Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Mpo na nini tata na ngai to mama na ngai alingaka ngai te?
“Liboso ete tata na ngai aboma libala na mama, tozalaki kokende kolekisa ntango na libongo ya zelo, kokende kolya na restora, mpe kokende kotambola na bisika mingi na motuka na ye. Na nsima ezalaki lisusu bongo te. Tata na ngai azali lisusu ndenge azalaki te. Nakanisi ete akabwani mpe na ngai.”—Karen.a
BILENGE mingi bamiyokaka ndenge wana. Lokola Karen, bamonaka ete tata na bango to mama na bango alingi bango lisusu te, to mpe alingaka bango soki moke te. Awa tolingi kolobela te mwa mawa oyo bilenge bayokaka soki mwa matata ebimi kati na bango na baboti na bango; to mpe mwa nkanda oyo mbala mosusu bilenge bayokaka soki baboti bapesi bango disipilini. Kasi, ezali na baboti mosusu oyo bakipaka mpenza bana na bango te, batyelaka bango likebi te mpe bapesaka bango te disipilini oyo basengeli na yango. Baboti mosusu bazalaka na momeseno ya koyokisa bana mpasi mpe konyokola bango, mbala mosusu kolobela bango maloba mabe to kobɛta bango na ndenge ya mabe.
Ezali na eloko moko te oyo epesaka mpasi koleka soki tata na yo to mama na yo abosani yo libela. Karen alobi boye: “Yango esalaki namiyoka ete balingaka ngai te mpe bakipaka ngai te.” Soki yo mpe osí okutaná na likambo ya ndenge wana, talelá mwa toli oyo ekoki kosalisa yo mpo makanisi wana elɛmbisa yo te. Zalá na kondima ete, ata soki tata na yo to mama na yo azali kosalisa yo te, okoki kozala na bomoi ya malamu.
Luká koyeba baboti na yo malamumalamu
Ya liboso, ezali mabe te kokanisa ete baboti na yo bálinga yo. Bolingo ya baboti epai ya mwana na bango esengeli kozala lokola moi, ebimaka yango moko mpe ata mokolo moko te ezangá kobima. Nzambe alingi ete baboti bámonisa bolingo motindo wana. (Bakolose 3:21; Tito 2:4) Kasi soki ezali bongo, mpo na nini baboti mosusu bakipaka bana na bango te, basundolaka bango, to banyokolaka bango?
Moko ya bantina ekoki kozala makambo oyo bango moko bakutaná na yango na bomoi na bango. Okoki komituna motuna oyo: ‘Epai wapi baboti na ngai bayekolaki kobɔkɔla bana?’ Mbala mingi emonanaka ete baboti babɔkɔlaka bana kaka ndenge oyo baboti na bango babɔkɔlaki bango. Lisusu, mokili na biso ya lelo oyo etondi na makambo mabe mpenza, na ebele ya bato oyo “bazangi bolingo ya libota,” mbala mingi bana bazali kobɔkwama malamu te. (2 Timote 3:1-5) Mbala mosusu, yango ememaka baboti banyokolaka bana na bango se ndenge oyo banyokolaki bango.
Lisusu, makambo ndenge na ndenge ekoki kosala ete baboti bázanga mpenza esengo. Bamosusu balukaka kokima bampasi mpe motungisi na komipesáká mobimba na mosala, na masanga, to na komɛla bangi. Na ndakisa, William na Joan babɔkwamaki na tata oyo azalaki kolangwa masanga. Joan alobi boye: “Tata azalaki kokoka kopesa biso longonya te. Kasi, likambo ya mabe koleka ezalaki nde nkanda oyo ye azalaki na yango soki amɛli. Azalaki kogangela mama mpokwa mobimba. Mbala mingi nazalaki kobanga.” Ata soki baboti bazali konyokola bana na bango na ndenge ya polele te, lolenge ya bomoi na bango ekoki kosilisa bango makasi, na boye ete, bakozala na likoki te ya komonisa bolingo oyo esengeli epai ya bana na bango mpe kotyela bango likebi.
William akanisi ete ayebi sikoyo likambo oyo esalá ete tata na ye azala na ezaleli mabe. Alobi boye: “Tata na ngai akolaki na Berlin, na ekólo Allemagne na eleko ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Ntango azalaki mwana, akutanaki na makambo ya nsɔmɔ mpe amonaki ndenge bato mingi bazalaki kokufa. Mokolo na mokolo, azalaki komona mpasi mpo na kozwa mwa eloko ya kolya. Namoni ete makambo oyo tata na ngai akutaná na yango nde esalá ete azalaka bongo.” Ya solo, Biblia elobi ete minyoko ekoki kotinda moto asala makambo na kozanga mayele.—Mosakoli 7:7.
William na Joan bakanisi ete makambo oyo tata na bango akutaná na yango na bomoi na ye epesaki ye nzela ya konyokola bango? William ayanoli ete: “Te, ndenge akolá epesi ye nzela te ete alangwaka masanga mpe azalaka na etamboli mabe. Nzokande, lokola nayebi bongo, yango esalisi ngai nakanga malamumalamu ntina ya ezaleli ya tata na ngai.”
Soki ondimi ete baboti na yo bazali bato ya kozanga kokoka mpe oluki koyeba makambo oyo ekómelá bango na bomoi na bango, yango ekosalisa yo oyeba bango malamumalamu. Masese 19:11 (NW) elobi ete: “Ya solo, mayele ya moto ekolɛmbisa nkanda na ye.”
Ndenge nini okoki kolonga makanisi wana ya mabe
Okoki kozwa makanisi mosusu ya mabe mpo na makambo oyo ezali kosalema na ndako. Na ndakisa, lokola baboti na ye bazalaki kotyela ye likebi te, Patricia azalaki komiyoka ete “azangi ntina mpe balingaka ye te.” Ekómaki mpasi Lydia atyela mibali motema mpo ete tata na ye atikaki mama na ye ntango ye azalaki kaka na mbula mwambe. Célia, ye, azalaki kolinga ete moto nyonso oyo akutani na ye atyela ye mpenza likebi, nyonso wana kaka mpo na kosilisa mposa ya mama na ye oyo “amipesaki na komɛla bangi.”
Nkanda na zuwa ekoki mpe kobimisa mikakatano mosusu. Ntango Karen amonaki ete tata na ye abali mwasi mosusu mpe ete na esika alinga ye akómaki nde kolinga libota na ye ya sika, yango esalaki ete akóma “na zuwa makasi na ntango wana.” Mélanie, ye akómaki kutu koyina baboti na ye. Alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso koswana na bango.”
Lolenge wana ya komiyoka ekoki kokamwisa te, soki totaleli makambo oyo ezali kotinda moto asala ndenge wana. Kasi, ndenge nini okoki kotika makanisi mabe wana na lolenge oyo ebongi? Tálela toli oyo elandi.
• Pusaná penepene na Yehova Nzambe. (Yakobo 4:8) Kotánga Biblia yo moko mpe kosangana pɔsɔ na pɔsɔ na basaleli ya Nzambe ekoki kosalisa na likambo yango. Ntango ozali komona ndenge oyo Yehova azali kosalela bato mosusu makambo, okoyeba ete azali sembo. Okoki kotyela ye motema. Yehova atunaki Bayisalaele ete: “Mwasi akoki nde kobosana mwana oyo azali naino [komɛla mabɛlɛ]? Ayoka mawa lisusu te mpo na mwana mobali na libumu na ye?” Alakaki bango boye: “Ata baoyo bakobosana nde ngai nakobosana yo te.” (Yisaya 49:15) Yango wana, bóndelaka Nzambe ntango nyonso. Komitungisa te soki ozali koyeba te maloba nini oyo okoloba. Ayebi mposa na yo. (Baloma 8:26) Yebá ete Yehova alingaka yo ata soki ozali komona lokola ete moto moko te alingaka yo.—Nzembo 27:10.
• Sololá likambo yango na mokóló moko oyo otyelaka ye motema. Zwá baninga oyo bakɔmeli mpenza na elimo. Monisá bango polele ndenge ozali koyoka mpe yebisá bango makambo oyo etungisaka yo. Na lisangá ya Batatoli ya Yehova, okoki kokuta batata mpe bamama ya elimo. (Malako 10:29, 30) Nzokande, mbala mosusu ekosengela ete yo nde oluka lisalisi epai na bango, oyebisa bango polele ndenge ozali koyoka. Bato mosusu bakoyeba ndenge ozali komiyoka kaka soki yo moko oyebisi bango yango. Soki obimisi makambo oyo ezali kosala yo mpasi na motema, motema na yo ekokita mpe okozwa mpenza libɔndisi.—1 Samwele 1:12-18.
• Salisáká bato. Mpo okóma mawamawa te, kokanisa mpambampamba te makambo oyo ezali kosala yo mpasi. Na esika ya kosala bongo, sepeláká na oyo ozali na yango. Lukáká mabaku ya ‘kotyáká likebi, na komibanzabanza kaka na makambo na yo moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’ (Bafilipi 2:4) Omityela mikano ya elimo, na nsima salá makasi mpo na kokokisa yango na kozaláká ntango nyonso na makanisi malamu. Kondima kosala makambo mpo na bolamu ya bato mosusu na mosala ya kosakola ezali lolenge ya komibanzabanza oyo eleki malamu mpo na makambo ya bato mosusu na esika ya komibanzabanza kaka na makambo na yo moko.
• Kotika te komemya baboti na yo. Kotika te kolanda ntango nyonso mitinda mpe mibeko ya Biblia. Yango esɛngi kokumisa baboti na yo. (Baefese 6:1, 2) Soki okopesa bango lokumu, yango ekosala ete ozongisa mabe na mabe te mpe obomba nkanda te. Kobosana te ete, ata soki tata na yo to mama na yo azali kosala makambo mabe, yango epesi yo nzela te ete osala mabe. Yango wana, tiká nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. (Baloma 12:17-21) Ye “alingi bosembo” mpe abatelaka mpenza bana. (Nzembo 37:28; Exode 22:22-24) Wana ozali ntango nyonso komemya baboti na yo, salá makasi mpo na kolona mbuma ya elimo ya Nzambe—mingimingi bolingo.—Bagalatia 5:22, 23.
Okoki kolonga
Ntembe ezali te ete esalaka mpasi makasi soki tata na yo to mama na yo alingi yo te. Kasi, soki baboti bazangi bolingo, yango te nde esengeli komonisa lolenge ya moto oyo yo okozala. Yo moko okoki kopona nzela oyo ekomema yo na esengo mpe na bolamu soki ozali kosalela mitinda ya Biblia oyo touti kolobela na bomoi na yo.
William, oyo tolobelaki na ebandeli, azali kosala na filiale moko ya Batatoli ya Yehova. Alobi boye: “Yehova asili kopesa biso bisaleli mingi oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na makambo wana ya mpasi. Oyo nde libaku malamu tozali na yango, ya kozala na Tata ya bolingo mpe oyo azali komibanzabanza mpo na biso!” Joan, leki na ye ya mwasi azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, asakolaka epai oyo bazali na mposa ya basakoli mingi. Alobi boye: “Ntango tozalaki kokola, tomonaki bokeseni mpenza ‘kati na ye oyo akosalelaka Nzambe mpe ye oyo akosalelaka Nzambe te.’ (Malaki 3:18) Makambo oyo tokutaná na yango na bomoi etindi biso tózwa ekateli makasi ya kobunda mpo na solo mpe tófandisa yango mpenza na mitema na biso.”
Yo mpe okoki kosala bongo. Biblia elobi ete: “Baoyo bazali kolona na mpisoli bakobuka na koganga na esengo.” (Nzembo 126:5, NW) Ndenge nini vɛrsɛ oyo etaleli yo? Soki osali makasi mpo na kotosa mitinda ya solo na ntango ya mpasi, mpisoli na yo ekobongwana esengo ntango okozwa mapamboli ya Nzambe.
Yango wana, salá makasi ete opusana penepene na Yehova Nzambe. (Baebele 6:10; 11:6) Ata soki ekokisi sikoyo bambula mingi banda ozali kotungisama, ozali na esengo te, mpe ozali komiyoka ete omemi ngambo, mayoki ya motindo wana ekoki kosila mokemoke mpe kotika esika na “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”—Bafilipi 4:6, 7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Etanda na lokasa 19]
Ozali komona . . .
• Ete ozali na valɛrɛ mingi te to ozali na ntina te?
• Ete kotyela bato mosusu motema ezali likama to ezali kozanga bwanya?
• Ete ozali na mposa moto ayebisaka yo ntango nyonso ete ozali na ntina?
• Ete nkanda na yo to zuwa na yo eleki ndelo?
Soki eyano na yo ezali ɛɛ na mituna nyonso oyo, sololá soki ekoki na moto moko oyo otyelaka ye motema: tata na yo to mama na yo, nkulutu moko, to mpe moninga moko oyo akɔmeli na elimo.
[Bililingi na lokasa 20]
Zalá na makanisi malamu mpo na komitika te na makanisi mabe