Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/06 lok. 30
  • Bilenge basengeli “kosololaka na mikóló”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge basengeli “kosololaka na mikóló”
  • Lamuká!—2006
Lamuká!—2006
g 7/06 lok. 30

Bilenge basengeli “kosololaka na mikóló”

BABOTI nyonso ya bolingo bayebi ete bana oyo bazali koyekola kotambola bakolaka malamu soki bazali kolinga bango mpe kotyela bango likebi; lisusu, bayebi ete bana yango bayaka na bibɛlɔ ya baboti na bango soki bazali na mposa ete básakanisa bango. Kasi, Doktɛrɛ Barbara Staggers, oyo azali mokambi ya minganga oyo basalisaka bilenge na lopitalo moko (Children’s Hospital and Research Center) ya engumba Oakland na etúká ya Californie, na États-Unis, alobi ete ntango bana bakómaka na eleko ya bolenge, balingaka lisusu te baboti na bango bátyela bango likebi. Nzokande, bolenge ezali eleko oyo bana basengeli mpenza na likebi ya baboti na bango. Mpo na nini?

Ntango bana bakómaka na eleko ya bolenge, basalelaka ntango na bango ndenge balingi mpe bakɛngɛlaka bango mingi te; yango wana, Doktɛrɛ Staggers amonisi ete ezaleli yango ezali likama monene mpenza mpo na bilenge. Na Zulunalo moko (Toronto Star), Doktɛrɛ Staggers alobi ete: “Na eleko ya bolenge, bana balukaka koyeba bomoto na bango, mpe ndenge ya kofanda na bato. Bilenge balukaka mpe kosala makambo oyo ekoki kobimisa makama mpe kosala lokola baninga, nyonso wana ekoki kobimisela bango makama mingi.” Bolenge ekabolami na bileko ndenge na ndenge mpe esɛngaka kaka te kokokisa mbula moko boye. Staggers alobi boye: “Bolenge eyebanaka nde na bizaleli, na lolenge ya kotalela makambo mpe ya kosalela yango.” Na ebandeli ya bolenge, mwana akómaka motema mɔtɔmɔtɔ, atalelaka kaka makambo na ye moko, mpe amibanzabanzaka mingi na mbongwana oyo ezali kosalema na nzoto na ye. Na katikati ya bolenge, alukaka komeka makambo mpo na koyeba ndenge ezalaka, kasi na nsuka ya eleko ya bolenge, alukaka kosala makambo ndenge alingi.

Na ntembe te, eleko ya bolenge ekoki kopesa esengo mingi, kasi ekoki mpe kozala na mikakatano mpo na baboti mpe bilenge. Doktɛrɛ Staggers, oyo asalisi bilenge na boumeli ya mbula koleka 20, alobi ete bilenge mingi “basengeli kosololaka na mikóló oyo batyelaka bango likebi.” Ndenge nini tokoki kosala yango?

Bósololaka na bana na bino ntango nyonso. Baboti, bómonisaka bana na bino ete bomibanzabanzaka mpo na bango mpe bóyokaka bango na likebi mpenza. Bokomonisa ete botyelaka bana na bino oyo bazali bilenge likebi soki bozali kotuna bango mituna oyo ekosalisa bango bákanisa malamu mpe báyeba makama oyo ekoki kokómela bango soki bazwi bikateli ya mabe. Bólobelaka mingi bolamu oyo bikateli ya malamu epesaka. Bósalisa mpe bango báyeba bizaleli ya malamu.

Soki baboti batiki bana na bango báyekola bango moko ndenge ya kosilisa mikakatano mpo bato mingi balobaka bongo, bato ya bizaleli mabe bakoki kobebisa bana na bango. (Masese 13:​20) Nzokande, baboti oyo basalelaka mitinda ya Biblia bapesaka bana na bango libaku malamu mpenza ya kolekisa bolenge na bango malamu mpe kokóma mikóló oyo bayebi kozwa bikateli ya malamu bango moko. Na yango, baboti basengeli koluka koyeba ndenge ya ‘kobɔkɔla bana na nzela ekoki na bango kotambola.’​—⁠Masese 22:⁠6.

Bokoki kozwa toli mosusu oyo elobeli lolenge ya malamu ya kosolola mpe kobɔkɔla bana oyo bakómi bilenge na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.a Buku yango ezali mpe na toli ya Biblia oyo ebongi na moto mokomoko ya libota.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto