Loyembo 121
Tóyikisana mpiko
Ya Papye
1. Tóyikisana mpenza mpiko
Tósalela se Yehova,
Tózala mpenza na bolingo,
Na bomoko mpe na kimya.
Bolingo ya bato ya Nzambe
Elendisaka makasi.
Lisang’ezali ekimelo,
Esika tobatelami.
2. Liloba na ntango malamu
Eza’ mpenza kolendisa!
Maloba mpo na kobɔndisa
Eutaka na baninga.
Malamu kosala elongo
Na elikya na baninga!
Tólukaka kolendisana
Mpe kosalisana mpenza.
3. Na miso’a kondima tomoni
Mokolo’a Yah ebɛlɛmi,
Tóyanganak’esika moko
Tólanda nzel’oy’ebongi.
Elongo na basali’a Nzambe,
Tokosalela ye seko.
Ɛɛ, toz’oyikisana mpiko
Mpo tóbatela bosembo.
(Talá mpe Luka 22:32; Mis. 14:21, 22; Gal. 6:2; 1 Tes. 5:14.)