Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/10 nk. 23-25
  • Okoki kosakanisa ngando?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kosakanisa ngando?
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ngando monene ya mbu
  • Ngando ya mwasi ebatelaka mpenza bana na yango
  • Ngando ya ebale mpe ngando ya monɔkɔ molai
  • Ntina na yango na esika efandaka
  • Etumba mpo na kobatela ngando ​—⁠Mai ya miso ya kolela te
  • Kobosana te kosakanisa ngando!
  • Mbanga ya ngando
    Lamuká!—2015
Lamuká!—2005
g05 8/10 nk. 23-25

Okoki kosakanisa ngando?

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA INDE

OKOKI kokanisa kosakanisa ngando? Na nzembo ya lisapo moko ya bana mike (Peter Pan), Kapitɛni Ndɔbɔ amonisi ntina oyo akebisi ete: “Kosakanisa ngando soki moke te.” Alobi boye: “Ngando ezali kokanisa nde kolya yo”!

Atako ezali solo ete na mitindo ebele ya ngando oyo ezali na mokili mobimba, ngando mosusu ekangaka bato, “likambo yango esalemaka mingi te . . . mpe esengeli te kotalela ngando nyonso lokola nyama oyo elyaka bato.” (Encyclopædia Britannica) Bato mosusu bamonaka ete ngando ezalaka kitoko te mpe ezali nyama ya nsɔmɔ, kasi mpo na basusu, ezali nyama ya kitoko mpenza. Tótalela sikoyo mitindo misato ya ngando oyo ezalaka na Inde: ngando ya mbu, ngando ya ebale, mpe ngando ya monɔkɔ molai.

Ngando monene ya mbu

Ngando ya mbu, to ya bisika ebale ebimaka na mbu​—⁠ezali nyama oyo elandaka na libumu oyo eleki monene na mokili mobimba​—⁠ekoki kokóma na molai ya mɛtrɛ 7 to koleka mpe kokóma na kilo 1 000. Okoki kokuta ngando yango, oyo efandaka kaka na mai ya mungwamungwa, na bisika bibale ebimaka na mbu, mpe na mwa zamba ya pembenipembeni ya mbu, kobanda na Inde tii na nɔrdi ya Australie. Lokola elyaka kaka misuni, elyaka bampoko, magbɔlɔlɔ, mbisi, nyoka, mangato, nkoba, mpe mboloko​—⁠kasi elyaka mingi te, mpo ngando ya mobali ya monene ekoki kolya bobele gramɛ 500 to 700 ya biloko na mokolo. Lokola ngando yango elingaka mingi koyɔta moi to konyanya, libumu na yango esɛngaka mpenza biloko mingi te. Ngando monene ya mbu ekoki, na bantango mosusu, kokanga moto oyo azali na ekɛngɛ te. Ntango ezali konyanya, mokila na yango ekendaka nyokanyoka, nzoto mobimba ezalaka na kati ya mai, longola kaka zolo mpe miso; mpe etambolaka na makolo na yango ya mikuse. Mpo na kokanga eloko ya kolya, ekoki kopumbwa, mpe eyebani ete soki emoni eloko ya kolya, elandaka yango mbangu. Lokola ngando nyonso, eyokaka nsolo mosika, eyokaka mosika mpe emonaka mosika. Na eleko ya kobotana, ngando ya mbu ya mobali elingaka te moto to nyama apusana pembeni na esika yango ezali; ndenge moko mpe ngando ya mwasi engalaka mingi ntango ezali kobatela makei na yango.

Ngando ya mwasi ebatelaka mpenza bana na yango

Ngando ya mwasi esalaka esika na yango ya kobota pembeni ya mai, mbala mingi ezalaka libondo ya nkasa mpe ya matiti oyo ebandi kopɔla mpe pɔtɔpɔtɔ. Ebotaka makei ya mwa milai mpe ya mposo makasi ata 100, ezipaka yango mpe ebatelaka yango mpo nyama mosusu elya yango te. Na nsima, ebwakelaka esika yango mai mpo matiti mpe nkasa yango epɔla mpo ebimisa molunge oyo esengeli mpo makei ebimisa bana.

Na ntango wana nde likambo moko ya kokamwa esalemaka. Molunge oyo likei mokomoko ezwaka nde ekosala ete mwana azala mobali to mwasi. Kanisá naino! Soki makei ezwi molunge kobanda degre 28 tii 31 (28 °C tii 31 °C), ekobimisa bana ya basi nsima ya mikolo soki 100; nzokande, soki molunge oyo ezali na kati ya esika yango ezali degre 32,5 (32,5 °C), makei ekobimisa bana mibali nsima ya mikolo 64. Soki makei ezali kozwa molunge oyo ebandi na degre 32,5 tii na 33 (32,5 °C tii na 33 °C), ekobimisa bana mibali mpe bana basi. Soki ngámbo moko ya zumbu ezali pembeni ya mai mpe ngámbo mosusu ezali kozwa moi makasi, makei oyo ezali kozwa moi ekobimisa bana ya mibali, kasi oyo ezali na malili ekobimisa bana ya basi.

Soki mama ya ngando eyoki mwa kolela, ekopanza esika yango; mbala mosusu ekopasola makei yango soki bana bango moko bakoki kopasola yango te na mwa mino na bango oyo esalemá mpo na kopasola mposo ya makei. Ekotombola yango malɛmbɛ na monɔkɔ na yango ya monene, mpe ekomema bana yango na libenga moko oyo ezalaka na nse ya lolemo tii na mai. Ntango kaka bana babotami, basalaka makambo nyonso bango moko; babandaka mbala moko koluka biloko ya kolya: nyama-nkɛkɛ, magbɔlɔlɔ mpe mbisi ya mikemike. Kasi, bamama mosusu balandaka kobatela bana na bango, bazalaka pembeni na bango basanza mingi, basalelaka bango mwa ndako, esika tata akobanda kotikala na bango.

Ngando ya ebale mpe ngando ya monɔkɔ molai

Ngando ya ebale mpe ngando ya monɔkɔ molai oyo balobeli na lisolo oyo ezalaka kaka na Inde. Ngando ya ebale, oyo ekómaka molai ya mɛtrɛ minei​—⁠efandaka na bisika ya maimai, na balaki mpe na bibale na Inde mobimba​—⁠ngando ya mbu eleki ye na monene. Ekangaka banyama ya mikemike na mbanga na yango ya makasi, ezindisaka yango na mai, mpe ekoningisa yango mpe ebalukisabalukisaka yango mpo na kopanza misuni oyo akolya. Ndenge nini ngando ya ebale esalaka mpo na kobenda ngando ya mwasi? Ntango ezali koluka ngando ya mwasi, ebɛtaka monɔkɔ na ye na mai mpe engulumaka. Na nsima, ekokɛngɛla esika ya kobota esika moko na ngando ya mwasi, kosalisa bana bábima na makei, mpe akobatela bango mpo na mwa ntango.

Ngando ya monɔkɔ molai, oyo emonanaka mingi te, ezali mpenza ngando te; ekeseni na bangando mosusu na makambo mingi. Ezali mpasi te mpo na koyeba yango mpo ezalaka na monɔkɔ ya molai mpe ya moke, oyo ekangaka na yango mbisi​—⁠biloko oyo yango elyaka mingi. Atako ezali molai ndenge moko na ngando ya mbu, ngando ya monɔkɔ molai ekangaka bato te. Nzoto na yango ezalaka mosɛlu, moke mpe molai, yango nde esalisaka ngando yango etambola mbangu na bibale ya nɔrdi ya Inde. Na eleko ya kobotana, mwa mbuma moko ebimaka ngando ya monɔkɔ molai ya mobali na nsɔngɛ ya monɔkɔ. Yango nde ekómisaka kolela na yango makasi lokola konguluma oyo ebendaka ngando ya mwasi.

Ntina na yango na esika efandaka

Ngando ezali na ntina nini na esika oyo efandaka? Lokola elyaka nyama mpe mbisi oyo ekufá, elongolaka salite na bibale, na balaki, mpe pembenipembeni na yango. Na ndenge yango, ngando esalaka mosala monene ya kopɛtola mai. Lokola elyaka banyama mosusu, ekangaka mingi nyama oyo ezoki, elɛmbi to ezali na maladi. Elyaka mbisi, lokola nyumi (ngolo ya monene mpenza) oyo elyaka mwa bambótó ná mabundu, mbisi kitoko oyo bato balyaka.

Etumba mpo na kobatela ngando ​—⁠Mai ya miso ya kolela te

Osilá koyoka bazali koloba na moto ete aleli kolela ya ngando? Yango elingi koloba ete kolela yango mpe mawa yango ezalaki ya solo te. Ya solo, ngando ebimisaka mai ya miso mpo na kosilisa mungwa oyo eleki mingi na nzoto na yango. Nzokande, na ebandeli ya bambula 1970, kolela ya ngando ezalaki mpenza na ntina ya solo. Bobele mwa bankóto ya ngando etikalaki na Inde, moke mpenza (10 %) soki tokokanisi yango na ndenge ezalaki liboso. Mpo na nini? Lokola bato mingi bakómaki kobebisa bisika oyo ngando ezalaka, babomaki yango mingi, mpo bamonaki ete ezali likama mpo na bana ya nyama oyo babɔkɔlaka na mboka mpe oyo bazalaka makasi te. Bato mingi bakómaki kosepela kolya mosuni ya ngando mpe makei na yango. Bakómaki kosala malasi na biloko mosusu ya nzoto ya ngando. Longola yango, ngando ezali kosila mpo bazali kosala babaraje mpe mai ekómi salite. Kasi eloko mpenza esilisi ngando ezali mposo na yango oyo bato mingi balukaka. Sapato, sakosi ya mabɔkɔ, sakosi ya mobembo, nkamba, mpe biloko mosusu oyo basalaka na mposo ya ngando ezalaka kitoko, makasi, mpe balukaka yango mingi. Tii lelo, babomaka ngando; kasi ndenge bakómá kobatela yango, esali ete básilisa yango te.​—⁠Talá etanda oyo ezali na nse.

Kobosana te kosakanisa ngando!

Sikoyo, lokola oyebi mwa moke mitindo mosusu ya ngando, ndenge nini okómi kotalela yango? Soki liboso ozalaki kobanga yango, tokanisi ete okoluka nde koyeba yango malamu. Na mokili mobimba, bato mingi oyo balingaka banyama, bazali kozela na motema likoló ntango oyo moto moko te akobanga, ata ngando monene ya mbu. Ntango mozalisi ya nyama oyo elandaka na libumu akozongisa mabelé ndenge ezalaki na ebandeli, moto nyonso akozala na likoki ya kosakanisa ngando!​—⁠Yisaya 11:⁠8, 9.

[Etanda/Elilingi na lokasa 23]

Ferme ya bangando ya etúká Madras

Ankɛti moko emonisaki ete bitúká mosusu ya Asie ezalaki lisusu na bangando mingi te; yango wana, na 1972, parkɛ ya banyoka ya etúká Madras ekómaki mpe kobatela bangando. Ferme ya bangando ya etúká Madras ezali ferme oyo eumeli mingi mpe ezali monene koleka baferme koleka 30 oyo ebɔkɔlaka bangando ná banyoka na Inde. ­Romulus Whitaker moto ya mayele na makambo etali kobɔkɔla bangando ná banyoka nde afungolaki ferme yango na 1976. Ezali na bonene ya hectares 3,5 mpe na mitindo 150 ya banzete, ezali mpe na ebele ya bandɛkɛ mpe banyama-nkɛkɛ ya kitoko mpenza.

Babotisaka bangando ya ebale mpe bangando ya monɔkɔ molai na kati ya lopango, mpe na nsima batikaka yango na bibale mpe miluká, to batindaka yango na bisika mosusu oyo babɔkɔlaka to bayekolaka yango. Ferme yango ezali na esika moko oyo babombaka bana ya ngando oyo bakómaka ata 2 500, na maziba oyo batimolá, mpe baleisaka yango mbisi oyo balɔbi-­mbisi ya mboka wana bamemelaka bango mikolo nyonso. Batyá minyama na likoló ya maziba yango mpo bandɛkɛ bálya mbisi te to báyiba bana ya ngando te oyo ezali makasi te. Soki bana yango babandi kokola batyaka bango na maziba ya mwa minene epai balyaka mbisi ya minene tii bakokóma na mbula misato mpe bakokóma na molai ya mɛtrɛ 1,25 mpe 1,5. Nsima na yango, bakómaka koleisa bango bandambo ya misuni ya ngɔmbɛ oyo eutaka na bakompanyi ya minene oyo etyaka misuni ya bangɔmbɛ na bakartɔ. Na ebandeli, ferme yango ezalaki kaka na mitindo 3 ya bangando oyo ezalaka na Inde, kasi lelo oyo ekómi na mitindo 7 ya bangando mpe bazali kokanisa kotya mitindo nyonso ya bangando ya mokili mobimba, oyo eyebani lelo oyo. Balobelaka mingi likambo ya kobɔkɔla bangando mpo na kotɛka mposo mpe misuni na yango. ­Whitaker ayebisaki Lamuká! ete mosuni ya ngando ezalaka elɛngi mpe ezalaka na mafuta mingi te. Lokola banyama minene wana oyo etikalaki moke elimwa ebatelami malamu, lelo oyo banyama yango ekómi beboo. Ferme ya bangando ya etúká Madras, oyo ebendaka likebi ya bato mingi oyo bakendaka kotala yango, elingi mpe kosalisa bato na kolongola makanisi mabe oyo bazalaka na yango mpo na bangando mpe kosalisa bato básepela lisusu koleka na banyama yango.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Romulus Whitaker, Madras Crocodile Bank

[Elilingi na lokasa 23]

Ngando monene ya mbu

[Elilingi na lokasa 24]

Ngando ya mbu ya mwasi ememi mwana na yango na monɔkɔ

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Adam Britton, http://crocodilian.com

[Elilingi na lokasa 24]

Ngando ya ebale

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© E. Hanumantha Rao/​Photo Researchers, Inc.

[Elilingi na lokasa 24]

Ngando ya monɔkɔ molai

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto