Loyembo 43
Tósɛnzɛla, tótɛlɛma ngwi, tózala makasi
Ya Papye
1. Tósɛnzɛla, tózala ngwi,
Tóyika mpiko mpenza.
Tózala mpenza mibali,
Mpo solo tokolonga.
Tokotos’etinda ya Kristo,
Tóndima ye akamba biso.
(MONDIMO)
Tósɛnzɛla, tótɛlɛma ngwi!
Tokokoba tii nsuka!
2. Sɛnzɛlá na makanisi,
Tótosa ntango nyonso.
Tólandaka mpenza Kristo,
Na moombo ya sembo.
Tóyoka toli’a bankulutu,
Baz’okamba mpate malamu.
(MONDIMO)
Tósɛnzɛla, tótɛlɛma ngwi!
Tokokoba tii nsuka!
3. Tósɛnzɛla biso nyonso,
Ntango toz’osakola.
Ata banguna baboyi,
Tokokoba tii nsuka.
Biso nyonso tósakolaka.
Mokolo’a Yehov’eza’ koya!
(MONDIMO)
Tósɛnzɛla, tótɛlɛma ngwi!
Tokokoba tii nsuka!
(Talá mpe Mat. 24:13; Ebr. 13:7, 17; 1 Pe. 5:8.)