Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Juillet lok. 32
  • Azwaki esika ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Azwaki esika ya liboso
  • Lamuká!—2002
Lamuká!—2002
g02 Juillet lok. 32

Azwaki esika ya liboso

Elenge moko akomelaki filiale ya Batatoli ya Yehova na Zambie mpo na komonisa botɔndi na ye mpo na zulunalo Lamuká! Alobaki ete esalisaki ye abima moto ya liboso na momekano ya kokoma oyo bana-kelasi ya eteyelo ya ntei (secondaire) basalaki. Bapesaki bana-kelasi yango motó ya likambo “Momekano ya kotinda bato likoló na bafize: likambo oyo ezali kobebisa mbongo mingi koleka makambo mosusu nyonso ya mokili”; mpe bayebisaki bango básala bolukiluki na mikanda mpo na likambo yango. Elenge yango alobaki boye:

“Nokinoki nazwaki Lamuká! ya 8 Sɛtɛmbɛ 1992 (na Lingelesi). Zulunalo yango ezalaki kolobela likambo oyo nazalaki mpenza koluka. Nasalelaki mpe makambo oyo ezalaki na banimero mosusu ya Lamuká!” Lokola mbano mpo na esika ya liboso oyo alongaki, bapesaki ye shɛkɛ ya dolare 75. Amonisaki botɔndi na ye na maloba oyo: “Mpo na bato mingi, Lamuká! yango moko ezali zulunalo oyo esili kolonga esika ya liboso.”

Wana bato na mokili mobimba bazali kotalela baprogramɛ ya kotinda bamasini na likoló, bakisa mpe mayele oyo baguvɛrnɛma ezali kozwa mpo na kobatela bikólo na bango na makaneli ya banguna, bato mingi bazali komituna soki tokofanda mokolo mosusu na mokili oyo ezangi bitumba. Motuna wana, yango nde ezali motó ya likambo ya mwa buku moko ya nkasa 32 oyo ezali kopesa bantina ya solosolo ya kondima ete mokili ya bongo ekozala solo mpenza. Kasi ekotyama ndenge nini mpe ntango nini?

Tozali kolendisa yo otánga mwa buku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? Soki olingi kozwa mwa buku yango, tondisá eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe tindá yango na adrɛsi oyo ezali wana to mpe na adrɛsi oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Bótindela ngai mwa buku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia na ndako kozanga kofuta mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto