Bokosilisa koleka na bingumba nyonso ya Yisraele te liboso Mwana ya moto aya.”​—Mat. 10:23.

2 Lelo oyo mpe, mosala ya kosala ezali mingi. Nsango malamu ya Bokonzi esengeli kosakolama liboso ete nsuka eya, mpe ntango oyo etikali ezali mokuse! (Mrk. 13:10) Lokola elanga ezali nde mokili, mosala na biso ezali kaka lokola oyo ya Yesu ná bayekoli na ye, kasi teritware na biso ezali monene koleka oyo ya bango. Mokili ezali na bato bamiliare ebele; kasi biso basakoli tozali mingi te. Atako bongo, tozali na kondima ete Yehova akosalisa biso. Nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba, mpe na ntango oyo Yehova atyá, nsuka ekoya. Tokotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso mpo tókokisa mosala na biso malamumalamu? Mikano nini tokoki komityela na mosala ya Nzambe?

3 Mpo na komonisa makambo oyo Yehova asɛngi bato oyo bamipesi na Ye, Yesu alobaki: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Mrk. 12:30) Tosengeli kosalela Nzambe na molimo na biso mobimba. Yango elingi koloba ete tosengeli kosala nyonso oyo tokoki na mosala ya Yehova mpo na komonisa ete tokangami makasi na Nzambe mpe tomipesi mobimba epai na ye. (2 Tim. 2:15) Na kotalela bomoi mpe makoki na biso, mokomoko na biso azali na mabaku ebele ya kosala bongo. Talá mwa mabaku yango mpe poná mikano nini okoki komityela na mosala ya Nzambe.

KOZALA MOSAKOLI

4 Moto nyonso oyo ayambi solo azali na libaku malamu ya kosakola nsango malamu. Yango nde mosala ya libosoliboso oyo Yesu apesá bayekoli na ye. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Mbala mingi, moyekoli ya Yesu Kristo abandaka koyebisa basusu nsango malamu ntango kaka ayoki yango. Yango nde Andre, Filipe, Korneyi, mpe bato mosusu basalaki. (Yoa. 1:40, 41, 43-45; Mis. 10:1, 2, 24; 16:14, 15, 25-34) Yango elingi nde koloba ete moto akoki kobanda koyebisa basusu nsango malamu ata liboso azwa batisimo? Ɛɛ! Ntango kaka moto akokisi masɛngami ya Biblia mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, akoki kobanda kosakolaka ndako na ndako. Lisusu, na kotalela makoki na ye mpe makambo ya bomoi na ye, akoki mpe kobimaka na mitindo mosusu ya mosala ya kosakola.

5 Soki mosakoli azwi batisimo, na ntembe te, akosala nyonso oyo akoki mpo na kosalisa basusu báyoka nsango malamu. Bakristo nyonso, ezala basi to mibali, bazali na libaku malamu ya kobimaka na mosala ya kosakola. Tozwaka mapamboli na ndenge topesaka mabɔkɔ, ata mwa moke mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso. Moto nyonso oyo azali na likoki ya kosala mpe makambo mosusu mingi na mosala ya Nzambe akozala mpenza na esengo.

KOSALA ESIKA BASAKOLI BAZALI MINGI TE

6 Ekoki kozala ete bosakolaka mbala na mbala na teritware ya lisangá na bino mpe litatoli monene esili kopesama kuna. Soki ezali bongo, okoki komona ete osengeli kokende na teritware mosusu esika basakoli bazali mingi te mpo na kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe. (Mis. 16:9) Soki ozali nkulutu to mosaleli na misala, ekoki kozala na lisangá mosusu oyo ekosepela mingi soki okei kosalisa yango. Mokɛngɛli ya zongazonga na bino akoki koyebisa yo nini okoki kosala mpo na kopesa mabɔkɔ na lisangá mosusu na zongazonga na bino. Soki olingi kokende kosakola na esika mosusu na ekólo na bino, biro ya filiale ekoki koyebisa yo makambo oyo ekosalisa yo.

7 Okosepela kokende kosakola na ekólo mosusu? Soki ezali bongo, osengeli kokanisa malamu liboso ya kokende. Mpo na nini te kosolola likambo yango na bankulutu ya lisangá na bino? Mobembo ya ndenge wana ekoki kobongola makambo mosusu mpo na yo mpe baoyo bakokende na yo. (Luka 14:28) Nzokande, soki ozali kokana koumela mingi te, ekozala malamu koleka okende nde kosakola na teritware moko na ekólo na bino.

8 Na mikili mosusu, bandeko oyo bazali kozwa mikumba ya bakɛngɛli baumeli naino mingi te na kati ya solo. Na komikitisa nyonso, bandeko ya mikili yango bandimaka ete bankulutu oyo bayebi makambo mingi mpe bayei na lisangá na bango bátambwisa makambo. Soki ozali nkulutu mpe ozali kokana kokende kosakola na ekólo ya ndenge wana, kobosana te ete mokano na yo esengeli kozala te ya kozwa esika ya bandeko oyo okokuta kuna, kasi nde ya kosala elongo na bango. Lendisá bango báluka kokokisa masɛngami ya Biblia mpe bándima kozwa mikumba na lisangá. (1 Tim. 3:1) Zalá motema molai soki makambo mosusu ezali kosalema te ndenge esalemaka na ekólo oyo outi. Salelá makambo oyo oyebi na mokumba ya nkulutu mpo na kosalisa bandeko. Na nsima, soki esɛngi ete mokolo mosusu ozonga na ekólo oyo outá, bankulutu oyo bakotikala bakozala na mokakatano te mpo na kokamba lisangá.

9 Liboso ete biro ya filiale etindela yo nkombo ya masangá oyo okoki kokende kopesa mabɔkɔ, esengeli Komite ya mosala ya lisangá na bino etinda mokanda mpo na kolobela makambo na yo. Mokanda yango ezali na ntina, ezala ozali nkulutu, mosaleli na misala, mobongisi-nzela to mosakoli. Komite ya mosala ya lisangá ekotinda mbala moko mokanda yango ná mokanda oyo emonisi mposa na yo na biro ya filiale ya ekólo oyo olingi kokende kosakola.

KOSAKOLA NA MONƆKƆ MOSUSU

10 Mpo osala lisusu mingi na mosala ya Nzambe, okoki komona malamu oyekola monɔkɔ mosusu, ata mpe elobeli ya bababa. Soki ozali na mokano ya koyekola kosakola na monɔkɔ mosusu, okoki kosolola na bankulutu mpe mokɛngɛli ya zongazonga. Bakoki kopesa yo makanisi mpe bilendiseli oyo osengeli na yango. Na litambwisi ya biro ya filiale, bazongazonga mosusu ebongisaka bakelasi ya koyekola monɔkɔ mpo na kopesa basakoli oyo babongi mpe babongisi-nzela formasyo mpo na kosakola na monɔkɔ mosusu.

MOSALA YA MOBONGISI-NZELA

11 Basakoli nyonso basengeli koyeba masɛngami mpo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi, mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mobongisi-nzela monene to lolenge mosusu ya mosala ya ntango nyonso. Mobongisi-nzela asengeli kozala mokristo oyo azwá batisimo, oyo azali na bizaleli malamu mpe oyo bomoi na ye epesi ye nzela ya kokokisa motángo ya bangonga oyo esɛngami na mosala ya kosakola nsango malamu. Komite ya mosala ya lisangá nde endimaka bandeko oyo basɛngi mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza, nzokande biro ya filiale nde etyaka babongisi-nzela monene.

12 Mobongisi-nzela mosungi akoki kotyama mpo na sanza moko, mpo na basanza mingi oyo elandani, to kosala yango tii ntango ye moko akotika, na kotalela makambo ya bomoi na ye. Basakoli ebele basepelaka kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na mabaku mosusu ya ntina mingi, na ndakisa na eleko ya Ekaniseli to na sanza oyo mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá na bango. Basusu basalaka yango na basanza oyo bazali na konje. Basakoli oyo bazwá batisimo mpe bazali naino na kelasi, bakoki kosepela kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi ntango bakangi konje. Basakoli bakoki kopona kopesa ngonga oyo ekitisami na mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya misato to ya minei ya mbula nyonso, mpe na sanza oyo mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá. Ata soki bomoi na yo ezali ndenge nini, soki ozali na etamboli ya malamu, omibongisi mpo na kokokisa ngonga oyo esɛngami, mpe omoni ete okoki kozala mobongisi-nzela mosungi sanza moko to koleka, bankulutu bakozala na esengo ya kotalela formilɛrɛ na yo.

13 Mpo na kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza, osengeli kozala na likoki ya kokokisa motángo ya ngonga oyo esɛngami mpo na mbula mobimba. Soki ozali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, osengeli kosala na bomoko na lisangá oyo ozali. Babongisi-nzela ya molende bazali lipamboli mpo na lisangá, mpo basalisaka bandeko ya lisangá básepela na mosala ya kosakola mpe balendisaka ata bandeko mosusu bákóma babongisi-nzela. Kasi, liboso otondisa formilɛrɛ mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, osengeli kozala mosakoli ya molende oyo azwá batisimo ekokisi sanza motoba to koleka.

14 Mbala mingi, baponaka babongisi-nzela monene na kati ya babongisi-nzela ya sanza na sanza oyo bamonisi ete bazali na makoki mingi na mosala ya kosakola. Basengeli kozala na likoki ya kokende kosakola esika nyonso oyo biro ya filiale eponi kotinda bango. Mbala mingi, batindamaka na teritware ya mosika epai bakoki kokuta bato oyo bakosepela na solo mpe kofungola masangá ya sika. Ntango mosusu, batindaka babongisi-nzela monene na masangá oyo ezali na mposa ya lisalisi mpo na kosakola na teritware na yango mobimba. Babongisi-nzela monene mosusu oyo bazali bankulutu batindamaka mpo na kosalisa masangá ya mike, ata soki ezali mpenza te na mposa ya basakoli mosusu. Babongisi-nzela monene bazwaka mwa lisalisi ya mbongo ya kobikela. Babongisi-nzela monene mosusu batyamaka mpo na ntango moke kaka.

MOSALA YA MISIONƐRƐ

15 Komite ya mosala ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde etyaka bamisionɛrɛ, mpe Komite ya filiale ya ekólo epai batindi bamisionɛrɛ yango nde etindaka bango na bateritware oyo ezali na bato mingi. Basalisaka mingi mpo na kofandisa mosala ya kosakola mpe kosalisa masangá epikama makasi na elimo. Mbala mingi, bamisionɛrɛ mingi bazwaka formasyo na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Bapesaka bango ndako mpe bazwaka mwa lisalisi ya mbongo ya kobikela.

MOSALA YA ZONGAZONGA

16 Bandeko oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyaka bakɛngɛli ya zongazonga bazwaka formasyo mpe babandaka liboso kozala bakɛngɛli ya zongazonga basungi mpo báyekola makambo mosusu. Bandeko mibali yango balingaka mosala ya kosakola mpe balingaka bandeko ya masangá. Bazali babongisi-nzela ya molende, bayekoli ya molende ya Biblia, balobi mpe bateyi ya malamu. Bamesani mpenza komonisa mbuma ya elimo, mpe bazalaka na bokatikati, na makambo makasimakasi te, mpe na bososoli. Soki ndeko yango abalá, mwasi na ye azalaka mobongisi-nzela oyo azali na etamboli ya malamu mpe ayebi kofanda na bato. Azalaka mosakoli oyo ateyaka malamu. Ayebaka mpe ete azali na mokumba ya komikitisa liboso ya mobali na ye, alobaka na esika ya mobali na ye te, alingaka mpe te bato báyokaka kaka ye. Bakɛngɛli ya zongazonga ná basi na bango bazalaka na makambo mingi ya kosala, yango wana baoyo bazalaka na mposa ya kosala mosala yango basengeli kozala nzoto kolɔngɔnɔ. Babongisi-nzela batondisaka formilɛrɛ te mpo na kosɛnga ete básala mosala ya zongazonga. Bayebisaka nde mokɛngɛli ya zongazonga mposa na bango ya kosala mosala ya zongazonga, mpe mokɛngɛli yango akopesa bango makanisi.

BITEYELO YA TEOKRASI

17 Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi: Ebongiseli ya Yehova ezali na mposa ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi mingi lisusu mpo na kosakola na bateritware oyo litatoli epesamaka mingi te mpe kosalisa masangá ezala makasi na elimo. Yango wana, bandeko oyo bazali minzemba mpe bandeko oyo babalá, bakoki kotondisa formilɛrɛ mpo na kozwa formasyo ya mozindo na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Na nsima, batindamaka babongisi-nzela ya sanza na sanza na bisika oyo basakoli bazali mingi te na ekólo na bango. Kasi, baoyo bandimi kokende na bateritware ya mosika bakoki kotindama na bamboka mosusu na ekólo na bango to na ekólo mosusu. Mwa ndambo na bango bakoki kotindama babongisi-nzela monene mpo na mwa ntango to mpo na libela. Babongisi-nzela oyo balingaka kokɔta na eteyelo yango bakoki koyeba masɛngami na yango na likita oyo ebongisamaka mpo na yango na liyangani ya etúká.

18 Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia: Bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali minzemba, mpe bandeko oyo babalá oyo baponami mpo na kokɔta na eteyelo yango basengeli koyeba koloba Anglais mpe kozala na molɔngɔ ya basali ya ntango nyonso. Basengeli kozala na likoki ya kolendisa mpe kofandisa makambo ezala na teritware to na biro ya filiale. Basilá komonisa ete basepelaka kosalela bandeko mpe bakoki kosalisa basusu na boboto mpenza báyekola mpe bálanda mitinda ya Biblia mpe litambwisi ya Teokrasi. Komite ya filiale nde eponaka bandeko oyo bakoki kotondisa formilɛrɛ mpo na kokɔta na eteyelo yango. Bandeko oyo bazwi diplome na eteyelo yango batindamaka na teritware to na biro ya filiale na mboka mopaya to na ekólo oyo bauti.

MOSALA NA BETELE

19 Kosala na Betele ezali mpenza libaku malamu. Nkombo Betele elimboli “Ndako ya Nzambe,” mpe nkombo yango ebongi mpenza na esika wana, epai misala ya Teokrasi ezali kotambwisama. Bandeko oyo basalaka na Betele basalisaka mingi na mosala ya kobimisa, kobongola, mpe kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mosala na bango ezali na motuya mingi na miso ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo ekambaka mpe etambwisaka masangá na mabele mobimba. Bandeko mingi ya Betele oyo bazali babongoli bafandaka mpe basalaka na teritware ya filiale na bango na bisika oyo monɔkɔ oyo babongolaka elobamaka. Yango esalisaka bango báyokaka ndenge monɔkɔ yango elobamaka mokolo na mokolo. Bakoki mpe komona soki bato bazali kokanga ntina ya elobeli oyo bazali kosalela na mikanda oyo babongoli to te.

20 Misala mingi oyo esalemaka na Betele esɛngaka kozala nzoto makasi. Yango wana, na Betele babengaka mingimingi bandeko mibali ya bilenge oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe makasi, oyo bamipesá na Yehova mpe bazwá batisimo. Soki filiale oyo ezali kotambwisa mosala na ekólo na bino ezali na mposa ya bandeko mpo na kosala na Betele mpe soki osepelaka kosala kuna, okoki koyeba masɛngami na yango soki osololi na bankulutu ya lisangá na bino.

MOSALA YA BOTONGI

21 Kotonga bandako ya misala ya Teokrasi ezali na kati ya mosala mosantu, oyo ekokani na mosala ya kotonga tempelo ya Salomo. (1 Bak. 8:13-18) Bandeko mingi bamonisaka molende mpenza na ndenge bandimaka kopesa ntango mpe biloko na bango mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala yango.

22 Okoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango? Soki osilá kozwa batisimo mpe olingi kopesa mabɔkɔ na mosala yango, bandeko oyo bazali kokamba mosala ya botongi na teritware na bino bakosepela mpenza mpe bakopesa yo formasyo ata soki oyebi makambo mingi te. Yebisá bankulutu ya lisangá na bino ete olingi kopesa mabɔkɔ na mosala yango. Kutu, basakoli mosusu oyo bazwá batisimo mpe bakokisi masɛngami bandimá kokende kotonga bandako ya mosala ya Teokrasi na mikili mosusu.

