Mpo na nini bolingo ya solosolo ezali lisusu mpenza te?
Toli na makambo ya bolingo ya basi ná mibali ezangaka te. Minganga mpe bapesi-toli bapesaka bato toli na likambo yango. Na televizyo balobelaka likambo yango mbala na mbala.
NA BASITE mingi ya Internet, balobaka ete balakisaka moto ndenge ya kosala mpo bálinga ye. Bakolaka yo ete okoyeba “makambo mingi ya kitoko mpe ya kokamwa” mpe okoyekola makambo mingi epai ya “bato oyo bayebi kokutanisa basi ná mibali,” “bato oyo balakisaka ndenge ya kolinga,” mpe “bato oyo bazongisaka bolingo,” mpe bato oyo basalisaka baoyo banyokwamaka na makanisi, bato oyo bayekolaka bizaleli ya bato, mpe banganga-minzoto.
Likambo ya bolingo esalaka mpe ete babuku ná bazulunalo etɛkama mingi, mpe mikanda yango mosusu elakaka bato makambo oyo eleki ndelo. Na ndakisa, buku moko ekoloba ete ekomonisa yo “ndenge ya kosala mpo ezala moto nani alinga yo.” Buku mosusu ekoloba ete ekolakisa yo ndenge okoki kozwa “mobali to mwasi oyo abongi na yo nsima ya sanza moko mpamba.” Sanza moko eleki mingi? Soki ezali bongo, buku mosusu elobi ete okoki kosala ete moto moko alinga yo mpo na libela “nsima ya miniti 90 to na nse.”
Mingi na batoli wana esɛngaka kofuta mpo na kozwa yango. Kutu, bato mingi bafutaka mbala mibale. Bafutaka mbongo mpo na kozwa toli. Na nsima, soki toli yango emonani ete ezali malamu te, ndenge ezalaka mbala mingi, bafutaka lisusu na ndenge batungisamaka na makanisi ntango makambo etamboli te ndenge bakanisaki.
Nzokande, ezali na buku moko oyo epesaka toli oyo soki osaleli yango ekolonga kaka. Lisusu, buku yango elobelaka bolingo na bosembo mpenza, kozanga kolekisa ndelo mpe elakaka te makambo oyo ekoki kosalema te. Atako buku yango ekomamá kala mpenza, toli na yango esilaka ngala te. Moto oyo akomisaki yango azali na bwanya mpe na bolingo oyo ekokani na moto mosusu te. Mbala mosusu yo mpe ozali na likabo yango ya ntina mingi—Biblia. Biblia ezali koteya biso makambo oyo tosengeli koyeba mpo na bolingo, ata soki tozali na bomoi ya ndenge nini to tokolá na esika nini. Mpe toli na yango ezali ofele.
Biblia ekosalisa nde biso tózala na boyokani ya malamu na moto nyonso? Te. Bato mosusu bakosepela na biso te, ata soki tosali makasi ndenge nini. Mpe bolingo ya solosolo, balukaka yango na makasi te. (Loyembo ya Salomo 8:4) Kasi, soki tosaleli toli ya Biblia, tokozanga te mabaku ya kokolisa boyokani ya malamu elongo na basusu, ata soki yango ekosɛnga biso ntango mpe milende. Lolenge wana ya bolingo, tokolobela yango na lisolo oyo elandi, kasi liboso, tóluka koyeba ntina oyo bolingo ya solosolo ezali lisusu mpenza te na mikolo na biso.
Bolingo “ekokóma mpiɔ”
Na esakweli monene oyo alobelaki “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” Yesu ayebisaki polele makambo mpe bizaleli oyo ekomonana na mikolo na biso. Alobaki ete mokili ekotonda na botyoli-mibeko mpe bitumba—oyo ekeseni mpenza na bolingo! Alobaki mpe ete “mingi . . . bakotɛkana mpe bakoyinana” mpe ete “bolingo ya bato mingi ekokóma mpiɔ.” (Matai 24:3-12) Ondimi te ete mokili ekómi mpiɔ, mpe bolingo ya solosolo ezali lisusu te, ata na kati ya mabota?
Longola makambo oyo Yesu alobaki, ntoma Paulo alobelaki mingi bizaleli oyo bato bakokóma na yango na “mikolo ya nsuka.” Akomaki ete bato bakozala “bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.” (2 Timote 3:1-4) Na mikili mingi, bato mingi bazali na bizaleli wana.
Kanisá naino: Osepelaka kozala elongo na bato ya lolendo, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, oyo bakokosela yo makambo to bakotɛka yo? Osepelaka kozala ná bato oyo bamilingaka bango moko, oyo balingaka mbongo, to balingaka bisengo? Lokola bato oyo balukaka bolamu na bango moko balingaka bato mosusu kaka mpo na lokoso mpe mpo na kokokisa bamposa na bango moko, bolingo oyo bato ya ndenge wana bazalaka na yango mpo na basusu ezali ya litomba. Toli oyo ya Makomami ezali mpenza ya mayele: “Yo kimá bato yango.”—2 Timote 3:5.
Yoká mpe ezaleli mosusu oyo bato bakozala na yango na mikolo ya nsuka: Bato “bazangi bolingo ya libota,” to, ndenge Biblia mosusu ebongoli yango, bato “bakozanga bolingo mpenza mpo na mabota na bango.” Likambo ya mawa, ebele ya bana bazali kokola na mabota ya ndenge wana. Mbala mingi, makambo oyo bana yango bayebaka mpo na bolingo, bayokaka yango nde na radio to bamonaka yango na televizyo. Kasi radio to televizyo elakisaka mpenza bato bolingo ya solosolo, oyo ekotinda moto akóma koyokana malamu na bato mosusu?
Bolingo ya makanisi to bolingo ya solosolo?
Na makambo mosusu, mingi na biso tolandaka oyo toyokaka na radio to tomonaka na televizyo. Mwasi moko oyo ayekolaki likambo yango akomaki boye: “Banda bomwana, tomonaka, totángaka, mpe toyokaka masolo kilikili oyo elobelaka basi ná mibali, bolingo, lolango, ezala na bafilme mpe na televizyo, na babuku mpe bazulunalo, na radio mpe miziki, na piblisite, ata mpe na bansango.” Alimbolaki mpe ete: “Mbala mingi, ndenge oyo radio, televizyo mpe babuku elobelaka makambo ya basi ná mibali, ya bolingo, mpe ya lolango, elamwisaka mposa mpe etindaka bato bákoma na makanisi mpamba, oyo mingi na biso tokoki te kolongola yango nyonso na bɔɔngo na biso. Ndenge oyo balobelaka likambo yango etindaka biso tósepela lisusu te na babalani na biso, mpe na biso moko.”
Ya solo, babuku, bafilme, mpe banzembo elobelaka mpenza bolingo ya solosolo te. Kutu, bato oyo basalaka yango balukaka nde kosɛkisa mpe kosepelisa bato, kasi koteya te. Yango wana, baoyo bakomaka babuku bakomaka makambo ya basi ná mibali oyo bango moko bakanisi, oyo bamoni ete ekopesa bango mbongo. Likambo ya mawa, ezali pɛtɛɛ te kokesenisa masapo mpamba wana ná makambo ya solo. Yango wana, mbala mingi bato balɛmbaka nzoto soki bolingo na bango ekokani te na oyo bamonaki na bafilme to batángaki na mikanda. Na bongo, ndenge nini tokoki kokesenisa masapo mpamba ná makambo ya solo, kokesenisa bolingo oyo balobelaka na mikanda to na bafilme ná bolingo ya solosolo? Meká kokokanisa makambo oyo elandi.
Bolingo oyo balobelaka na mikanda ekeseni na bolingo ya solosolo
Atako babuku, bafilme to bateyatre nyonso elobelaka masolo ya bolingo ndenge moko te, lolenge na yango ekesenaka mingi te. Zulunalo moko (Writer) elobi boye: “Babuku mingi ya masolo ya basi ná mibali ezalaka kaka na masolo ya lolenge moko. Yango ezali mpamba te. Masolo ya mwasi ná mobali oyo bakutani, balingani, bakabwani, bakutani lisusu, ezali masolo oyo eyebani ete bato balingaka yango mingi mpe balukaka yango mingi, ezala bakomi yango ndenge nini to na eleko nini.” Tótalela naino na mozindo lolenge ya masolo yango, oyo bato basepelaka na yango mingi.
Mwasi ná mobali bakutani: Mwana ya mokonzi ya bonzenga akutani na mwana mwasi moko ya kitoko mpe balingani. Mwasi moko oyo ameseni kokoma babuku apesi toli epai ya baoyo babandi mosala ya kokoma babuku ya bolingo, ete “ntango kaka moto abandi kotánga lisolo [ya mwasi ná mobali], asengeli komona ete mwasi yango asalemá kaka mpo na mobali wana banda na mbala ya liboso oyo bakutani.”
Likambo oyo bato balobaka ete moto oyo asalemá mpo na yo, okolula ye kaka na mbala ya liboso oyo omoni ye, elimbolaka ete bolingo ya solo ezali kaka mayoki mpamba, mposa makasi oyo eyaka na motema ntango omoni mwasi to na mobali oyo osepeli na ye—bolingo ya ndenge wana eyaka mbalakaka mpe esɛngaka mpenza milende to koyeba moto te. Nzokande, bolingo ya solosolo, esuki kaka na kosepela na moto te. Toboyi te, esɛngaka mpe motema esepela, kasi bolingo ezali nguya oyo ebendaka moto epai ya moto mosusu, oyo ezali mpe na mitinda oyo esengeli kolanda, mpe ekolaka kaka soki bazali kobatela yango malamu mpe kozongisa yango sika.—Bakolose 3:14.
Lisusu, esɛngaka ntango mingi mpo na koyeba moto. Baoyo bakanisaka ete moto boye akozala mobalani oyo abongi na bango kaka na mbala ya liboso oyo bakutani na ye, bamikosaka, mpe mbala mingi basukaka na kolɛmba nzoto. Longola yango, soki okanisi mbala moko ete ozwi moto oyo alingi yo mpenza, okoki kokanga miso na makambo oyo ezali komonana polele ete ezali bongo te. Kopona mobalani oyo abongi esuki kaka te na lolango makasi oyo eyaka na motema, oyo eumelaka te. Na yango, tiká ntango mingi eleka. Kutu, baankɛti mingi emonisi ete soki moto aponi mobalani ya malamu te, yango ekoki kosala ete asala lisusu mosala na ye malamu te, makanisi mpe bokolɔngɔnɔ na ye ya nzoto ezala lisusu malamu te, mpe yango ekoki ata koyeisa bomoi na ye mokuse.
Mwasi ná mobali bakabwani: Moto moko na ndako ya mokonzi abɔtɔli mwasi wana ya kitoko mpe akimi château. Mwana ya mokonzi atye bomoi na ye na likama mpo na kokende koluka ye. Mwasi moko oyo azali molobeli ya ebongiseli ya bakomi ya babuku ya bolingo na Amerika alobi boye: “Likanisi ya ntina ya lisolo yango esengeli kolobela bato mibale oyo balingani mpe bazali kosala nyonso mpo bolingo na bango elonga.” Na mikanda mingi ya bolingo, bolingo yango elongaka kaka—bato oyo batángaka yango bayebi bongo. Mikakatano, oyo mbala mingi elukaka kobebisa bolingo na bango, basilisaka yango kaka.
