Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/10 nk. 5-7
  • Nani azali “Nzambe kaka moko ya solosolo”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani azali “Nzambe kaka moko ya solosolo”?
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esika ya Yesu na likoló
  • Nkombo ya Mwana-Mpate mpe Nkombo ya Tata
  • Liteya ya Bosato eutá wapi?
  • Tata aleki Mwana
  • Liteya ya Bosato mpe lingomba
  • Epai liteya ya Bosato ebandá mpenza
  • Yesu Klisto: Mwana-molingami na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Eklezia ya ebandeli eteyaki ete Nzambe azali bosato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Liteya ya Trinité ekólaki ndenge nini?
    Osengeli kondima Trinité?
  • Biblia ezali mpenza koteya Trinité?
    Osengeli kondima Trinité?
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/10 nk. 5-7

Nani azali “Nzambe kaka moko ya solosolo”?

MBALA na mbala, Yesu azalaki kobondela Nzambe, oyo ye azalaki kobenga Tata, mpe ateyaki basusu básalaka bongo. (Matai 6:​9-​11; Luka 11:​1, 2) Na libondeli oyo Yesu asalaki ntango azalaki elongo na bantoma na ye​—⁠mwa bangonga liboso ya liwa na ye​—⁠asɛngaki boye: “Tata, ngonga ekoki; pesá mwana na yo nkembo, mpo mwana na yo apesa yo nkembo. Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”​—⁠Yoane 17:⁠1, 3.

Tomoni ete Yesu abondelaki Moto oyo ye abengaki “Nzambe kaka moko ya solosolo.” Na nsima amonisaki ete Nzambe aleki ye ntango alobaki boye: “Bongo sikoyo yo, Tata, pesá ngai nkembo penepene na yo moko na nkembo oyo nazalaki na yango penepene na yo liboso ete mokili ezala.” (Yoane 17:⁠5) Lokola Yesu abondelaki Nzambe mpe asɛngaki azala penepene na Nzambe, ndenge nini Yesu akokaki mpe kozala “Nzambe kaka moko ya solosolo”? Tiká tótalela likambo yango.

Esika ya Yesu na likoló

Mwa bangonga nsima ya kosala libondeli wana, Yesu abomamaki. Kasi aumelaki na liwa te​—⁠bobele banda mokolo ya mitano nsima ya midi tii mokolo ya lomingo na ntɔngɔ. (Matai 27:⁠57-⁠28:⁠6) Ntoma Petelo alobaki boye: “Yesu yango Nzambe asekwisaki ye, likambo oyo biso nyonso tozali batatoli na yango.” (Misala 2:​31, 32) Yesu akokaki nde komisekwisa ye moko? Te, mpo Biblia elobi ete bato oyo bakufá “bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:⁠5) “Nzambe kaka moko ya solosolo,” Tata ya Yesu oyo azali na likoló, nde asekwisaki Mwana na ye.​—⁠Misala 2:⁠32; 10:⁠40.

Mwa moke na nsima, bato oyo bazalaki konyokola baklisto babomaki Setefano, moyekoli ya Yesu. Liboso ete bábamba Setefano mabanga, amonaki emonaneli moko. Alobaki boye: “Talá! Namoni likoló efungwami mpe Mwana ya moto atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.” (Misala 7:​56) Setefano amonaki bongo Yesu, “Mwana ya moto,” azali kosala elongo na Nzambe kuna na likoló​—⁠“na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe”⁠​—⁠kaka ndenge azalaki ‘penepene na Nzambe’ liboso ya koya awa na mabelé.​—⁠Yoane 17:⁠5.

Nsima ya kobomama ya Setefano, Yesu amonanaki na ndenge ya likamwisi epai ya Saulo, oyo ayebani mingi na nkombo na ye ya Moloma, Paulo. (Misala 9:​3-6) Ntango Paulo azalaki na Atene, na ekólo Grèce, alobelaki “Nzambe oyo asalá mokili ná biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.” Alobaki ete Nzambe yango, “Nzambe kaka moko ya solosolo,” ‘akosambisa na boyengebene mabelé oyo efandami na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe asili kopesa ndanga epai ya bato nyonso na ndenge asekwisi ye na bakufi.’ (Misala 17:​24, 31) Awa, ntoma Paulo abengi Yesu “moto”​—⁠elingi koloba azali na nse ya Nzambe​—⁠oyo Nzambe azongisaki na bomoi na likoló.

Ntoma Yoane mpe amonisaki ete Yesu azali na nse ya Nzambe. Yoane alobi ete akomaki Evanzile na ye mpo ete bato oyo bakotánga yango bándima ete “Yesu azali Klisto Mwana ya Nzambe”​—⁠kasi Nzambe te. (Yoane 20:​31) Yoane azwaki mpe emonaneli moko ya likoló, amonaki “Mwana-Mpate,” oyo amonisi ye na Evanzile na ye ete ezali Yesu. (Yoane 1:​29) Mwana-Mpate yango atɛlɛmi na bato mosusu 144 000, oyo Yoane alobi ete “basombamaki [to basekwisamaki] na mabelé.” Yoane alimboli ete bato yango 144 000 bazali na ‘nkombo ya Mwana-Mpate mpe nkombo ya Tata na ye ekomamá na bilongi na bango.’​—⁠Emoniseli 14:​1, 3.

“Mwana-Mpate” ná “Tata na ye” bakoki nde kozala moto moko? Eyano ezali polele: te. Na Biblia, bazali bato mibale bakeseni. Moto na moto azali kutu na nkombo na ye.

Nkombo ya Mwana-Mpate mpe Nkombo ya Tata

Ndenge tomoni yango, nkombo oyo bapesaki Mwana ya Nzambe, Mwana-Mpate, ezali Yesu. (Luka 1:​30-​32) Kasi, nkombo ya Tata na ye nani? Na Biblia, nkombo yango ezali mbala nkóto na nkóto. Na ndakisa, Nzembo 83:18 elobi: “Ɛɛ báyeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo Yawe [Yehova, NW ] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” Likambo ya mawa, nkombo ya Nzambe, Yehova, balongolá yango na mabongoli mingi ya Biblia mpe na esika na yango batyá maloba “Nkolo,” “Nzambe” mpe “Mokonzi.” Atako bongo, na mabongoli mingi ya Biblia, bazongisi Nkombo ya Nzambe na bisika oyo yango esengeli kozala.

Biblia moko ya Lingelesi (American Standard Version, 1901) ezali ndakisa moko ya monene ya mabongoli ya Biblia oyo ezongisi nkombo ya Nzambe, Yehova, na bisika oyo yango esengeli kozala. Na maloba ya ebandeli balobi boye: “Bato oyo bazongeli kobongola Biblia oyo, nsima ya kotalela likambo yango malamumalamu, bandimi bango nyonso ete biyambayamba ya Bayuda, oyo elobaki ete esengeli kotánga Nkombo ya Nzambe te mpo eleki bosantu, esengeli lisusu te kokɔta na mabongoli ya Lingelesi to na mabongoli mosusu nyonso ya Kondimana ya Kala; tozali kosepela na komona ete bamisionɛrɛ oyo babimisi mabongoli mingi ya ntango na biso balandi likanisi yango.”a

Liteya ya Bosato eutá wapi?

Kasi, ezali boni mpo na liteya oyo elobaka ete Yehova ná Yesu bazali Nzambe moko, ndenge liteya ya Bosato elobaka? Zulunalo moko (The Living Pulpit) na nimero na yango ya Aprili-Yuni 1999, elimbolaki liteya ya Bosato boye: “Ezali na Nzambe moko, Tata, Nkolo moko Yesu Klisto, mpe Elimo Santu moko, ‘bapersona’ misato . . . oyo bazali moto moko to ndenge moko . . . ; bapersona misato oyo bazali Nzambe bango nyonso, bazali bango nyonso na bizaleli ndenge moko, nzokande bakeseni mpenza, moto na moto azali na ndenge na ye.”b

Liteya oyo ya mindɔndɔmindɔndɔ ya Bosato eutá wapi? Zulunalo moko (Christian Century), na nimero na yango ya mwa 20-27 Mai 1998, ezongelaki maloba ya pastɛrɛ moko oyo andimi ete Bosato ezali “liteya ya lingomba, kasi Yesu ateyaki yango te.” Ata soki Yesu ateyaki liteya ya Bosato te, liteya yango eyokani nde na makambo oyo ateyaki?

Tata aleki Mwana

Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.” Biblia emonisi ete Tata na biso ya likoló, oyo nkombo na ye ezali Yehova, aleki Mwana na ye. Na ndakisa, Yehova azali “longwa na ntango nyonso.” Kasi, Biblia elobi ete Yesu azali “mobotami ya liboso ya biloko nyonso bizalisami.” Yesu ye moko ateyaki ete Yehova aleki ye, ntango alobaki: “Tata aleki ngai.” (Matai 6:⁠9; Nzembo 90:​1, 2; Bakolose 1:​15; Yoane 14:​28) Nzokande, liteya ya Bosato elobaka ete Tata mpe Mwana bazali “Nzambe bango nyonso.”

Mabondeli oyo Yesu azalaki kosala emonisi mpe polele ete Tata aleki Mwana mpe Tata ná Mwana bazali moto moko te. Na ndakisa, na libondeli oyo asalaki liboso báboma ye, alobaki boye: “Tata, soki olingi, longolá kɔpɔ [elingi koloba, liwa ya nsɔni] oyo epai na ngai. Nzokande, ezala, mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.” (Luka 22:​42) Soki Nzambe mpe Yesu bazali “ndenge moko,” lokola liteya ya Bosato elobaka, ndenge nini emonani ete mokano ya Yesu, to mposa na ye, ekeseneki na oyo ya Tata na ye?​—⁠Baebele 5:​7, 8; 9:​24.

Lisusu, soki Yehova mpe Yesu bazalaki moto moko, ndenge nini moko na bango akoki koyeba te makambo oyo mosusu ayebi? Na ndakisa, Yesu alobaki boye mpo na ntango ya kosambisa mokili: “Na oyo etali mokolo yango to ngonga yango moto moko te ayebi, ezala baanzelu na likoló ezala Mwana, kaka Tata.”​—⁠Malako 13:⁠32.

Liteya ya Bosato mpe lingomba

Yesu ateyaki liteya ya Bosato te, baklisto ya liboso mpe bateyaki yango te. Ndenge tomoni yango na lisolo oyo, ezali “liteya ya lingomba.” Zulunalo moko (The Living Pulpit), na nimero na yango ya 1999 oyo elobelaki Bosato, elobaki boye: “Mbala mosusu, emonanaka lokola ete moto nyonso andimaka ete liteya ya bosato ezali liteya ya libosoliboso ya teoloji ya boklisto,” kasi ebakisaki ete liteya yango ezali “likanisi oyo euti na Biblia” te.

Buku moko (New Catholic Encyclopedia, 1967) elobeli na mozindo liteya ya Bosato mpe emonisi ete: “Soki totali malamu, liteya ya Bosato ezali liteya oyo bakɔtisaki yango na nsuka ya ekeke ya minei . . . Maloba ‘Nzambe moko na bapersona misato’ ezwaki naino misisa te, mpe ekɔtaki naino malamumalamu te na bomoi ya baklisto mpe na bindimeli na bango liboso ya nsuka ya ekeke ya minei.”

Martin Werner, profesɛrɛ na Iniversite ya Berne, na Suisse, alobaki boye: “Ezala esika nini na Kondimana ya Sika oyo balobeli Yesu ná Nzambe, Tata, ezala na ndenge abotamaki moto to na bisika oyo balobi ete azali Masiya, bamonisaka ye kaka ete azali na nse ya Nzambe.” Ezali polele ete makambo oyo Yesu mpe baklisto ya liboso bazalaki kondima ekeseni mpenza na liteya ya Bosato oyo mangomba ezali koteya lelo. Kasi, epai wapi liteya yango eutá?

Epai liteya ya Bosato ebandá mpenza

Biblia elobeli ebele ya banzambe mpe banzambe-basi oyo bato bazalaki kosambela, na ndakisa Asetaloti, Milikomo, Kemoso mpe Molɛkɛ. (1 Mikonzi 11:​1, 2, 5, 7) Kutu, na eleko moko boye, bato mingi na ekólo Yisalaele ya kala bakómaki kokanisa ete Baala azali Nzambe ya solo. Yango wana, Eliya, mosakoli ya Yehova, ayebisaki bango bázwa ekateli: “Soki [Yehova] azali Nzambe, bólanda ye; nde soki Baala, bólanda ye.”​—⁠1 Mikonzi 18:⁠21.

Losambo ya banzambe ya bapakano, oyo bazalaki misatomisato, epalanganaki mpe mingi liboso ete Yesu abotama. Will Durant, oyo ayekolaka makambo ya kala, alobi ete “likanisi ya banzambe misato eutaki na Ezipito.” Na buku na ye (Encyclopædia of Religion and Ethics), James Hastings akomaki boye: “Na ndakisa, na lingomba ya bato ya Inde, tozali kokuta banzambe misato: Brahmâ, Siva, mpe Viṣṇu; na lingomba ya Ezipito, banzambe misato: Osiris, Isis, mpe Horus.”

Na yango, banzambe bazali mingi. Baklisto ya liboso bayebaki yango? Bazalaki nde kotalela Yesu ete azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisolo “Tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe?” na zulunalo oyo, lokasa 31.

b Endimeli ya Atanaze, oyo babimisaki yango mwa bankama ya bambula nsima ya liwa ya Yesu, elimboli Bosato boye: “Tata azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, mpe Elimo Santu azali Nzambe. Nzokande, bazali Banzambe misato te, kasi moko.”

[Elilingi na lokasa 7]

ÉGYPTE

Banzambe misato: Horus, Osiris, mpe Isis, mbula ya nkóto mibale L.T.B.

[Elilingi na lokasa 7]

PALMYRE, SYRIE

Banzambe misato: nzambe-sanza, Nkolo ya likoló, mpe nzambe-moi, ekeke soki ya liboso T.B.

[Elilingi na lokasa 7]

INDE

Banzambe misato ya Bahindu, ekeke soki ya nsambo T.B.

[Elilingi na lokasa 7]

NORVÈGE

Bosato (Tata, Mwana, mpe Elimo Santu), ekeke soki ya 13 T.B.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]

Fɔtɔ mibale ya likoló: Musée du Louvre, Paris

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto