Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Octobre nk. 13-14
  • Bamonisaki bolingo na ntango ya mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bamonisaki bolingo na ntango ya mpasi
  • Lamuká!—2003
  • Masolo mosusu
  • Nazalaki mwana ya kilikili
    Lamuká!—2007
  • Bolingo ya boklisto emonisami kati na makámá makwelaki mokili ya Mexique
    Lamuká!—1996
  • Mosala ya kopesa lisungi na 2023​—“Tomoni mpenza bolingo ya Yehova”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Mosala ya kosunga bandeko
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Lamuká!—2003
g03 Octobre nk. 13-14

Bamonisaki bolingo na ntango ya mpasi

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA NIGERIA

MOKOLO ya lomingo, mwa 27 Yanuali 2002, babengaki yango lomingo ya mawa, na engumba Lagos, na Nigeria. Ndako moko ya nse ya mabelé oyo babombaka mindoki ezikaki. Na mpokwa wana, engumba mobimba eninganaki mpe mɔtɔ ezalaki komonana na likoló. Na boumeli ya bangonga mingi, lokito ya mindoki oyo ezalaki kozika ezalaki kaka koyokana, masasi ezalaki kokende kokwea tii na kilomɛtrɛ misato mpe bato ebele bakómaki kobanga.

Bilobaloba ya bato mosusu esalaki ete bato bábanga lisusu koleka. Ebele ya bato oyo bazalaki kolɛnga na kobanga batondanaki na babalabala, mpe bazalaki koyeba te soki bazali kokima nini to bazali kokende wapi. Lokola ezalaki butu, ebele ya bato, ezala mpe bana mike oyo bazalaki kolɛnga na kobanga, bakendaki kokwea na mai moko ya salite mpe bakufaki. Bandako, biteyelo mpe bamagazini ebukanaki to epanzanaki nyonso; bato mingi batikalaki lisusu na ndako te, na mosala mpe te. Balobaki ete bato nyonso oyo babungisaki bomoi na bango na likama wana bazalaki soki 1000. Na nsima, balobaki ete bato oyo bakufaki bazalaki ebele koleka motángo wana.

Na nsima bakutaki babɔmbi, ba roquettes mpe ba grenades soki 1 350 oyo epanzanaki te na bisika mosusu ya engumba, pene na kaa ya basoda, esika mindoki ezikaki. Mobali moko amonaki ebende moko na kati ya ndako na ye. Ayebaki te ete ezalaki nde bɔmbi; alɔkɔtaki yango, atyaki yango na nsima ya vuatire na ye mpe amemaki yango epai ya bakonzi ya mboka.

Ntango biro ya Batatoli ya Yehova na Nigéria eyokaki nsango ya likama yango, mbala moko ebengaki nkulutu moko ya Lagos mpe etindaki bakɛngɛli-batamboli 16 báluka koyeba soki Batatoli nyonso 36 000 ya engumba yango bazwi makama to te. Biro yango etindaki mbongo naira milio moko (soki dolare 10 000), elakisaki mpe bankulutu ndenge ya kosala komite moko mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi makama.

Motatoli moko ya Yehova azokaki makasi na obus moko oyo epanzanaki, Batatoli mibale ya basi babungisaki bomoi na bango; Bandako ya Bokonzi mibale mpe bandako 45 ya bandeko ebebaki makasi.

Mikolo motoba nsima ya likama yango, na mwa 2 Febwali 2002, bitumba ebimaki na kartye mosusu ya Lagos kati na bato ya bituluka mibale. Croix Rouge elobaki ete bitumba yango ebomaki bato 100, bato 430 bazokaki makasi, bato 3000 bakimaki, mpe bandako 50 etumbamaki. Bandeko ya komite oyo esalisaki Batatoli oyo bazwaki likama na “lomingo ya mawa” babandaki mbala moko koluka bandeko na bango baklisto oyo bazalaki na esika wana ya engumba.

Na mbala oyo, Motatoli ata moko te abungisaki bomoi na ye mpamba te mingi na bango bazalaki na liyangani ya zongazonga na ntango bitumba ebandaki. Nzokande, bandeko mingi ya masangá mitano oyo ezalaka na kartye yango bazalaki lisusu na ndako te ntango bautaki liyangani. Bandeko na bango baklisto bayambaki bango mbala moko na bandako na bango. Ndeko moko, oyo azali monganga, ná mwasi na ye bayambaki bandeko 27 na ndako na bango.

Batatoli ya Lagos oyo makama wana mibale ezwaki bango te bamonisaki elimo ya kokaba mpe bapesaki biloko ya kolya, bilamba, mpe biloko mosusu ya ndako. Mokɛngɛli ya engumba alobaki boye: “Biloko oyo bandeko ya Lagos bazali kopesa ezali mpenza ebele, eleki kutu oyo bandeko oyo bazwi likama basengeli na yango mpenza.” Esɛngaki kutu biro ya filiale ekomela masangá mpo bátika kotinda makabo mpo na likambo yango. Batyaki biloko oyo etikalaki na mituka misato mpe batindaki yango na biro ya filiale mpo bábomba yango kuna.

Bankulutu ya masangá bakendaki kotala bandeko mingi oyo bazwaki likama mpe mabota ya baoyo bakufaki. Basalaki makasi mpo na kobɔndisa bango na lisalisi ya Makomami. Komite mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi likama ezwaki bibongiseli mpo na kobongisa bandako oyo ebebaki. Komite yango epesaki bandeko yango biloko ya ndako, bilamba, biloko ya kolya mpe esalaki nyonso mpo bandeko yango bázwa bisika ya kofanda ya malamu. Baoyo bazwaki lisalisi ya komite yango bazalaki mabota 90, ná bandeko mosusu mokomoko.

Bandeko mingi bazangaki kutu maloba ya kozongisa botɔndi mpo na lisalisi oyo bazwaki. Motatoli moko ayebisaki komite boye: “Na bomoi na ngai mobimba, nakosala ete Yehova azala ‘esika na ngai ya komibomba mpe nguya na ngai!’ ”​—⁠Nzembo 46:​1, 2.

Bato oyo bazali Batatoli te bamonaki ndenge Batatoli basalisanaki na ntango wana ya mpasi. Nɔkɔ ya ndeko mwasi moko oyo akufaki ayebisaki bankulutu ya lisangá oyo ndeko mwasi yango azalaki ete: “Nakoya lisusu mpo na kopesa bino mpenza matɔndi mpe koluka koyeba makambo mosusu.” Alobaki na bandeko na ye boye: “Oyo namoni na Lagos ezalaki likambo ya kokamwa. Oyo bato wana basali, ata bandeko ya libota basalaki yango te.”

[Elilingi na lokasa 13]

Motuka etondi na biloko mpo na kosalisa bandeko

[Elilingi na lokasa 13]

Bandeko mosusu oyo bazwaki lisalisi yango

[Elilingi na lokasa 14]

Ndeko oyo ná mwasi na ye bayambaki bato 27 na ndako na bango

[Elilingi na lokasa 14]

Batatoli bazali kobongisa ndako moko oyo ebebaki

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]

Na likoló: Sam Olusegun-The Guardian

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto