Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Octobre lok. 32
  • ‘Esimbaki motema na ngai’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Esimbaki motema na ngai’
  • Lamuká!—2003
Lamuká!—2003
g03 Octobre lok. 32

‘Esimbaki motema na ngai’

Ndenge nini okoki kozala na boyokani ya malamu mpenza elongo na Nzambe? Buku Tópusana penepene na Yehova (na Lifalanse) ezali kosalisa bato mingi na likambo yango. Na ndakisa, mwasi moko oyo azali Motatoli ya Yehova banda mbula 25 alobi boye: “Buku oyo ezali malamu mpenza.” Abakisi lisusu boye: “Esimbaki mpenza motema na ngai mpe epusaki ngai nakóma na molende mpo na Yehova koleka ndenge nazalaki na yango liboso. Yango esali ete nazala na boyokani ya malamu mpenza elongo na Yehova, na mobali na ngai, mpe na lisangá.”

Buku Tópusana penepene na Yehova ekoki mpe kosalisa yo. Maloba na yango ya ebandeli elobi boye: “Bizaleli ya Nzambe mpe banzela na ye, ndenge Biblia emonisi yango, ezali mpenza makambo ya ntina oyo bato basengeli koyekola. Soki tokanisi malamumalamu ndenge Yehova azali komonisa ezaleli na ye mokomoko; soki totaleli ndenge Yesu Klisto amonisaki bizaleli yango na ndenge ya kokoka mpenza; soki toyebi ndenge oyo biso mpe tokoki kolona bizaleli wana, yango ekopusa biso penepene na Nzambe.”

Soki olingi kozwa buku Tópusana penepene na Yehova, tondisá eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse, mpe tindá yango na adresi oyo etyami awa to na oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku Tópusana penepene na Yehova.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto