Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/4 lok. 32
  • Lisalisi mpo na mikakatano ya libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisalisi mpo na mikakatano ya libota
  • Lamuká!—2005
Lamuká!—2005
g05 8/4 lok. 32

Lisalisi mpo na mikakatano ya libota

Mwasi moko ya engumba Veracruz, na Mexique, azwaki Lamuká! oyo elobelaki likambo moko oyo ezali mpe na libota na ye. Akomaki ete: “Lisolo yango esepelisaki ngai mingi mpamba te ezalaki mpenza kolobela likambo oyo nazali na yango.” Na mokanda oyo atindaki na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova, abakisaki boye: “Makambo oyo ezali na Lamuká! oyo ekosalisa ngai mpe mobali na ngai ná bana na biso.”

Mwasi yango asɛngaki boye: “Nalingi koyeba makambo mingi etali Batatoli ya Yehova, nalingi mpe koyeba esika lisangá oyo ezali pene na ngai ezwami. Nalingi koyangana elongo na libota na ngai mpo nandimi ete tozali na mposa ya kopusana penepene na Nzambe.” Eloko oyo ebendaki likebi na ye ezali foto ya buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota oyo ezali na lokasa ya nsuka ya Lamuká! yango. Yango wana asɛngaki buku yango.

Buku yango ezali na batoli oyo etali bato nyonso ya libota​—⁠mibali, basi, baboti, bana, bankɔkɔ​—⁠ɛɛ, moto nyonso kati na libota. Buku yango ezali na masolo ya kitoko mpenza lokola “Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza,” “Salisá bana na yo ete bálónga bolenge na bango,” “Batelá libota na yo na bopusi mabe,” mpe “Batelá kimya kati na ndako na yo.”

Okoki kosɛnga buku yango soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adresi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto