Bato balingaka matungulu mingi
Euti na mokomi na biso na Mexique
Tokoki koloba ete biloko elambami malamu soki batye yango matungulu te? Basalelaka matungulu na makambo mingi: batyaka yango na supu, balyaka yango mobesu, balambelaka yango, mpe basalaka na yango nkisi ya bonkɔkɔ. Ekoki ata kobimisa biso mai ya miso.
Ndenge moko na milona mosusu oyo ebimisaka fololo-lokola ai ya motane, ai ya mpɛmbɛ, ai oyo balonaka lokola fololo— matungulu ya mbuma mpe ebimisaka fololo ya kitoko. Kasi, eloko bato mingi balambelaka ezali nde mbuma na yango, oyo ezali nkasa ya mwa maimai oyo ekangani esika moko, oyo ezalaka na nse ya mabelé.
Bato babanda kolona matungulu banda kala. Tokoki koyeba ndenge bato bazalaki kosalela matungulu bisika nyonso, soki totaleli lisolo ya Biblia oyo emonisi ete na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Bayisalaele bakanisaki ndenge bazalaki kolya matungulu ntango bazalaki na boombo na Ezipito—Mituya. 11:5.
Kasi, nini mpenza esalaka ete bato ya bipai nyonso básepela mingi kolya matungulu ya mbuma? Na ntembe te, mpo ezalaka na biloko babengi soufres oyo epesaka yango solo kitoko mpe eswaka lokola pilipili. Ezalaka mpe na biloko babengi acide sulfonique oyo ebimisaka moto mai ya miso.
Makambo na yango mosusu ya malamu
Matungulu ezalaka malamu mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto. Ezalaka na biloko oyo eleisaka nzoto, lokola calcium, acide phosphoreux, mpe acide ascorbique to vitamine C. Kasi, banda kala bato basalelaka matungulu ya mbuma lokola nkisi. Ata na moi ya lelo, matungulu ya mbuma esalisaka maladi mingi lokola: fiɛvrɛ, maladi ya mongongo (angine), athérosclérose, maladi ya motema, diabɛti, mpe maladi ya mpema. Balobaka ete ebomaka mpe mikrobɛ, esilisaka cholestérol na nzoto, esilisaka mpasi, esalisaka makila etambola malamu na nzoto, mpe esalisaka kanser.
Matungulu ya mbuma ezalaka na balangi mingi mpɛmbɛ, langi ya mosaka, shokola, mai ya mpondu, motane, mpe motane-moindo. Balyaka yango mobesu, balambaka yango, batutaka yango mpo na kotya na biloko ya kotumba to ya kolamba, batyaka yango na manzanza, bakaukisaka yango; bakómisaka yango putulu, to bapasolaka yango minene to bakataka yango mikemike. Matungulu ya mbuma ezali mpenza molona moko ya kitoko—atako ekoki kobimisa moto mai ya miso!