Lisalisi mpo na kobatela bana na biso
Na mbula eleki, mwasi moko na etuká ya Virginie, États-Unis, akomaki mokanda ya botɔndi mpo na buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, alobi boye: “Liboso bankɔkɔ na ngai bákenda kolala, balobaka boye: ‘Nkɔkɔ ya mwasi, tángelá biso lisolo moko na buku ya Yesu.’ Moko azali na mbula 4, mosusu mbula 6 mpe mosusu mbula 7 mpe basepelaka mingi na masolo yango.”
Nkɔkɔ wana ya mwasi alobaki boye: “Natángaki mokapo 32 oyo ezali na motó ya likambo: ‘Ndenge babatelaki Yesu.’ Nakamwaki mingi mpamba te liteya oyo tolobelaki ndenge Yehova abatelaki Yesu, esalisaki bana bámibatela bango moko na batoli oyo ebongi mpenza. Liteya yango elobi boye: ‘Soki moto ameki kosakana na yango [enama na yo], gangá na mongongo makasi mpe lobá na ye ete: “Komeka te! Nakofunda yo!” ’ ”
Na Mexique, mama ya mwana mwasi moko ya mbula mitano, na nkombo Betsaida, alobaki ete azongelaki kotángela na mwana na ye Betsaida buku Moteyi mbala mibale. Mama yango alobi boye: “Mokili ezali se kobeba mpe bana na biso bazali ntango nyonso kokutana na mikakatano mingi. Mwana na ngai alobi ete azali na botɔndi mpo na liteya oyo emonisi ndenge akoki komibatela na makambo ya mabe lokola oyo balobeli na mokapo 32.”
Buku Moteyi ezali na nkasa 256 mpe na bililingi kitoko, ezali monene lokola zulunalo oyo mpe ezali mpenza kosalisa mpo na koteya. Mateya oyo ezali na kati euti na mateya ya Yesu Klisto, ezali na elobeli ya pɛtɛɛ mpe na makambo oyo bato nyonso bakoki kosalela. Okoki kozwa buku yango soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to na oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.