Bokoki kozala na esengo na kati ya libota?
Na mbula oyo eleki, elenge mwasi moko oyo azali mama ya mwana akomelaki biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Mexique mpe asɛngaki báyebisa ye ndenge akoki kosala mpo libota na ye ezala na esengo. Ayebisaki bango ete asepelaki mpenza na Lamuká! oyo atángaki mpe alobaki boye:
“Nazali na ndako ya libala eleki lelo mbula misato, mpe nazali na mposa bósalisa ngai na batoli mpe malako oyo ekosalisa ngai natonga libota ya esengo. Eleki mbula mibale, ngai ná mobali na ngai tobotaki mwana ya mobali, mpe mposa na ngai ezali ete nabɔkɔla ye malamu.”
Mwasi yango ayokaki nsango ya buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota mpe asɛngaki bátindela ye yango. Ebele ya bato mosusu basalaki mpe bongo. Nsima ya kotánga buku yango, bato mingi bayebisaki biso ndenge esalisaki bango. Na kati ya buku yango, okokuta mikapo lokola oyo: “Teyá mwana na yo uta azali naino moke,” “Batelá libota na yo na bopusi mabe” mpe “Batelá kimya kati na ndako na yo.”
Soki olingi kozwa buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, tondisá eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe tindá yango na adresi oyo etyami awa to na oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga ete nafuta mbongo.