Na bomoi ya mokolo na mokolo, mbala mingi ezalaka na mikakatano ya mwasi ná mobali bango mibale, mpe mikakatano oyo bato mosusu bamemelaka bango. Mikakatano yango ekoki kozala mpo na mbongo, mosala, bandeko, mpe baninga. Mikakatano ebimaka mpe soki mobalani moko azali kokokisa te makambo oyo moninga azali kozela epai na ye. Na bolingo ya mikanda to ya bafilme, mabunga ya bato oyo balingani ezalaka mbala mingi ya mikemike, kasi ezalaka ntango nyonso bongo te na bomoi ya mokolo na mokolo. Lisusu, soki tosali milende te, bolingo ya solo yango moko ekoki te kosilisa mikakatano oyo tokoki kokutana na yango na moto oyo tokanisaka na ye ndenge moko te, tokolá esika moko te, tozali na bamposa ndenge moko te mpe na bomoto ndenge moko te. Bolingo esɛngaka nde koyokana malamu, komikitisa, boboto, motema molai, mpe kokanga motema—bizaleli oyo eyaka yango moko te mpe ezalaka pɛtɛɛ te mpo na komonisa yango.—1 Bakolinti 13:4-7.
Mwasi ná mobali bakutani lisusu: Mwana ya mokonzi abɔtɔli lisusu mwasi oyo bakangaki mpe abengani moto yango. Babalani mpe bafandi na esengo libela. Mokomi moko ya babuku ya bolingo apesi bato oyo bazali koyekola kokoma babuku toli oyo: “Bosengeli komonisa ete na nsuka bakómaki na bomoi ya esengo. . . . Moto oyo akotánga asengeli kosepela komona ete mwasi ná mobali yango bafandi esika moko mpe na esengo.” Babuku ya bolingo elobelaka mpenza te bomoi ya mwasi ná mobali yango nsima ya bambula mingi ya libala. Nsima ya bambula, ekoki kozala ete kozanga koyokana to mikakatano mosusu esalaki ete mwasi ná mobali yango báyokana malamu te. Baankɛti ezali komonisa ete nsima ya bambula, mabala mingi esukaka na kokufa.
Ya solo, bolingo oyo balobelaka na mikanda ezalaka mpasi te; kasi bolingo ya solosolo esɛngaka milende. Koyeba kokesenisa lolenge wana mibale ya bolingo ekosalisa yo omizela te na makambo oyo ekosalema te. Yango ekobatela yo owelela te kobala mbangumbangu, bongo na nsima omipesa foti. Lisolo oyo elandi ekomonisa ndenge okoki kosala mpo na kolinga basusu na bolingo ya solo mpe mpo basusu bálinga yo.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Bato oyo balingaka basusu mingi te bato mpe balingaka bango mingi te
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Bolingo oyo balobelaka na mikanda ezalaka mpasi te; kasi bolingo ya solosolo esɛngaka milende
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Bilombe mibali mpe bilombe basi ya masolo ya bolingo
Na États-Unis, babuku ya masolo ya bolingo oyo batɛkaka ekɔtisaka mbongo koleka dolare miliare moko na mbula. Pene na buku ya masolo mitano likoló na zomi oyo batɛkaka na ekólo yango, elobelaka kaka bolingo ya basi ná mibali. Na kotalela mitango oyo ebongiseli moko (Romance Writers of America) epesi, makambo misato oyo batángi ya babuku yango, oyo mingi (90 %) ezali basi, balukaka libosoliboso epai ya bilombe mibali ya masolo ya bolingo ezali: nzoto ekembá, kitoko, mpe mayele. Makambo misato oyo mibali balukaka mingi epai ya bilombe basi ezali: mayele, makambo makasimakasi, mpe kitoko ya nzoto.
[Bililingi na lokasa 6, 7]
Radio to televizyo emonisaka mpenza te bolingo ya solo