23 Ezali na ndenge mingi ya kosala na mosala ya botongi. Na ndakisa, basakoli oyo bazwá batisimo oyo bazali ndakisa malamu, bayebi mwa misala ya kotonga bandako mpe bakoki kosalisa na esika oyo bafandi bakoki kosala lokola bavolontɛrɛ na Biro ya kosala baplan ya bandako/Departema ya Botongi na ekólo (Service local développement/Construction). Basusu bakoki kokende kopesa mabɔkɔ na misala oyo ezali kosalema mosika na esika oyo bafandaka mpo na mwa ntango mpe biro ya filiale etyaka bango lokola bavolontɛrɛ mpo na botongi (volontaires à la construction) mpo na pɔsɔ mibale tii sanza misato. Bandeko oyo batyami mpo na kosala ntango molai babengami basaleli mpo na botongi (serviteurs à la construction). Ndeko oyo atindami mpo na mosala ya botongi na mboka mopaya abengami mosaleli mpo na botongi na mboka mopaya. Ekipi ya botongi oyo esangisaka basaleli mpo na botongi mpe bavolontɛrɛ mpo na botongi etambwisaka misala ya kotonga na esika moko boye; bavolontɛrɛ ya Biro ya kosala baplan ya bandako/Departema ya Botongi mpe bavolontɛrɛ ya lisangá basalisaka bango. Baekipi ya botongi ekendaka kotonga na bisika ndenge na ndenge oyo ezali na teritware ya filiale na bango.

MIKANO NA YO YA ELIMO EZALI NINI?

24 Soki omipesá na Yehova, mposa na yo ezali ete osalela ye libela na libela. Kasi, mikano nini ya elimo omityeli? Komityela mikano ya elimo ekosalisa yo osalela makasi na yo mpe makoki na yo mosusu na bwanya. (1 Ko. 9:26) Komityela mikano ya ndenge wana ekosalisa yo okola na elimo mpe omipesa mobimba na makambo oyo eleki ntina, wana ozali kokoba koluka mikumba mosusu.​—Flp. 1:10; 1 Tim. 4:15, 16.

25 Ntoma Paulo atikelá biso ndakisa malamu mpenza oyo tosengeli kolanda na mosala ya Nzambe. (1 Ko. 11:1) Amipesaki mingi na mosala ya Yehova. Ayebaki ete Yehova nde apesaki ye mabaku mingi. Epai ya bandeko ya Korinti, Paulo akomaki boye: “Porte monene, oyo ezali kopesa nzela na mosala, efungwami liboso na ngai.” Porte yango efungwami mpe liboso na biso? Ɛɛ, tozali na mabaku mingi ya kosalela Yehova elongo na lisangá, mingimingi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Kasi, ndenge moko na ntoma Paulo, mpo na kokɔta na “porte monene” yango tokokutana na ‘batɛmɛli mingi.’ (1 Ko. 16:9) Paulo azalaki komipesa disiplini. Talá ndenge alobaki: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai mpe kokómisa yango lokola moombo.” (1 Ko. 9:24-27) Biso mpe tozali na elimo ya ndenge wana?

Komityela mikano ya elimo ekosalisa yo osalela makasi na yo mpe makoki na yo mosusu na bwanya

26 Mokomoko na biso alendisami ete amityela mikano na mosala ya Nzambe na kotalela bomoi na ye. Bandeko mingi lelo oyo bazali na lolenge moko ya mosala ya ntango nyonso mpo bamityelaki mikano yango na bolenge. Ata ntango bazalaki naino bana mike, baboti na bango balendisaki bango básala yango. Yango wana, balekisi bomoi ya esengo na mosala ya Yehova, mpe bayokaka mawa te mpo na yango. (Mas. 10:22) Ezali mpe na mikano mosusu ya malamu oyo okoki komityela, na ndakisa kosangana na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ, kobanda koyekola na moto moko Biblia, to kozwa ntango mingi mpo na kobongisa makita. Likambo ya ntina ezali ete tótɛlɛma ngwi mpe tókokisa mosala na biso malamumalamu. Soki tosali bongo, tokokumisa Yehova mpe tokokokisa mokano na biso ya ntina koleka: kosalela ye libela na libela.​—Luka 13:24; 1 Tim. 4:7b, 8.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto