“Baoyo babengami ‘banzambe’ ”
NTANGO ntoma Paulo abikisaki motɛngumi moko na Lisitala, bato bagangaki ete: “Banzambe bakómi lokola bato mpe bakiteli biso!” Babengaki Paulo Helemesi mpe moninga na ye Balanabasi, Zeusi. (Misala 14:8-14) Na Efese, Demetiliusi, mosali moko ya biloko ya palata, alobaki ete soki batiki Paulo akoba kosakola, “tempelo ya nzambe-mwasi monene Alatemisi ekotángama lokola eloko mpamba.”—Misala 19:24-28.
Bato ya ekeke ya liboso—lokola bato mingi lelo—bazalaki kosambela “baoyo babengami ‘banzambe,’ ezala na likoló to na mabelé.” Kutu, Paulo alobaki ete: “ ‘Banzambe’ bazali mingi mpe ‘bankolo’ bazali mingi.” Kasi, alimbolaki mpe ete: “Mpo na biso ezali mpenza na Nzambe kaka moko Tata,” mpe “ezali na Nkolo kaka moko, Yesu Klisto.”—1 Bakolinti 8:5, 6.
Yesu abengamaki mpe Nzambe?
Atako mokolo moko te Yesu alobaki ete azali Nzambe; kasi, lokola azali mokonzi oyo Yehova aponi, esakweli ya Yisaya ebengi ye “Nzambe na nguya” mpe “Nkumu ya kimya, NW ].” Esakweli ya Yisaya ebakisi boye: “Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te.” (Yisaya 9:6, 7) Na yango, lokola Yesu azali “Nkumu,”—mwana ya Mokonzi Monene, Yehova—akozala Moyangeli ya guvɛrnema ya likoló ya ‘Nzambe Mozwi-ya-Nguya Nyonso.’—Exode 6:3.
Kasi, moto akoki kotuna: ‘Na ndimbola nini Yesu azali “Nzambe ya nguya,” mpe ntoma Yoane alobaki te ete Yesu azali Nzambe? Na libongoli ya Biblia Liloba lya Nzambe, Yoane 1:1 elobi boye: “O libandela Liloba azalákí. Liloba azalákí bangó na Nzámbe mpé Liloba azalákí Nzámbe.” Bato mosusu balobaka ete yango elimboli ete “Liloba,” oyo abotamaki awa na mabelé lokola mwana Yesu, ye moko azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Ezali solo bongo?
Soki tolobi ete vɛrsɛ yango elimboli ete Yesu ye moko azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, yango ekoyokana te na maloba oyo ezali liboso na vɛrsɛ yango, oyo elobi ete ‘Liloba azalákí bangó na Nzámbe.’ Moto oyo azali “na” moto mosusu akoki kozala te kaka ye moko moto yango. Yango wana, mabongoli mingi ya Biblia emonisaka polele ete Liloba azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. Na ndakisa, Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika mpe La Sainte Bible, Segond-Oltramare, elobi ete: “Liloba azalaki nzambe.” Babiblia yango emonisi ete Liloba azali Nzambe ye moko te. Liloba abengami “nzambe” (na “n” ya moke), mpamba te ye aleki bikelamu nyonso ya Yehova na lokumu. Na vɛrsɛ wana, liloba “nzambe” elakisi “moto ya makasi.” Kutu La Bible du Centenaire elobi yango polele lisusu, ete: “Liloba azalaki moto ya bonzambe.”
Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia na monɔkɔ ya Grɛki ezali na maloba yango oyo ekokani na Yoane 1:1, oyo esaleli liloba “nzambe.” Na ndakisa, mpo na Elode Agilipa I, ebele ya bato bagangaki: “Mongongo ya nzambe.” Mpe ntango nyoka eswaki Paulo kasi akufaki te, bato balobaki ete: “Azali nzambe.” (Misala 12:22; 28:3-6) Kobenga Liloba “nzambe,” kasi Nzambe te, eyokani ezala na mibeko ya lokota ya Grɛki, to na mateya ya Biblia.—Yoane 1:1.
Tótala ndenge Yoane ayebisi soki “Liloba” ezali nani na mokapo ya liboso ya Evanzile na ye. Akomi boye: “Liloba akómaki mosuni mpe afandaki na kati na biso, mpe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo ya [Nzambe te kasi ya] mwana mobotami-se-moko oyo auti epai ya tata moko.” Na bongo, “Liloba,” oyo akómaki mosuni, oyo afandaki awa na mabelé lokola moto mpe bato bamonaki ye, ezali Yesu. Yango wana, akokaki te kozala Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpamba te Yoane alobaki ete: “Moto amoná Nzambe ata mokolo moko te.”—Yoane 1:14, 18.
Moto akoki lisusu kotuna boye: ‘Kasi mpo na nini ntango Toma amonaki Yesu nsima ya kosekwa na ye, agangaki “Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!”?’ Ndenge tomoni yango, Yesu azali nzambe na ndimbola oyo ete azali na lolenge ya bonzambe, kasi azali Tata te. Yesu autaki koyebisa Malia Magadalena boye: “Nazali komata epai ya Tata na ngai mpe Tata na bino mpe epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.” Kobosana mpe te mpo na nini Yoane akomaki Evanzile na ye. Bavɛrsɛ misato nsima ya lisolo oyo elobeli Toma, Yoane alimboli ete akomaki Evanzile na ye mpo bato ‘bándima ete Yesu azali Klisto Mwana ya Nzambe’—kasi azali Nzambe te.—Yoane 20:17, 28, 31.
Nani azali “nzambe ya mokili oyo”?
Tomoni mpenza ete banzambe bazali mingi. Basusu Biblia etángi bankombo na bango, ndenge tomoni yango. Atako bongo, bato oyo bamonaki nguya ya Yehova na ntango ya kala bagangaki ete: “Yehova azali Nzambe ya solo! Yehova azali Nzambe ya solo!” (1 Mikonzi 18:39, NW ) Kasi, ezali na nzambe mosusu oyo azali mpe na nguya. Biblia elobi ete, “nzambe ya mokili oyo, azipá bango miso pe akangá bango mayele.”—2 Bakolinti 4:4, Bible na lingala ya lelo oyo.
Na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu akebisaki bayekoli na ye mbala misato mpo na nzambe yango, abengaki ye “moyangeli ya mokili oyo.” Yesu alobaki ete moyangeli yango ya nguya, to nzambe, “akobwakama libándá.” (Yoane 12:31; 14:30; 16:11) Nani azali nzambe yango, mpe mokili oyo azali koyangela ezali mokili nini?
Ezali moto mosusu te, bobele anzelu motomboki, Satana Zabolo. Ndenge nini toyebi yango? Biblia elimboli ete ntango Satana amekaki Yesu, alakisaki ye “makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango, mpe alobaki na ye ete: ‘Biloko oyo nyonso nakopesa yo soki okwei na nse mpe osambeli ngai.’ ” (Matai 4:8, 9) Tokoki mpenza koloba te ete Satana amekaki Yesu soki makonzi oyo ye azalaki kopesa Yesu ezalaki ya ye te. Kutu, ntoma Yoane alobaki boye: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.”—1 Yoane 5:19.
Kobosana te ete Yesu alakaki boye: “Moyangeli ya mokili oyo akobwakama libándá.” (Yoane 12:31) Mokili oyo, to ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, elongo na moyangeli na yango, bakolongolama, ndenge ntoma Yoane asakolaki yango ntango alobaki ete: “Mokili ezali koleka.” Kasi, Yoane abakisaki ete: “Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Tiká tótalela sikoyo mikano ya malamu mpenza oyo Nzambe kaka moko ya solo azali na yango mpe ndenge nini tokoki kozwela yango matomba.
[Elilingi na lokasa 8]
Bato ya Lisitala babengaki Paulo ná Balanabasi banzambe
[Elilingi na lokasa 9]
Yesu ayebisaki Malia Magadalena boye: ‘Nazali komata epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino’