Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Mpo na nini nasengeli kosala misala ya mabɔkɔ?
“Nazalaki kokanisa ata moke te kosala misala ya mabɔkɔ. Nazalaki kosepela nde kosakana na ordinatɛrɛ na ngai.”—Nathan.
“Bana mosusu bazalaki kotyola biso baoyo tozalaki kosala misala ya mabɔkɔ, lokola nde toyebaki kosala eloko mosusu te.”—Sarah.
MOSALA YA MABƆKƆ—bato mingi bamonaka yango ete ezali mosala ya salite, elɛmbisaka mingi mpe ezangi ntina. Profesɛrɛ moko ya makambo ya nkita alobi mpo na misala ya mabɔkɔ boye: “Lelo oyo, bato batalelaka misala wana lokola misala mpamba, mpo balingaka misala ya lokumu.” Tokoki kokamwa te soki bilenge mingi basepelaka te na likanisi ya kosala mosala ya mabɔkɔ.
Kasi, Biblia ezali kopesa likanisi oyo ekeseni mpenza mpo na misala ya makasi. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Likambo lileki malamu ezali mpo na moto te, bobele ete alya mpe amɛla mpe azwa esengo kati na mosala na ye.” (Mosakoli 2:24) Na ntango ya kala, Yisalaele ezalaki ekólo ya basali ya bilanga. Kotimola mabelé, kobuka mbuma mpe kotuta yango, nyonso wana ezalaki misala ya makasi mpenza. Yango wana, Salomo alobaki ete mosala makasi ekoki kopesa matomba mingi.
Bankama ya bambula na nsima, ntoma Paulo alobaki: “Tiká moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká nde asala mosala makasi, kosaláká na mabɔkɔ na ye oyo ezali mosala ya malamu.” (Baefese 4:28) Paulo ye moko ayebaki eloko babengi mosala ya mabɔkɔ. Atako atángaki kelasi mingi, na bantango mosusu, azalaki kotonga bahema mpo na komileisa.—Misala 18:1-3.
Ndenge nini otalelaka mosala ya mabɔkɔ? Oyeba yango to te, mosala ya mabɔkɔ ekoki kosalisa yo na makambo mingi.
Koyekola mosala
Kosala mosala ya mabɔkɔ lokola kobɛta marto to kokata matiti, ekoki kosalisa moto azala na nzoto kolɔngɔnɔ. Matomba esuki kaka te na kopesa yo nzoto makasi. Oyebi kobongisa pinɛ to kolongola mafuta na motɛrɛ ya motuka? Oyebi kobongisa lininisa to tiyo ya mai? Oyebi kolamba? Oyebi kosukola twalɛti na nkisi? Bilenge mibali mpe basi, bosengeli koyeba misala wana, oyo ekosalisa bino na komisalela bino moko ntango bokolongwa na ndako ya baboti na bino.
Emonani ete Yesu Klisto ye moko ayebaki misala mosusu ya mabɔkɔ ntango azalaki awa na mabelé. Na ntembe te, ayekolaki mosala ya mabaya epai ya tata-mobɔkɔli na ye Yozefe, yango wana bakómaki kobenga ye mosali-mabaya. (Matai 13:55; Malako 6:3) Yo mpe okoki koyeba misala ndenge na ndenge soki ozali kosalisa mabɔkɔ na yo mosala.
Ebongisaka bomoto
Kosala mosala makasi ekoki mpe kosalisa yo na komitalela malamu. Na lisolo oyo akomelaki Centre américain de la santé mentale et de l’éducation (Lopitalo ya maladi ya motó), monganga Fred Provenzano alobi ete koyekola misala ya mabɔkɔ ekoki kosalisa moto na “kokokisa bamposa na ye moko mpe na komityela motema,” mpe “ekoki kosalisa moto na komipesa disipilini mpe koyeba kotya makambo na molɔngɔ, bizaleli oyo ezali na ntina mpo na mosala oyo akosala na bomoi na ye.” John, elenge mobali moko, alobi boye: “Misala ya mabɔkɔ eteyaka kozala na motema molai. Esalisaka moto ayeba ndenge ya kosilisa mikakatano.”
Sarah, oyo tolobeli na ebandeli, alobi boye: “Misala ya mabɔkɔ esalisaki ngai nalinga mosala mpe namesana na yango. Nayekoli komipesa disipilini na makanisi mpe na nzoto.” Mosala ya makasi ezalaka kaka motungisi? Nathan alobi boye: “Nayekoli kosalisa mabɔkɔ na ngai mosala. Lokola nakómi koyeba mosala, namoni ete nakómi lisusu kosala malamu koleka. Mosala ya mabɔkɔ esalisi ngai namimona ete nazali na ntina.”
Mosala ya mabɔkɔ ekoki mpe kopesa yo esengo ya komona ete okokisi likambo moko. James, elenge mobali moko, alobi boye: “Nasepelaka mingi na mosala ya mabaya. Atako mbala mosusu ezalaka mosala makasi, nasepelaka komona eloko oyo nasali. Yango epesaka ngai esengo mpenza.” Brian mpe amiyokaka ndenge wana, alobi boye: “Nasepelaka mingi kobongisa motuka. Koyeba kobongisa eloko moko oyo ebebaki mpe kozongisa yango ndenge ezalaki epesaka ngai esengo mpe esalisaka ngai namityelaka motema.”
Mosala ya bosantu
Mpo na bilenge baklisto, kozala na makoki ya kosala mosala makasi ekoki kosalisa bango na mosala ya Nzambe. Ntango Mokonzi Salomo azwaki mokumba ya kotonga tempelo moko kitoko mpo na Yehova, ayebaki ete ezali mosala monene oyo ekosɛnga milende mpe bato ya mayele. Biblia elobi: “Mokonzi Salomo atindaki mpe abengaki Hilama longwa na Tulo. Azalaki mwana na mwasi-akufeli-mobali na libota na Nafatali. Tata na ye azalaki moto na Tulo, mosali na motako. Atondaki na mayele mpe na boyebi; ayebaki kosala mosala na lolenge nini na motako. Akómaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalaki mosala nyonso na ye.”—1 Mikonzi 7:13, 14.
Oyo nde libaku malamu Hilama azwaki ya kosalela makoki na ye mpo na kotombola losambo ya Yehova! Lisolo ya Hilama emonisi bosolo ya maloba ya Biblia oyo ezali na Masese 22:29, elobi: “Omoni moto oyo azali na etingya na mosala na ye? Ye akotɛlɛma liboso na mikonzi; akotɛlɛma liboso na bato mike te.”
Lelo oyo, ata bilenge oyo bayebaki mosala ya kotonga ndako te to baoyo bayebaki kaka mwa moke, bazwaki libaku ya kosangana na mosala ya kotonga bandako ya bokonzi. Mpo na yango, basusu bayekolaki misala ya ntina lokola mosala ya kura, ya batiyo ya mai, ya mabaya mpe ya masɔ. Mbala mosusu okosepela kosolola na bankulutu ya lisangá na yo mpo na koyeba soki yo mpe okoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Ndako ya bokonzi.
James, oyo asalaki mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, alobi boye: “Bandeko mingi kati na masangá bazalaka na ntango te mpe na makoki te ya kosala misala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Yango wana, soki ozali kopesa mabɔkɔ na mosala yango, ozali nde kosalisa lisangá mobimba.” Nathan ayekolaki mosala ya betɔ, mpe amonaki ete mosala yango efungolelaki ye nzela mosusu na mosala ya Nzambe. Alobi boye: “Nazwaki libaku ya kokende na Zimbabwe mpe kosalela mayele oyo nayekolaki mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova. Nasalaki kuna sanza misato, mpe yango ezali moko ya makambo malamu oyo nasali na bomoi na ngai.” Bilenge mosusu oyo balingaka kosala mosala makasi basili komipesa bango moko mpo na kopesa mabɔkɔ na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na mboka oyo bafandi.
Koyeba mosala ya mabɔkɔ ekoki mpe kosalisa yo na “kosepela na oyo ozali na yango.” (1 Timote 6:6) Bilenge mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova bazali babongisi-nzela, to basakoli ya ntango nyonso. Koyekola mosala ya mabɔkɔ esalisi basusu bákokisa bango moko bamposa na bango, nzokande balekisaki ntango mingi te mpe babimisaki mbongo mingi te na kotánga kelasi.
Ndenge ya koyekola
Emonani polele ete ata soki olingaka kosala mosala oyo bakofuta yo, to olingaka kosala kaka mwa misala na ndako, koyekola misala ya mabɔkɔ ekoki kosalisa yo mingi. Okoki koyekola mosala ya mabɔkɔ na eteyelo. Na ntembe te, okoki mpe koyekola misala mosusu yo moko. Ndenge nini? Soki oyekoli kosala misala ya ndako. Monganga Provenzano oyo tolobeli na ebandeli alobi boye: “Misala ya ndako ezali na ntina mingi mpenzampenza mpo na bilenge, mpamba te ezali ‘kelasi mobimba’ oyo ekosalisa bilenge bázala na makoki ya komisalela bango moko ntango bakolongwa epai ya baboti na bango.” Na bongo, omipesaka na misala nyonso oyo ezali kosalema na ndako. Okoki nde kokata matiti to kobongisa bisika ya kotya biloko na ndako?
Na esika ya kokanisa ete misala yango ekitisaka lokumu ya moto, misala ya mabɔkɔ ekoki kosalisa yo na makambo mingi. Kokima yango te! Kasi, luká nde “koyoka esengo mpo na malamu” ya mosala na yo, ndenge Mosakoli 3:13 elobi, “yango likabo ya Nzambe.”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
Koyekola mosala ya mabɔkɔ esalisi bilenge mingi bákóma kosala mingi mpo na Nzambe
[Bililingi na lokasa 22]
Baboti na yo bakoki kolakisa yo misala ya ntina