LOYEMBO 100
Tóyamba bango malamu
Ya Papye
1. Yehova ayebi koyamba bato.
Atalaka te bilongi liboso.
Apesaka mbula,
bilei mpe moi
Na basembwi mpe bato mabe.
Tókabela bato oyo bazangi,
Tólanda lobɔkɔ pɛtɛɛ ya Nzambe.
Nzambe akofuta
bolamu tosali
Na bolingo, mpe na esengo.
2. Ntango tosalisi moto ya mpasi,
Soki ekofuta, nani ayebi?
Yambá moto nyonso:
Koponapona te;
Azangi eloko, pesá ye.
Tómekola Lidia na likamb’oyo.
Tótya bato mbamba báya na ndako.
Yehova ayebi
nyonso toz’osala.
Tólanda se ndakisa na ye.
(Talá mpe Mis. 16:14, 15; Rom. 12:13; 1 Tim. 3:2; Ebr. 13:2; 1 Pe. 4:9.)