Azali nani? Yesu Klisto
MASOLO ya kala oyo tokoki kotyela motema emonisi ete moto moko na nkombo Yesu abotamaki ekómi sikoyo mbula koleka 2 000 na Beteleme, mwa engumba moko na mboka Yudea. Elode Monene azalaki mokonzi na Yelusaleme na ntango wana, mpe Kaisala Augusto azalaki amperɛrɛ na Loma. (Matai 2:1; Luka 2:1-7) Bakomi ya makambo ya kala na Loma na bikeke mibale ya liboso, babangaki kolobela Yesu na mikanda na bango, mpo bakonzi ya Loma na ntango wana bazalaki koluka kolimwisa Lingomba ya boklisto.
Nzokande, buku moko (The Historians’ History of the World) elobi boye: “Makambo oyo [Yesu] asalaki, ata soki totaleli yango na ndenge ya makambo ya losambo te, ezalaki na bopusi epai ya bato ya ntango ya kala koleka makambo mosusu nyonso ya minene ata ya moto nani na ntango wana. Bamboka nyonso oyo eyebaná banda kala endimi ete kobotama na ye ebandisaki eleko ya sika.”
Zulunalo moko (Time) elobaki ete bakomá babuku ebele mpo na Yesu koleka bato nyonso mosusu ya ntango ya kala. Babuku yango mingi elobelaka mingi motuna oyo: Yesu azali mpenza nani? Ntango mosusu, likambo yango ebimisá ntembe mingi koleka makambo mosusu nyonso na masolo ya kala.
Babandi komituna soki Yesu azali nani
Ntango bayebisaki Malia ete akobota mwana mpe asengeli kopesa ye nkombo Yesu, Malia atunaki boye: “Ndenge nini yango ekosalema, lokola nasangisi nzoto ná mobali te?” Gabiliele, anzelu ya Nzambe, azongisaki boye: “Nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.”—Luka 1:30-35.
Na nsima, Yesu asalaki makambo oyo ekamwisaki mpenza bantoma. Ntango mopɛpɛ makasi elingaki kozindisa masuwa na bango na mbu ya Galilai, Yesu akitisaki mbonge ntango kaka apamelaki yango: “Fandá nyɛɛ! Tiká makɛlɛlɛ!” Bantoma na ye bakamwaki mpenza mpe bamitunaki: “Ye azali mpenza nani?”—Malako 4:35-41; Matai 8:23-27.
Na ntango ya Yesu, bato mingi bakómaki komituna soki Yesu azali mpenza nani, yango wana Yesu atunaki bantoma na ye soki bato balobaka ete ye azali nani. Bantoma bazongisaki boye: “Bamosusu balobaka Yoane Mobatisi, bamosusu Eliya, bamosusu mpe Yilimia to moko ya basakoli”—na ntango wana basakoli wana nyonso basilaki kokufa. Na nsima, Yesu atunaki boye: “ ‘Kasi, bino bozali koloba ete ngai nazali nani?’ Simona Petelo azongisaki ete: ‘Ozali Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi.’ ” Ata bademo—baanzelu mabe—balobaki na Yesu ete: “Ozali Mwana ya Nzambe.”—Matai 16:13-16; Luka 4:41.
Yesu alobaki ete azali nani?
Atako Yesu azalaki koloba mpenza mingi te ete azali Mwana ya Nzambe, andimaki ete azali Mwana ya Nzambe. (Malako 14:61, 62, Yoane 3:18; 5:25, 26; 11:4) Kasi, mbala mingi azalaki nde koloba ete azali “Mwana ya moto.” Azalaki komibenga bongo mpo na komonisa ete abotamaki moto—elembeteli oyo emonisi ete azali mpenza moto. Na ndenge yango, amonisaki mpe ete azali “mwana ya moto” oyo Danyele amonaki na emonaneli azali koya liboso ya “Mokóló ya Mikolo”—Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.—Matai 20:28; Danyele 7:13, NW.
Na esika ya komikumisa ete azali Mwana ya Nzambe, Yesu atikaki bato mosusu bámona bango moko ete azali Mwana ya Nzambe. Longola bantoma na ye, bato mosusu mpe bamonaki yango, na ndakisa Yoane Mobatisi mpe Malata, moninga ya Yesu. (Yoane 1:29-34; 11:27) Bato yango bandimaki ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki. Bakangaki ntina ete azalaki na bomoi na likoló, kuna azalaki elimo ya nguya mpe Nzambe atyaki bomoi na ye na libumu ya ngɔndɔ Malia na ndenge ya likamwisi.—Yisaya 7:14; Matai 1:20-23.
Akokanaki na moto ya liboso, Adama
Na makambo mingi, Yesu akokanaki na moto ya liboso, Adama. Na ndakisa, bango nyonso mibale bazalaki bato ya kokoka oyo bazalaki na tata awa na mabelé te. (Genese 2:7, 15) Yango wana, Biblia ebengi Yesu “Adama ya nsuka”—moto ya kokoka oyo akokaki kozala “lisiko oyo ekokani.” Bomoi ya Yesu ekokanaki na oyo ya “moto ya liboso Adama,” oyo Nzambe akelaki moto ya kokoka.—1 Bakolinti 15:45; 1 Timote 2:5, 6.
Biblia ebengi Adama ya liboso “mwana ya Nzambe.” (Luka 3:38) Kasi, Adama yango abungisaki lokumu monene oyo azalaki na yango ya kozala mwana ya Nzambe, ntango aboyaki na nko kotosa Nzambe. Nzokande Yesu ye azalaki ntango nyonso sembo epai ya Tata na ye ya likoló, mpe atikalaki Mwana oyo Nzambe andimi. (Matai 3:17; 17:5) Biblia elobi ete bato nyonso oyo bazali komonisa kondima epai na Yesu mpe bandimi ete azali Mobikisi na bango, bakoki kozwa bomoi ya seko.—Yoane 3:16, 36; Misala 5:31; Baloma 5:12, 17-19.
Nzokande, bato mosusu balobaka ete Yesu azali kaka Mwana ya Nzambe te, kasi azali nde Nzambe. Balobaka ete Yesu mpe Tata na ye bazali bango mibale Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Ezali solo bongo? Yesu azali mpe ndambo ya Nzambe? Yesu ye moko, to mpe bato oyo bakomaki Biblia, balobaki bongo? Nani azali mpenza Nzambe kaka moko ya solosolo? Yesu ye moko alobaki ete Nzambe yango nani? Tiká tótalela likambo yango.
[Etanda/Elilingi na lokasa 4]
Moto mosusu te ayebani mingi lokola ye
Lisolo ya bomoi ya Yesu ekomamaki na bato minei ya ntango na ye—Matai, Malako, Luka mpe Yoane—mibale kati na bango bazalaki baninga na ye ya motema. Babuku na bango, oyo ezali na bankombo na bango, babengaka yango Baevanzile, mpe bato bakoki kotánga Baevanzile yango mosusu lelo na minɔkɔ koleka nkóto mibale. Mbala mingi, mwa babuku yango basangisaka yango na babuku mosusu mpe nyonso esali Biblia. Ezala babimisá Baevanzile yango moko to na kati ya Biblia—motángo na yango eleki mosika babuku nyonso mosusu oyo bato bakomá banda mokili ebandá. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki Yesu ayebani mingi koleka bato nyonso oyo bafandá awa na mokili!
[Elilingi na lokasa 3]
Bantoma bamitunaki: “Ye azali mpenza nani?”