Makambo mazali koleka na mokili
Kaka mpo na mbwa?
Zulunalo moko (The Sydney Morning Herald) elobi ete: “Mbongo oyo ekólo Australie ebimisaka mpo na banyama ya ndako eleki oyo basalisaka na yango mikili mosusu. Kobanda bakómá kosalela bambwa bilamba oyo ezindaka na mai te, babiju mpe nkisi ya kosilisa nsolo na monɔkɔ ya banyama, bato ya Australie bakómá kobimisa mbongo mingi mpo na banyama ya ndako, dolare miliare 2,2 mbula na mbula.” Jason Gram, oyo atɛkaka banyama ya ndako, amoni ete makanisi ya bato ebongwani mpo na banyama yango na mbula zomi oyo euti koleka. Alobi boye: “Kala, bambwa bazalaki kolala libándá; sili etondi nzoto mobimba mpe bazalaki kolya mikuwa. Lelo oyo, bakómá kolala na ndako, na mbeto ya matela, bakómá kolatisa bango nsinga ya ntalo na nkingo.” Kasi, amoni ete mbongwana wana ezali malamu mpo na mombongo, mpo bato bakómi kotalela bambwa lokola bana na bango mpe bazali kosombela bango biloko ya ntalo. Zulunalo yango elobi ete banyama mosusu ya ndako, “balɛngɛlaka bango lokola bato, lokola nde bazali na biloko oyo basengelaka na yango, balingaka to bamonaka yango kitoko.” Nzokande, “eloko moko te emonisi ete mbwa asepelaka básombela ye eloko ya lisano ya dolare 50, na esika ya oyo ya dolare 5. Emonani ete bato oyo babɔkɔlaka banyama ya ndako basalaka mwa lolendo wana kaka mpo na komonisa ete balingaka banyama na bango.”
Makɛlɛlɛ makasi
Mbala mingi, makɛlɛlɛ ya makasi esalaka ete bato mingi oyo bafandaka na bingumba bázala na kimya te. Zulunalo moko (ABC) ya Espagne elobi ete na kotalela Organisation mondiale de la santé, makɛlɛlɛ ekoki ata kobebisa bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Na Espagne, tribinale monene endimaki mpe ete makɛlɛlɛ ya makasi ebebisaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto, ntango ekataki likambo ya esika moko ya masano oyo bafundaki yango ete ebuki mibeko ya engumba yango oyo epekisaka makɛlɛlɛ ya makasi. Tribinale yango elobaki ete makɛlɛlɛ ya makasi “ezali kobuka mobeko ya bonsomi oyo moto nyonso azali na yango ya kobatela bizaleli malamu mpe nzoto na ye, kofanda na esika ya ye moko ná libota na ye, mpe kofanda na ndako na ye na kimya.” Tribinale yango emonisaki ete makɛkɛlɛ ya makasi ekoki “kobebisa matoi, kozangisa moto mpɔngi, kokómisa moto nkandankanda, komatisa tansyo, mpe kotinda moto akóma kotomboka mpambampamba.”
Bilenge oyo bazali konyokwama mpo na bitumba
Zulunalo moko ya Allemagne (Leipziger Volkszeitung ) elobi ete Ebongiseli ya ONU mpo na bana eyebisi ete na bato 800 000 oyo babomaki bango na bitumba kati na bana-mboka na Rwanda, 300 000 bazalaki bana mike. Balobaka ete na Rwanda, bilenge koleka 100 000 bazali kofanda na bandako oyo ata mokóló moko te azali kokɛngɛla bango. Zulunalo yango elobi ete “bomoi na bango ya mokolo na mokolo ezali kaka bobola makasi.”
Mpo “mayele esila te”
Zulunalo moko (Toronto Star) elobi ete “koyeba minɔkɔ mibale esalisaka moto mpo ‘mayele na ye esila te’ ntango azali kokóma mokóló.” Ellen Bialystok, moto ya mayele na pisikoloji na Iniversite ya York, amekaki mayele ya mikóló 104 oyo bazalaki na mbula kobanda 30 tii 59, mpe bamosusu ya mbula kobanda 60 ti 88. Bango nyonso batángá kelasi ndenge moko mpe bazwaka mbongo ndenge moko. Na etuluku mokomoko, bato mitano likoló na zomi bayebaki minɔkɔ mibalemibale. Mokomoko asengelaki kosala mosala moko ya pɛtɛɛ oyo ezalaki na ndenge mibale ya kosala yango, oyo esengeli kopona kaka ndenge moko, mpe ntango azali kosala, bazali kotalela ye ntango boni akolekisa liboso ya kosala likambo mokomoko. Zulunalo yango elobi ete “bato oyo bayebi minɔkɔ mibale bazalaki kosala noki koleka baoyo bayebi kaka monɔkɔ moko.” Ellen Bialystok alobi ete bato oyo balobaka minɔkɔ mibale, bakanisaka na minɔkɔ mibale, mpe bɔɔngɔ na bango esengeli kopona monɔkɔ nini esengeli kosalela mpo na kopesa eyano. “Nsima ya bambula, ndenge wana ya kosala, ebatelaka bɔɔngɔ enuna noki te, ata soki nzoto ebandi konuna.”
Biblia “oyo eyokani na makambo ya politiki”?
Agence Reuters elobi ete: “Lingomba ya Angleterre ebimisi buku ya sika ya mabondeli; na buku yango, babongoli mpenza mabondeli mpe banzembo ya Biblia oyo bandimi balingaka mingi. Babimisi buku yango mpo na kosalisa bandimi ya lingomba yango bákanisaka makambo lokola banyongo ya mikili ya bobola mpe mombongo ya sembo kati na bikólo.” Na buku yango oyo ezali na motó ya likambo Mwa buku ya mabondeli mpo na kimya mpe bosembo (na Lingelesi), balongoli maloba ya Yesu oyo ezali na libondeli ya Tata wa Biso, oyo elobi ete: “Pesá biso lelo mampa na biso mpo na mokolo oyo,” mpe na esika na yango batye: “Opesaka biso limpa na biso ya mokolo na mokolo soki bazongiseli biso mabelé na biso oyo babɔtɔlaki to soki bazali kofuta biso malamu na mosala.” Ndenge moko mpe, balongoli maloba oyo ya Nzembo 23: “Ata natamboli na libulu ya molili ya kufa” mpe na esika na yango batye: “Ata soki bitumba ya makasi mpe oyo epanzani bisika nyonso ebimi, nakobanga te, Nkolo.” Bato oyo balingaka mbongwana te balobi ete buku yango ya sika ya nkasa 96 ezali “makambo ya lokuta, mpe ezali bongo kotuka Nzambe”; mpe zulunalo moko ya Londres (The Daily Telegraph) ebakisi ete buku yango “ezali na maloba ya mabe mpe ya kofinga.”
Kosopa zemi mpo bákata mbongo na mosala te
Zulunalo moko (The Sydney Morning Herald) elobi ete: na kokesana na ndenge bato mingi bakanisaka, “basi mingi ya Australie oyo basopaka zemi, ezali te bilenge oyo bazalaka na mibali kilikili, kasi ezali nde [basi] ya mabala, oyo bazali babola te bazwi mpe te.” Soki mobali akendaka mosala mikolo nyonso mpe mwasi akendaka mosala mikolo mosusu, mbala mingi ezali likambo ya mbongo nde etindaka bango bázala na bana te. Peter McDonald, profesɛrɛ ya demografi na Université nationale ya Australie, alobi ete, “Kobɔkɔla mwana ebimisaka mindɔndɔ na mosala oyo mwasi asalaka mpe mbongo oyo bafutaka ye. Mwasi oyo azali na bana te, bafutaka ye mbongo mingi; nzokande soki akómi na mwana, bakofuta ye lisusu mbongo mingi te.” Zulunalo yango emonisi ete, na Australie, zemi moko likoló ya misato esukaka na kosopama.
“Luká koyeba baninga ya mwana na yo”
Zulunalo moko (The New York Times) elobaki ete na États-Unis, “bilenge oyo bazalaki koyeba ete baninga na bango mingi basangisaka nzoto, bazalaki na likama ya kolangwa masanga mbala 31 koleka bilenge mosusu, komɛla makaya mbala 5 koleka bilenge mosusu, komɛla bangi babengi marijuana mbala 22 na ndambo koleka bilenge mosusu.” Centre de lutte contre les états de dépendance et la toxicomanie na Iniversite ya Columbia nde esalaki ankɛti yango epai ya baboti 500 mpe bilenge 1 000 oyo bazali na mbula kobanda 12 tii 17. Joseph A. Califano Junior, mokambi ya ebongiseli yango alobi boye: “Likambo ezali polele mpo na baboti oyo bazali na bana ya mbula kobanda 12 tii 17: bólukaka koyeba soki mwana na bino ya mobali to ya mwasi akómi na ba chéri mpe bóluka koyeba baninga na ye.” Abakisaki ete: “Baboti oyo, ntango bazali kolya elongo na bana na bango, balobelaka makambo etali basi ná mibali to komɛla bangi, bazalaka na mpasi te mpo na kosalisa bana na bango bámɛla bangi te.”
Bilenge mingi bazali komizokisa na nko
Zulunalo moko ya Londres (The Times) elobi ete: “Na Mpoto mobimba, mboka oyo bato mingi bamizokisaka na nko ezali Angleterre.” Mbula na mbula, bisika oyo batyaka bato oyo bazali na maladi makasi na lopitalo esalisaka bato 150 000 oyo bamizokisaki na nko, na ndakisa bamikataki mpota. Likambo yango ezali kosalema mingi epai ya bilenge. Zulunalo Times elobi boye: “Atako bilenge basi oyo bamizokisaka na nko bazali mingi koleka bilenge mibali, (bana basi nsambo, nzokande mwana mobali moko), bilenge mibali bakómi komizokisa mbala mibale koleka kobanda 1980.” Ekoki kozala ete bilenge yango bamizokisaka mpo “likambo moko ezali kotungisa bango to mpo bato batyelaka bango likebi te.” Andrew McCulloch, oyo asalaka na Ebongiseli moko mpo na maladi ya motó, alobi ete mitángo wana “ezali komonisa ete bilenge bazali kokutana na mikakatano mingi, to bazali kokoka te kosilisa mikakatano na bango.”