Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w23 Août nk. 14-17
  • Okosala nini soki molongani na yo atalaka pornografi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okosala nini soki molongani na yo atalaka pornografi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOLONGANI OYO ASALI LIKAMBO TE AKOKI KOSALA NINI?
  • OKOKI KOSALISA MOLONGANI NA YO?
  • BONGO SOKI AZALI KOKOBA KAKA KOTALA YANGO?
  • Pornografi ekoki kobebisa libala na yo
    Lisalisi mpo na libota
  • Mpo na nini koboya kotala porno?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndenge nini nakoki koboya pornografi?
    Lamuká!—2008
  • Pornografi—Ezali lisano mpamba to pwazɔ?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
w23 Août nk. 14-17
Ndeko mwasi moko afandi na nse pene ya mbeto, azali kolela. Na nsima na ye ezali na foto ya libala oyo batye na mire..

Okosala nini soki molongani na yo atalaka pornografi?

  • “Namonaki lokola molongani na ngai azalaki kosala ekobo mbala na mbala.”

  • “Namonaki lokola nasambwe kosambwa, nasili valɛrɛ, lokola nazalaki na ntina te.”

  • “Nakokaki koyebisa likambo yango ata moto moko te. Nanyokwamaki na yango kaka ngai moko.”

  • “Namiyokaki lokola Yehova azalaki kotyela ngai likebi te.”

Maloba oyo ezali likoló emonisi ndenge mwasi anyokwamaka ntango mobali na ye azali kotala pornografi. Mpe soki mobali azalaki kotala yango na kobombana, mbala mosusu na boumeli ya basanza to bambula, ekoki kokóma mpasi mwasi atyela mobali na ye lisusu motema. Mwasi moko alobaki boye: “Namitunaki, ‘Oyo mobali ya ndenge nini nafandi na ye? Ezali nde na makambo mosusu oyo azali kobombela ngai?’”

Lisolo oyo ebongisami mpo na mwasi oyo mobali na ye atalaka pornografi.a Ekolobela mitinda ya Biblia oyo ekobɔndisa ye, ekondimisa ye ete Yehova alingaka ye, mpe ete akosalisa ye abatela kimya ya makanisi mpe atikala penepene na Yehova.b

MOLONGANI OYO ASALI LIKAMBO TE AKOKI KOSALA NINI?

Atako okoki te koyeba makambo nyonso oyo molongani na yo asalaka, ezali na mwa makambo oyo okoki kosala mpo omitungisa mingi te mpe ozala na kimya ya makanisi. Talelá makambo oyo elandi.

Boyá komipesa foti. Mwasi akoki komipesa foti soki mobali na ye azali kotala pornografi. Alicec amonaki lokola mobali na ye azalaki komona ye lisusu kitoko te. Yango wana akómaki komituna, ‘Mpo na nini mobali na ngai azali kosepela kotala basi mosusu kasi ngai te?’ Basi mosusu bamipesaka foti mpo na ndenge na bango ya kosala makambo, bakanisaka ete bango nde bazali kobebisa lisusu makambo koleka. Danielle alobi: “Namimonaki lokola mwasi moko mabe oyo azalaki kobebisa libala na ye, mpo nakómaki na nkanda makasi oyo ebongi na bakristo te.”

Soki yo mpe ozali komiyoka bongo, yebá ete Yehova azali kopesa yo foti te mpo na makambo oyo mobali na yo azali kosala. Yakobo 1:14 elobi: “Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.” (Rom. 14:12; Flp. 2:12) Na esika apesa yo foti, Yehova azali nde kosepela na bosembo na yo.​—2 Nt. 16:9.

Mwasi akoki kokanisa ete lokola mobali na ye azali kotala pornografi, yango elingi koloba ete mobali yango azali komona ye lisusu kitoko te. Kasi ezali solo te. Bato ya mayele na makambo ya pornografi balobi ete pornografi esalaka ete mobali akóma na mposa moko makasi ya kosangisa nzoto oyo ata mwasi moko te akoki kokokisa yango.

Boyá komitungisa koleka ndelo. Catherine alobi ete ndenge azalaki komitungisa makasi mpo mobali na ye azalaki kotala pornografi ebebisaki bomoi na ye mobimba. Frances alobi: “Nazalaki komitungisa ntango nyonso soki nayebi te esika mobali na ngai azali. Mbala mingi nazalaki komitungisa mokolo mobimba.” Bandeko basi mosusu bamonisi ndenge bayokaka nsɔni ntango bazali elongo na bandeko ya lisangá oyo bakoki koyeba makambo etali mibali na bango. Basusu mpe bamonisi ete bamiyokaka bango moko mpo bakanisaka ete moto moko te akomitya na esika na bango.

Komiyoka bongo ezali mabe te. Nzokande, soki ozali ntango nyonso kokanisa kaka makambo yango, okobakisa kaka mpasi likoló ya mpasi. Salá makasi otya nde makanisi na boyokani na yo ná Yehova. Yango ekosalisa yo ozwa makasi ya koyika mpiko.​—Nz. 62:2; Ef. 6:10.

Okoki kobɔndisama mingi soki otángi mpe omanyoli na masolo ya Biblia oyo elobeli basi oyo bakutanaki na mitungisi mpe babɔndisamaki ntango babondelaki Yehova. Na bantango mosusu, alongolaki te mitungisi na bango, kasi apesaki bango kimya. Na ndakisa, Ana ayokaki “mpasi mingi” mpo na makambo oyo akutanaki na yango. Kasi, nsima ya “kobondela ntango molai liboso ya Yehova,” azwaki kimya, atako ayebaki naino te ndenge makambo na ye ekosuka.​—1 Sa. 1:10, 12, 18; 2 Ko. 1:3, 4.

Ndeko mwasi yango ná mobali na ye, azali kosolola na bankulutu mibale mpe bankulutu bazali koyoka na likebi.

Mwasi ná mobali bakoki kozala na mposa ya koluka lisalisi epai ya bankulutu

Luká lisalisi epai ya bankulutu. Bankulutu bakoki ‘kozala lokola esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ, esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi.’ (Yis. 32:2) Bakoki ata kosɛnga ndeko mwasi moko oyo okoki koyebisa ye likambo na yo na nkuku mpe akoki kobɔndisa yo.​—Mas. 17:17.

OKOKI KOSALISA MOLONGANI NA YO?

Okoki kosalisa mobali na yo atika momesano ya kotala pornografi? Mbala mosusu. Biblia emonisi ete mpo na kosilisa likambo moko to kolonga monguna moko ya nsɔmɔ, “bato mibale baleki moto moko.” (Mos. 4:9-12) Bato ya mayele bamonisi ete matomba emonanaka mingi ntango babalani bazali kosala elongo mpo na kolonga momesano ya kotala pornografi mpe kozongela kotyelana motema na libala na bango.

Na ntembe te, makambo mingi ekotalela soki molongani na yo azali kosala milende mpe azwi ekateli ya kolongola makanisi na ye ya kotala pornografi. Azali kosɛnga Yehova makasi mpe koluka lisalisi ya bankulutu? (2 Ko. 4:7; Yak. 5:14, 15) Ayekoli mayele oyo ekosalisa ye azala mosika na makambo ya pornografi​—na ndakisa, komityela bandelo ya kosalela baaparɛyi, mpe kokima makambo nyonso oyo ekoki komema ye na kotala pornografi? (Mas. 27:12) Azali na mposa ya kondima lisalisi na yo mpe kozala mpenza sembo epai na yo? Soki ezali bongo, okoki kosalisa ye.

Na ndenge nini? Tózwa ndakisa moko. Felicia abalanaki na Ethan, oyo azalaki kotala pornografi ntango azalaki naino elenge. Felicia apesaka Ethan nzela básolola na pɛtɛɛ nyonso ntango azali na mposa ya kotala pornografi. Ethan alobi: “Nalobaka na mwasi na ngai polelepolele. Na bolingo nyonso, asalisaka ngai namityela bandelo mpe alukaka mbala na mbala koyeba soki nazali malamu. Lisusu, asalisaka ngai nakɔtaka ntango nyonso te na Internet.” Mpo na koloba solo, Felicia ayokaka mabe ndenge Ethan abendamaka na pornografi. Felicia alobi boye: “Kasi, nkanda mpe mpasi oyo nayokaka esalisaka ye te alonga momeseno wana ya mabe. Ntango tolobelaka mikakatano na ye, Ethan azalaka wana mpo na kosalisa ngai nayikela mpasi na ngai mpiko.”

Kosolola polele mwasi ná mobali ekosalisa kaka mobali te mpo atika kotala pornografi, kasi ekosalisa mpe mwasi mpo atyela lisusu mobali na ye motema. Oyo eleki ntina, ntango mobali asepelaka koyebisa mwasi bolɛmbu na ye, epai azali kokende mpe makambo oyo asalaka, yango esalaka ete mwasi akóma kotyela ye lisusu motema mpo mobali azali kobombela ye eloko moko te.

Ondimi ete okoki kosalisa mobali na yo na ndenge wana? Soki ezali bongo, ekozala malamu bótánga mpe bólobela lisolo oyo elongo. Mposa na ye ekozala ya kotika pornografi mpe kopesa yo ntina ya kotyela ye lisusu motema. Na esika asilika mpo bozali kosolola likambo yango, mobali asengeli nde koluka koyeba ndenge ozali komiyoka mpo na likambo yango. Mposa na yo ezali ya kosalisa ye na milende oyo azali kosala mpe komonisa ye ete okoki lisusu kotyela ye motema. Bino nyonso mibale bokozala na mposa ya koyekola makambo oyo etindaka bato bákwea na motambo ya kotala pornografi mpe ndenge ya kolonga yango.d

Soki ozali kobanga ete masolo na bino ekopelisa mɔtɔ, kende kosɛnga nkulutu moko oyo bino mibale boyokanaka na ye malamu mpo azala wana ntango bozali kosolola likambo yango. Kobosana te ete ata nsima ya kotika kotala pornografi, ekoki kozwa ntango mingi mpo ozongela kotyela mobali na yo lisusu motema. Kolɛmba te. Luká koyeba soki mbongwana moke ezali komonana na boyokani na bino. Zalá na elikya ete na boumeli ya ntango, soki bino nyonso mibale bozali na motema molai, nsukansuka libala na bino ekokóma lisusu makasi.​—Mos. 7:8; 1 Ko. 13:4.

Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa?

  • Soki mwasi alingi, bózwa bibongiseli mpo na kosololaka na babalani yango mibale mbala na mbala. Bópesa mwasi libaku ya komonisa ndenge azali komiyoka.​—Yis. 32:1, 2; 1 Tes. 5:14; 1 Pe. 5:2, 3.

  • Bóyeba ete moto akoki kokóma moombo ya kotala pornografi mpe bóluka koyeba makambo oyo esɛngaka moto asala mpo atika momeseno yango.

  • Ata soki nsima ya mwa ntango emonani ete mobali atiki kotala pornografi, bóyeba ete asengeli kokoba kozwa lisalisi mpo na koboya momeseno yango.

  • Bózala ekɛngɛ mpo bóluka te kolongisa etamboli ya mobali to koloba ete mwasi azali mpe na foti na likambo yango na lolenge moko to mosusu.

  • Bólendisa mwasi amitalela ndenge Yehova atalelaka ye mpe akoba koyekolaka mpe kobondelaka.

  • Bóyebisa mwasi ete Yehova, lisangani ya bankulutu mpe bandeko ya lisangá balingaka ye, bamemyaka ye mpe bazwaka ye na motuya mpenza.

BONGO SOKI AZALI KOKOBA KAKA KOTALA YANGO?

Soki mobali na yo azongeli kotala pornografi nsima ya kotika yango na boumeli ya ntango mingi, yango elimboli nde ete abongoli mpenza motema te to ete elikya ezali te na likambo yango? Ezali mpenza bongo te. Mingimingi soki azali na momeseno ya kotala yango, akoki kosala makasi mpo na kobundisa yango bomoi na ye mobimba. Akoki kozongela kotala yango ata nsima ya kotika kotala yango bambula mingi. Mpo atikela yango lisusu nzela te, asengeli kobunda makasi mpenza mpo na kotɛmɛla yango, mbala mosusu akoki kozwa bikateli ya makasi ntango momesano yango emonani lokola ezali kokoba. (Mas. 28:14; Mat. 5:29; 1 Ko. 10:12) Akozala na mposa ya kokómisama sika ‘na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na ye’ mpe koyekola ‘koyina oyo ezali mabe,’ ezala mpe pornografi mpe mimeseno nyonso ya mbindo, na ndakisa, kosimbasimba enama na ye ya kobotela tii akoyoka elɛngi. (Ef. 4:23; Nz. 97:10; Rom. 12:9) Azali na mposa ya kosala milende yango? Soki ezali bongo, akoki nsukansuka kozala na likoki ya kolonga momeseno wana ya mabe.e

Ndeko mwasi yango azali kotánga Biblia.

Salá makasi otya nde makanisi na boyokani na yo ná Yehova

Kasi ezali boni soki molongani na yo azali na ye kosala ata molende moko te mpo na kobundisa mokakatano na ye? Mpo na koloba solo, okoki komitungisa, kozala na nkanda, mpe komona ete ozali mpamba. Luká kimya ya makanisi na kotika likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova. (1 Pe. 5:7) Kobá kopusana penepene na Yehova na nzela ya koyekola, kobondela, mpe komanyola. Wana ozali kosala yango, yebá ete ye mpe azali kopusana penepene na yo. Ndenge emonisami na Yisaya 57:15, afandaka elongo na baoyo “batutami mpe baoyo bazali na elimo ya komikitisa,” mpe alingi kosalisa bango bázongela lisusu esengo na bango. Salá makasi ozala mokristo oyo abongi. Luká lisalisi epai ya bankulutu. Longola yango, zalá na elikya ete na mikolo ezali koya, mobali na yo akoki kosala mbongwana ya solosolo.​—Rom. 2:4; 2 Pe. 3:9.

a Na lisolo oyo, tokolobela mobali oyo atalaka pornografi. Nzokande, mitinda ya Biblia oyo ezali na lisolo oyo ekosalisa mpe mobali oyo mwasi na ye atalaka pornografi.

b Na kotalela Makomami, kotala pornografi epesi babalani nzela te ya koboma libala.​—Mat. 19:9.

c Topesi bango bankombo mosusu.

d Makambo mosusu oyo ekoki kosalisa bino ezwami na jw.org mpe na mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Na ndakisa, talá masolo “Pornografi ekoki kobebisa libala na yo” na jw.org; “Okoki kolonga komekama!” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2014, nk. 10-12; mpe “Pornografi​—Ezali lisano mpamba to pwazɔ?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2013, nk. 3-7.

e Lokola kotala pornografi ekoki kokóma momeseno, babalani mosusu bazwaka ekateli ya koluka lisalisi epai ya bato ya mayele na makambo etali pornografi, longola koluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto