Etikali moke, likambo ya kosalela bana mpo na kosangisa nzoto esila!
MALOBA ya ebandeli ya boyokani oyo mikili mingi esalaki mpo na ntomo ya bana mike (le préambule de la Convention internationale des droits de l’enfant) elobi ete: “Na Mibeko na yango mpo na kobatela ntomo ya bato (Déclaration universelle des droits de l’homme) ONU elobi ete bana mike bazali na lotomo ya kozwa libateli mpe lisalisi oyo basengeli na yango.” Mpo na komonisa ete libota ezali na ntina mingi, ebakisi boye: “Mwana, mpo akola malamu mpe akóma mpenza na bomoto oyo ebongi, asengeli kozala kati na libota, esika bazali komonisela ye esengo, bolingo, mpe boboto.” Nzokande, mokano wana ya malamu ekokisamaka mpenza te.
Kosuka kaka na koloba ete tozali na mposa ya mokili moko ya malamu mpenza mpo na bana ekoki te. Bato bazali lisusu te kotosa mibeko ya bizaleli malamu, mpe mingi bazali komona likambo yango mabe te. Kotinda bato bátosa mibeko ekopekisa te misala ya mbindo mpe lokoso, oyo ezali bipai nyonso. Mbala mingi, ata baboti bango moko, na esika bámonisela bana na bango bolingo mpe bábatela bango, batikelaka makambo mabe nzela. Na yango, elikya nini ezali mpo na kosilisa kindumba ya bana mike?
Atako ebongiseli mabe oyo elongi te kopesa bana nyonso ndako mpe avenire ya malamu, etikali moke, Mozalisi na biso alongola lolenge nyonso ya misala ya mbindo mpe ya pite, ata mpe kindumba ya bana. Etikali moke, mokili mobimba ekosutuka ntango Yehova Nzambe, na nzela ya Bokonzi na ye, akosukisa makambo mabe oyo bato bazali kosala. Bato oyo bazali kobebisa mokili mpe baoyo, mpo na matomba na bango moko, bazali kotinda basusu na kosala mabe bakozanga te kozwa etumbu ya Nzambe. Kaka bato oyo balingaka bazalani na bango nde bakofanda na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakobikolama wana.”—Masese 2:21, 22.
Kanisá ndenge mitema ya bato ekokita ntango bana mike mpe mikóló bakozala na bomoi oyo ebebisami te na makambo ya nsɔni mpe ya kosangisa na bato nzoto na makasi! Mpasi ya nzoto mpe ya motema oyo moto ayokaka ntango banyokoli ye mpe basaleli ye makambo mabe ekozala lisusu te. Bato oyo bazalaki kosalela bango mpo na kosangisa nzoto bakotungisama lisusu te na kokanisa makambo oyo ekómelaki bango. “Makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.”—Yisaya 65:17.
Na bongo, mwana moko te oyo akobotama, bakonyokola ye to bakosangisa na ye nzoto na makasi. Esengo, bolingo, mpe boboto ekozala ndɔtɔ mpamba te. Mpo na bato oyo bakofanda na mokili ya sika ya Nzambe, Yisaya 11:9 elobi ete: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisama mpe te.”
Ya solo, ekozala mpenza esengo ntango makambo lokola bobola, kolangwa bangi, mabota ya mindɔndɔ, mpe kobeba ya bizaleli ekozala lisusu te! Kimya, boyengebene, mpe kobatelama ekozala bisika nyonso. “Bato na ngai bakofanda na efandelo na kimia na bifandelo na solo mpe na ndako na bolɔzi te.”—Yisaya 32:18.
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
Bana bakobeba te soki baboti bazali kobatela bango
● “Baboti na ngai balendisaki ngai natánga kelasi malamu mpo nayekola mosala. Bazalaki kotinda ngai na makasi te na kosala oyo bango bazalaki kolinga, kasi basalisaki ngai na kopɔna biteyelo oyo ezalaki kotángisa mateya oyo nasengelaki na yango.”—Tais.
● “Ntango ngai ná lɛki na ngai tozalaki kokende kosomba biloko, mama azalaki kokende elongo na biso. Asalisaki biso tóbebisaka mbongo mpambampamba te mpe tósombaka te bilamba oyo ebendaka likebi ya bato to oyo etikaka biteni mosusu ya nzoto polele.”—Bianca.
● “Ntango bazalaki kobenga biso na bafɛti, baboti na ngai bazalaki ntango nyonso kotuna banani bakozala na fɛti yango, miziki ya lolenge nini ekozala kuna, ntango nini fɛti yango ekobanda mpe ntango nini ekosila. Na bafɛti mingi tozalaki kokende biso nyonso libota mobimba elongo.”—Priscila.
● “Kobanda nazalaki mwana moke tii ntango nakómaki elenge, ngai ná baboti na ngai tozalaki ntango nyonso kosolola malamu mpenza. Moninga moko ya kelasi amonaki yango mpe alobaki boye: ‘Nasepelaka ndenge namonaka yo ozali kosolola na baboti na yo na makambo nyonso, kozanga kobanga. Ngai nakokaka kosolola ata na mama na biso ndenge wana te, mpe mbala mingi makambo oyo nalingaka koyeba, nakendaka kotuna yango nde epai ya bato mosusu.’ ”—Samara.
● “Ntango nazalaki kokola, nazalaki ntango nyonso na esengo. Nazalaki komona ata likambo moko te ya mabe epai ya bato mpe nazalaki ntango nyonso kosɛka. Nazalaki komiyoka malamu soki nafandi na baninga mpe nazalaki kosepela kosolola na bango masolo ya kosɛkisa. Baboti na ngai bayebaki ete wana ezalaki bomoto na ngai mpe balukaki te kobongola yango. Kasi, na boboto mpenza, basalisaki ngai náyeba ete nasengeli kokeba mpe kolekisa ndelo te ntango nazali elongo na bana mibali.”—Tais.
● “Ndenge kaka ezalaka mposa ya bilenge mingi, nabandaki koyoka mposa ya kozala esika moko na bana mibali. Tata na ngai alobaki ete nakoki kobanda koluka mwasi ya kobala kaka soki nakokisi bambula oyo ye moko atyelaki ngai. Naboyaki likanisi na ye te. Kutu, namonaki ete baboti na ngai bazalaki komitungisa mpo na ngai mpe balingaki kobatela ngai mpo námona mpasi te na nsima.”—Bianca.
● “Nazalaki komona libala lokola eloko moko ya kitoko, mingi mpenza mpo na ndakisa malamu ya baboti na ngai. Bazalaki ntango nyonso na boyokani malamu mpe bazalaki kosolola malamu. Nazali koyeba lisusu, ntango nazwaki fianse, mama apesaki ngai toli ndenge nini nasengeli kosala na makambo mosusu mpe alimbolelaki ngai ndenge toli yango ekoki kosalisa ngai na libala na ngai.”—Priscila.
[Elilingi na lokasa 10]
Na mokili ya sika ya Nzambe, bakonyokola mwana moko te